Michael Faraday: Nganga-mayele mpe mobali na kondima
“Mobandisi ya lotilíki.” “Nganga-mayele oyo aleki banganga-mayele nyonso kino lelo.” Wana ezali mitindo mibale ya kolobela Michael Faraday, oyo abotamaki na mobu 1791 na Angleterre, oyo bokundoli na ye na ntina na nguya ebéngami induction éléctromagnétique epesaki nzela ya kosala bamotɛ́lɛ oyo epesaka lotilíki mpe bamasini oyo epesaka lotilíki.
FARADAY asalaki masukúlu mingi mpo na koteya chimie mpe physique na eteyelo ya Royal Institution ya Londres. Masukúlu na ye mpo na kopalanganisa mateya ya siansi esalisaki bilenge ete bákoka kosimba ata mateya oyo mazalaka mpasi mingi na kososola. Azwaki lokumu na biteyelo minene mingi. Nzokande azalaki koboya ete bálobela ye mingi. Azalaki moto oyo amipesaki mingi na makambo ya losambo, azalaki moto ya esengo mingi na ndako na ye moko oyo ezalaki na bilalelo misato mpe elongo na libota na ye mpe baninga na ye bandimi. Faraday azalaki mosangani ya lingomba oyo alobelaki yango lokola “lingomba moke mpe etyolami ya baklisto oyo bayebanaki lokola . . . ba Sandemaniens.” Bazalaki banani? Bindimeli nini bazalaki na yango? Mpe lolenge nini yango ezalaki na bopusi likoló na Faraday?
Ba Sandemaniens
Geoffrey Cantor mokomi ya búku Michael Faraday: Sandemanian and Scientist alobi ete: “Bokutani ya liboso kati na libota ya Faraday mpe lingomba ya ba Sandemaniens esalemaki na bankɔ́kɔ ya Michael Faraday.” Bazalaki kosangana elongo na bayekoli ya moteyi-motamboli moko oyo baninga na ye bandimaki bindimeli ya ba Sandemaniens.
Robert Sandeman (1718-1771) azalaki moyekoli na eteyelo monene ya Edinburgh, epai kuna azalaki koyekola matematiki, Greke mpe nkótá mosusu; mokolo moko ayokaki moteyi John Glass, oyo kala azalaki moteyi na lingomba ya ba Presbytériens. Makambo oyo ayokaki matindikaki ye atika boyekoli na eteyelo monene, azonga na mboka na bango na Perth, mpe akóma mosangani na etuluku ya Glass mpe baninga na ye.
Na bambula 1720, John Glass abandaki kobɛta ntembe na mateya mosusu ya Lingomba ya Écosse. Boyekoli na ye ya Liloba ya Nzambe etindaki ye na bosukisi ete kati na Biblia libota ya Yisalaele lizalaki elilingi ya libota ya Yisalaele ya elimo oyo basangani na yango bautaki na mabota makeseni. Epai moko te amonaki ntina oyo ekólo na ekólo esengeli kozala na lingomba na yango.
Wana azalaki lisusu kosepela te na mateya ya lingomba na ye na mboka Tealing, pene na engumba Dundee, na Écosse, Glass atikaki Lingomba ya Écosse mpe abongisaki makita na ye moko. Bato pene na monkámá basanganaki na ye, mpe uta ebandeli bamonaki ntina ya kobatela bomoko kati na bango. Bazwaki ekateli ya kolanda malako ya Klisto, oyo makomami na Matai mokapo 18, vɛrsɛ́ 15-17, mpo na kosilisa mikakatano nyonso oyo mikoki kobima kati na bango. Na nsima babongisaki makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ epai kuna bato na kondima lolenge moko na bango bazalaki koyangana mpo na kobondela mpe kolendisana.
