Pusaná penepene na Nzambe
“Bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi”
BANDA kala, bakonzi mingi batiká ebonga ya bokonzi. Bamosusu balongwaki na nzela ya maponami, bamosusu balongolaki bango na makasi. Ezali boni mpo na Yesu Kristo, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló? Ezali na eloko oyo ekoki kopekisa Mokonzi oyo Nzambe atye ayangela? Eyano ekoki kozwama na maloba oyo Yehova alobaki na Davidi, Mokonzi ya Yisraele, ndenge ekomami na 2 Samwele mokapo 7.
Ndenge mokapo yango ebandi, tomoni ete Mokonzi Davidi azali kotungisama mpo ye, oyo azali kaka moto afandi na kati ya ndako ya kitoko, kasi sanduku ya Nzambe efandi na kati ya mwa hema.a Davidi amonisi mposa na ye ya kotonga ndako ya kitoko, to tempelo mpo na Yehova. (Vɛrsɛ 2) Kasi, Davidi azalaki te moto oyo asengelaki kotonga ndako yango. Na nzela ya mosakoli Natana, Yehova ayebisaki Davidi ete mwana na ye nde akotonga tempelo.—Vɛrsɛ 4, 5, 12, 13.
Yehova asepelaki mpenza na mposa makasi oyo Davidi azalaki na yango. Lokola Davidi amonisaki ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe na kolanda esakweli, Nzambe asalaki kondimana ná Davidi ete akobimisa moto moko na bakonzi oyo bakokitana Davidi oyo akoyangela libela na libela. Natana ayebisaki Davidi elaka wana oyo Nzambe apesaki ete: “Ndako na yo mpe bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso na yo; kiti na yo ya bokonzi ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Vɛrsɛ 16) Nani azali Mosangoli ya libula ya kondimana yango—oyo akoyangela libela na libela?—Nzembo 89:20, 29, 34-36.
Yesu, moto ya Nazarete azalaki mokitani ya Davidi. Ntango anzelu ayebisaki kobotama ya Yesu, alobaki boye: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Na yango, kondimana wana oyo Nzambe asalaki na Davidi ekokisamaki epai na Yesu Kristo. Mpo na yango, azali koyangela te mpo bato baponi ye, kasi mpo na elaka oyo Nzambe apesaki ye ya koyangela libela na libela. Tóbosana te ete bilaka ya Nzambe ekokisamaka ntango nyonso.—Yisaya 55:10, 11.
Ezali na mateya mibale ya ntina oyo tokoki kozwa na 2 Samwele mokapo 7. Ya liboso, tokoki kozala na elikya ete eloko moko te to moto moko te akoki kopekisa Yesu Kristo koyangela. Na yango, tokoki mpenza kozala na elikya ete akokokisa makambo oyo alobaki ete ezali mokano ya boyangeli na ye, elingi koloba kokokisa mokano ya Nzambe na mobimba na yango awa na mabele ndenge ezali kosalema na likoló.—Matai 6:9, 10.
Ya mibale, na lisolo oyo tozwi liteya moko ya ntina mingi na ntina na Yehova. Kobosana te ete Yehova amonaki mpe azwaki na motuya likanisi oyo Davidi azalaki na yango na motema. Ezali mpenza likambo ya esengo koyeba ete Yehova asepelaka ntango tozali komipesa na losambo na ye. Ntango mosusu, makambo oyo eleki biso na makasi, na ndakisa maladi, bobange, ekoki kopekisa biso kokokisa makambo nyonso oyo tokanaki kosalela Nzambe. Soki ezali bongo, tokoki kobɔndisama koyeba ete Yehova amonaka ata makanisi ya motema oyo etondi na mposa ya kosambela ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Sanduku ya kondimana ezalaki sanduku mosantu oyo Yehova nde asɛngaki bátonga yango na ndenge oyo ye alakisaki. Na Yisraele, ezalaki komonisa ete Yehova azali wana.—Kobima 25:22.