Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/6 nk. 8-10
  • Solo na ntina na lisumu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo na ntina na lisumu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto nyonso asalaka libunga
  • Mbeka ya Yesu mpe ntina oyo esengelaki kopesama
  • Bolingo ya Kristo “ememisi biso mokumba”
  • Yesu azali mobikisi​—Na ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mpo na nini bato bakufaka?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lisumu—Ebongwani na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ntango lisumu ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/6 nk. 8-10

Solo na ntina na lisumu

MOTO oyo azali na maladi akomonisa ete azali na fiɛvrɛ te soki abuki thermomètre? Te! Ndenge moko mpe, ezali te mpo bato mingi baboyaka kotalela lisumu ndenge Nzambe atalelaka yango, nde elingi koloba ete lisumu ezalaka te. Liloba na ye, Biblia ezali na mingi ya koloba mpo na likambo yango. Yango eteyaka mpenza nini mpo na lisumu?

Moto nyonso asalaka libunga

Eleki mbula soki nkóto mibale, ntoma Paulo alobaki ete azalaki komitungisa mpo ‘malamu oyo alingaki azalaki kosala yango te, kasi mabe oyo alingaki te yango nde azalaki kosala.’ (Baroma 7:19) Soki tozali sembo, tokondima ete likambo yango ekómelaka mpe biso. Ekoki kozala ete tolingaka kotosa Mibeko Zomi to mpe mibeko mosusu oyo etali etamboli ya malamu, kasi biso nyonso tosalaka mabunga tólinga to te. Ezali te ete tolingaka kobuka na nko nyonso mibeko, kasi tozalaka nde na bolɛmbu. Mpo na nini bongo? Paulo apesi eyano: “Nzokande, soki oyo nalingi te yango nde nasalaka, wana ezali lisusu ngai te moto nazali kosala yango, kasi lisumu oyo efandi na kati na ngai.”​—Baroma 7:20.

Lokola Paulo, bato nyonso babotamá na bolɛmbu, yango emonisaka ete tosangolá lisumu mpe kozanga kokoka. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” Nini esalá ete bato bákóma bongo? Paulo abakisaki boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baroma 3:23; 5:12.

Atako bato mingi baboyaka likanisi ete lisumu ya baboti na biso ya liboso etangolá biso mosika na Nzambe mpe esalá ete tózala lisusu te bato ya kokoka, nzokande, ezali yango nde Biblia eteyaka mpenza. Ndenge oyo Yesu atángaki mikapo ya liboso ya mokanda ya Ebandeli, amonisaki ete andimaki lisolo ya Adama ná Eva.​—Ebandeli 1:27; 2:24; 5:2; Matai 19:1-5.

Moko ya bansango ya ntina ya Biblia ezali ete Yesu ayaki na mabele mpo na kosikola na lisumu bato oyo bakondima ye. (Yoane 3:16) Bomoi na biso na mikolo ezali koya etaleli ndenge oyo tozali kondima ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kosikola bato oyo bakomonisa botɔndi mpo na likambo oyo bakokaki te komisikola bango moko. Kasi, soki tozali kokanga mpenza ntina te ya lisumu ndenge Nzambe atalelaka yango, tokozala na likoki te ya komonisa botɔndi na ebongiseli oyo azwaki mpo na kobikisa biso na lisumu.

Mbeka ya Yesu mpe ntina oyo esengelaki kopesama

Yehova apesaki moto ya liboso elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Elikya yango kitoko esengelaki kobunga kaka soki Adama atombokeli Nzambe. Adama atombokaki, mpe ntango asalaki bongo, akómaki mosumuki. (Ebandeli 2:15-17; 3:6) Adama asalaki makambo oyo eyokanaki te na mokano ya Nzambe, akokaki lisusu kozala moto ya kokoka te, mpe abebisaki boyokani na ye na Nzambe. Ntango asalaki lisumu, na ndenge abukaki mobeko ya Nzambe, abandaki konuna mpe nsukansuka akufaki. Likambo ya mawa, bakitani nyonso ya Adama ata mpe biso, tobotamaka na lisumu mpe mpo na yango tokufaka. Mpo na nini?

Eyano ezali pɛtɛɛ. Baboti ya kozanga kokoka bakoki te kobota bana ya kokoka. Bana nyonso ya Adama, babotamaki basumuki, mpe ndenge ntoma Paulo akomaki, “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baroma 6:23) Kasi, eteni ya mibale ya vɛrsɛ yango epesi biso elikya oyo: “Kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.” Yango elingi koloba, na nzela ya liwa ya mbeka oyo Yesu akufaki, likoki ezali mpo na bato ya botosi, baoyo bazali na botɔndi, bápɛtolama na makambo nyonso ya mabe oyo lisumu ya Adama ememá.a (Matai 20:28; 1 Petro 1:18, 19) Yango esengeli kotinda yo oyoka ndenge nini?