Ntango bato mingi babandaki koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na bituluku bikeseni, esengelaki mibali oyo bayebi kokamba mpo na kotambwisa losambo na bango. Kasi nani akokisaki masɛngami? John Glass mpe baninga na ye batyaki likebi mingi na oyo ntoma Paulo akomaki na likambo yango. (1 Timoté 3:1-7; Tito 1:5-9) Bamonaki esika moko te epai balobeli kotánga na eteyelo monene to ntina ya koyeba Liebele mpe Greke. Na bongo, nsima ya kokanisa mozindo na ntina na litambwisi ya Makomami, baponaki mibali oyo bakokaki mpo na kozala bankulutu. Bato oyo bazalaki sembo na Lingomba ya Écosse bamonaki yango lokola “botyoli monene” mpo na mibali batángi te “oyo babɔkwami na mpasi” bákoka koloba ete basosoli Biblia mpe bazali koteya nsango na yango. Na mobu 1733, ntango Glass mpe baninga na ye bandimi batongaki ndako ya makita ya bango moko na engumba ya Perth, bakonzi ya lingomba ya engumba bamekaki kosala bopusi likoló na bamajistrá ete bábengana bango na engumba. Balóngaki te, mpe lingomba yango ekólaki.
Robert Sandeman abalaki mwana ya Glass ya liboso mpe, wana azalaki na mbula 26, akómaki nkulutu na lisangá ya ba Glassites na Perth. Mikumba na ye ya nkulutu mizalaki na bozito mingi likoló na ye na boye ete azwaki ekateli ya kopesa ntango na ye nyonso mpo na mosala ya kobatela bampate. Lisoló moko moke ya bomoi na ye emonisi ete, na nsima, wana mwasi na ye asilaki kokufa, Robert “andimaki na esengo nyonso kosalela Nkolo epai nyonso oyo akokaki kotindama.”
Mateya ya ba Sandemaniens epalangani
Sandeman apalanganisaki mateya na ye na molende nyonso kobanda na Écosse kino na Angleterre, epai bituluku ya sika ya bandimi bibotamaki. Na ntango wana, kowelana ezalaki kati na bato ya lingomba ya Calvinisme na Angleterre. Basusu kati na bango bazalaki kondima ete basilaki kotángama libela mpo na lobiko. Na ngambo mosusu, Sandeman akɔtelaki baoyo bazalaki kokanisa ete kondima ezalaki likambo ya ntina mingi. Mpo na kondimisa likanisi wana, abimisaki búku moko oyo enyatamaki mbala minei mpe oyo bibimeli mibale na yango binyatamaki na États-Unis. Engebene Geoffrey Cantor, kobimisama ya mokanda wana ezalaki “likambo bobele moko ya ntina monene oyo epalanganisaki lingomba moke [ya ba Sandemaniens] koleka bandelo na yango ya ebandeli na Ecosse.”
Na 1764, Sandeman, elongo na bankulutu mosusu ya lingomba ya Glass basalaki mobémbo na États-Unis, mobémbo oyo ebimisaki kowelana mpe botɛmɛli mingi. Atako bongo, ebimisaki etuluku moko ya baklisto oyo bazalaki na kondima lokola ya bango na Danbury, na etúká ya Connecticut.a Ezali kuna nde Sandeman akufaki, na mobu 1771.
Bindimeli ya losambo oyo Faraday azalaki na yango
Elenge Michael ayekolaki mozindo mateya ya ba Sandemaniens oyo baboti na ye bazalaki koteya ye. Ayekolaki ete ba Sandemaniens bazalaki kosangana te elongo na bato oyo bazalaki kotosa mateya ya Biblia te. Na ndakisa, bazalaki koboya kosangana na molulu ya libala na ndakonzambe ya Lingomba ya Angleterre, kosukáká bobele na milulu ya libala oyo misɛngamaki na mobeko ya Letá.
Kotosa biyangeli, mpe kozanga komikɔtisa na politiki, ezalaki bongo momeseno ya ba Sandemaniens. Atako bazalaki bato oyo bapesamelaki limemya mingi kati na mboka, bazalaki te kondima etɛlɛmɛlo monene. Kasi na mwa mabaku mokomoko oyo bandimaki yango, bazalaki bongo koboya kokɔta kati na politiki. Etɛlɛmɛlo wana ememelaki bango kotyolama na bato. (Kokanisá na Yoane 17:14.) Ba Sandemaniens bazalaki koteya ete Bokonzi ya Nzambe ya likoló ezalaki ebongiseli ya boyangeli moko ya kokoka. Cantor alobi ete bazalaki kotalela politiki lokola “mwango moko ezangi ntina, ya mayele mabe, ya mbindo.”
Atako bakabwanaki na basusu, bamonisaki te bizaleli ya Bafalisai. Balobaki ete: “Tomoni yango likambo ya ntina monene koboya Elimo mpe Momeseno ya Bafalisai ya ntango ya kala, ya kotángela bato Masumu mingi to Mikumba koleka oyo epesami na Makomami; mpe na kotika Mitindá ya Nzambe mpo na kondima Bonkɔ́kɔ to koluka Bantina ya komilongola mikumba.”
Bandimaki momeseno ya Makomami ya kobimisa na lisangá basangani nyonso kati na bango oyo bakómaki balangwi masanga, babɔtɔli, bato na pite, to baoyo bakosala masumu mosusu minene. Soki mosumuki abongolaki solo motema, bazalaki komeka kosalisa ye. Soki abongoli motema te, bazalaki kolanda toli ya Makomami “ya kobengana moto yango mabe.”—1 Bakolinti 5:5, 11, 13.
Ba Sandemaniens bazalaki kotosa mobeko ya Biblia oyo motali koboya makila. (Misala 15:29) John Glass apesaki bantina oyo ete libota ya Nzambe lizali na nsé ya mobeko ya kotosa bipekiseli bitali makila motindo moko lokola Nzambe apesaki bato ya liboso etindá ya kolya te mbuma ya nzeté ya koyeba malamu mpe mabe. (Genese 2:16, 17) Kozanga kotosa etindá wana na ntina na makila ekokanaki na koboya lolenge lobongi ya kosalela makila ya Klisto, oyo ezali bongo mpo na kopɛtɔla masumu. Glass akómaki na bosukisi oyo: “Epekiseli wana ya kolya makila ebandá kala, mpe ezali naino ya monene mpe ya ntina mingi.”
Momeseno ya ba Sandemaniens ya kososola makambo na lisalisi ya Makomami esalisaki bango ete bápɛngola mitambo mingi. Na ndakisa, na likambo litali kominanola, batalelaki malako ya Klisto lokola litambwisi na bango. Balobaki ete: “Tokomeka te kopesa Mibeko esika Klisto apesaki yango te, to tokolongola moko te na oyo asili kopesa biso. Mpo na yango, lokola tozali komona epai moko te ete Kominanola epekisami, kati na bato mingi to moto ye moko; tozali kotalela ete komisepelisa oyo ekangisami te na Makambo maye mazali masumu endimami.”
Atako ba Sandemaniens bazalaki na makanisi mingi oyo mazalaki sikisiki na boyokani na Makomami, bakangaki te ntina ya mosala mpenza oyo mokesenisaka baklisto ya solo, ete moko na moko asengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na basusu. (Matai 24:14) Atako bongo, makita na bango mazalaki mpo na bato banso, mpe kuna bazalaki kosala milende mpo na komonisa ntina na elikya na bango epai na baoyo bazalaki kotuna bango.—1 Petelo 3:15.
Lolenge nini motindo wana ya bindimeli esimbaki nganga-mayele Michael Faraday?
Faraday moko na ba Sandemaniens
Atako akumisamaki, atalelamaki na motuya monene mpo na bokundoli na ye minene, Michael Faraday alukaki bomoi ya lokumu te. Wana bato minene bazalaki kokufa mpe ete bato oyo bayebanaki mingi basengelaki kozala na milulu ya bokundi, Faraday azalaki komonana kuna te, lisosoli na ye epesaki ye nzela te ete akɔta mpe asangana na molulu ya Lingomba ya Angleterre.
Lokola azalaki nganga-mayele Faraday akangamaki ntango nyonso na makambo oyo akokaki komonisa mpenza ete mazali solo. Na yango, aboyaki boyokani ya penepene elongo na bato oyo bazalaki kotya makanisi na bango liboso mpe bazalaki kobɛtabɛta ntembe. Lokola ayebisaki yango mokolo mosusu epai na bayoki na ye ‘likambo oyo lizali solo likoyokisa biso nsɔ́ni soko moke, bosolo na yango bobongwanaka te.’ Amonisaki siansi ete etɛlɛmi likoló na ‘makambo oyo mamonanaki mpenza.’ Ntango azalaki kosukisa lisukúlu moko likoló na banguya minene ya biloko bizalisami, Faraday alendisaki bayoki na ye na kokanisa “Ye oyo azalisaki yango.” Na nsima atángaki maloba ya ntoma moklisto Paulo ete: “Mpo ete longwa na ntango wana ezalisaki ye mokili, makambo na ye mazangi komonana, yango nguya na ye na seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye.”—Baloma 1:20.
Makambo oyo makesenisaki mpenza Faraday na banganga-mayele mingi mosusu ya eleko na ye ezalaki bongo mposa na ye ya koyekola Liloba ya Nzambe lipemami mpe makambo mazwami kati na bozalisi. Cantor amonisi ete: “Kati na kondima na ye ya Sandemanisme asosolaki nzela ya kotosa mibeko ya Nzambe mitali bizaleli malamu mpe bilaka ya bomoi ya seko. Na nzela ya siansi abɛlɛmaki penepene na mibeko oyo Nzambe atyaki mpo na kokamba mɔlɔ́ngɔ́.” Faraday andimaki ete “Siansi ekoki soko moke te kokweisa litambwisi lileki monene oyo lizali kati na Biblia, kasi siansi, soki esalelami na nzela mpenza ya boklisto, ekoki kosalisa biso na koyeba malamu bozalisi ya Nzambe.”
Na komikitisa nyonso Faraday aboyaki lokumu mingi oyo basusu balingaki kopesa ye. Mbala na mbala aboyaki kokɔta na molɔngɔ́ ya bankumu ya ekólo. Alingaki kotikala bobele Faraday ‘moto lokola bato banso.’ Apesaki ntango mingi na mosala na ye ya nkulutu, kosaláká mbala na mbala mibémbo longwa na mboka-mokonzi kino na mboka moke Norfolk mpo na kokokisa bamposa ya etuluku moke ya bandimi na bango oyo bazalaki kofanda kuna.
Michael Faraday akufaki na 25 Augústo 1867, mpe akundamaki na nkunda ya Highgate na nɔ́rdi ya Londres. John Thomas, mokomi ya masoló ya bomoi ya bato ayebisi biso ete Faraday “atikelaki mabota oyo masengelaki koya na nsima makambo mingi oyo mauti mpenza na siansi, mpe makambo oyo mauti na bokundoli na ye masili kobongola lolenge ya bomoi ya bato.” Sarah, mwasi ya Faraday akomaki ete: “Nakoki bobele kolakisa Kondimana ya Sika lokola litambwisi mpe malako na ye, mpamba te azalaki kotalela yango lokola Liloba ya Nzambe . . . oyo baklisto basengeli kotosa yango lelo oyo lokola na eleko yango ekomamaki”—litatoli malamu na ntina na nganga-mayele monene oyo atambwisaki bomoi na ye engebene kondima na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batikali ya nsuka ya etuluku ya ba Sandemaniens to ba Glassites na États-Unis basilaki na ebandeli ya ekeke oyo.
[Etanda na lokasa 29]
Ntango atyamaki lokola molobi na eteyelo ya Royal Institution ya Grande Bretagne, Michael Faraday apalanganisaki boyebi ya siansi na boye ete ata bana mike bakokaki kosimba yango. Toli oyo apesaki na baninga na ye balobi ezali na makambo ya ntina mpo na baklisto oyo bateyaka lelo liboso na bato mingi, toli oyo basengeli kotyela yango likebi.
◻ “Lisukúlu lisengeli te kosalema nokinoki mpe mbangumbangu, mpe kozala bongo mpasi mpo na kokanga ntina na yango, kasi malɛmbɛ mpe na lolenge akani yango.”
◻ Molobi asengeli kosala milende mpo na kolamwisa mposa ya bayoki na ye “uta ebandeli ya lisukúlu na ye mpe asengeli kokólisa yango mokemoke, kozanga ete bayoki báyeba, kobatela mposa yango ntango nyonso oyo lisoló lizali kosɛnga yango.”
◻ “Molobi akomikitisa mpenza na nsé ya lokumu na ye soki amisɔkisi kino koluka ete bábɛtɛla ye mabɔkɔ mpe soki azali kosɛnga ete bákumisa ye.”
◻ Lolenge ya kosalela plan: “Namonaka ntango nyonso ete nasengeli . . . kosala plan ya [lisoló] likoló ya lokasa mpe kokoma biteni na yango na kokanisáká yango na motó, ezala na nzela ya biloko oyo bikoki kokundwela ngai yango to na lolenge mosusu. . . . Nasalaka molɔngɔ́ ya mitó ya makambo minene mpe mike, mpe nasalelaka yango mpo na kotonga lisukúlu na ngai.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Fɔtɔ́ oyo mibale: na ndingisa ya Royal Institution