Bolingo ya Kristo “ememisi biso mokumba”

Na litambwisi ya elimo santu, Paulo amonisaki eyano ya Nzambe na motuna yango. Akomaki boye: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso; . . . mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Bakorinti 5:14, 15) Soki moto andimi ete mbeka ya Yesu ezali na likoki ya kosikola ye na makambo oyo lisumu ememá mpe azali na mposa ya komonisa botɔndi mpo na ebongiseli yango, asengeli kosala makasi mpo na koyokanisa bomoi na ye na makambo oyo Nzambe azali kosɛnga ye. Yango esangisi koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga, koteya lisosoli na ye na kolanda mitinda ya Biblia, mpe na nsima koyokanisa bomoi na ye na makambo yango.​—Yoane 17:3, 17.

Kosala makambo ya mabe ebebisaka boyokani na biso na Yehova Nzambe. Ntango Mokonzi Davidi amonaki mabe ya ekobo oyo asalaki ná Bate-sheba mpe ndenge abomaki mobali na ye, na ntembe te ayokaki nsɔni makasi. Kasi, likambo oyo etungisaki ye mingi​—mpe oyo esengelaki kotungisa ye—​ezalaki ete masumu na ye esilikisaki Nzambe. Na mawa nyonso ayebisaki Yehova boye: “Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko, mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo.” (Nzembo 51:4) Ndenge moko, ntango Yozefe amekamaki mpo na kosala ekobo, lisosoli na ye etindaki ye amituna boye: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?”​—Ebandeli 39:9.

Na yango, lisumu ezali kaka te likambo ya komiyoka ete osali mabe. Ezali mpe te kaka likambo ya kolanda makanisi ya bato mosusu mpo tokweaka mpe na makambo mosusu. Kobuka mibeko ya Nzambe na likambo etali kosangisa nzoto, bosembo, botosi, losambo, mpe bongo na bongo, ebebisaka boyokani na biso na ye. Soki tozali kosala lisumu na nko, tozali komikómisa biso moko banguna ya Nzambe. Ezali mpenza likambo oyo ezali kosɛnga tókanisa na yango malamu.​—1 Yoane 3:4, 8.

Na yango, lisumu ebongwani? Eyano ezali ete lisumu ebongwani te. Bato bakómi kaka kobenga yango ndenge mosusu, na elikya ete emonana te ete ezali mabe. Bato mingi baboyaka koyoka lisosoli na bango. Baoyo nyonso balingi kondimama na Nzambe basengeli koboya ezaleli yango. Ndenge tomoni yango, lifuti ya lisumu ezali kaka te mpasi to nsɔni, kasi ezali nde liwa. Lisumu ezali likambo ya bomoi to liwa.

Nsango ya esengo ezali ete likoki ezali ya kolimbisama na nzela ya mbeka ya Yesu, soki tobongoli mpenza motema na masumu na biso mpe totiki yango. Paulo akomaki boye: “Esengo na bato oyo balimbisi misala na bango ya kobuka mibeko mpe oyo bazipi masumu na bango; esengo na moto oyo Yehova akotánga lisumu na ye te.”​—Baroma 4:7, 8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba malamu ndenge oyo liwa ya Yesu ezali na nguya ya kobikisa bato ya botosi, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 47 tii 54, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 10]

Liteya moko ya lingomba ebongwani

Bandimi mingi ya Lingomba ya Katolike, bakangaka mpenza ntina te ya liteya ya Limbe. Na bambula oyo euti koleka, liteya yango ebandaki kolimwa mokemoke na mateya ya katekisimo. Na 2007, Lingomba ya Katolike elongolaki liteya ya Limbe na mokanda moko oyo elobaki ete “teoloji mpe mateya ya lingomba emonisi bantina ya kotya elikya ete bana oyo bakufi kozanga kozwa batisimo bakoki kobikisama mpe kozwa esengo ya libela.”​—International Theological Commission.

Mpo na nini mbongwana yango? Mingimingi yango epesi nzela na lingomba emilongola na liteya oyo Henri Tincq, mokomi moko ya France abengaki “libula ya kilo, oyo babatelaki kobanda na Moyen Âge tii na ekeke ya 20, na lingomba oyo ezalaki kotinda baboti na makasi bápesa bana na bango nokinoki batisimo mpo na kobangisa bango na liteya ya Limbe.” Kolimwa ya liteya yango ya Limbe ebimisi mpe mituna mosusu.

Makomami elobeli mpenza yango? Masolo ya kala, emonisi ete liteya ya Limbe ebimaki na bantembe oyo bato ya teoloji batyanaki na ntina na epongelo na ekeke ya 12. Lingomba ya Katolike ezalaki koteya ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, na yango, esengelaki kolimbola likambo oyo ezalaki kokómela milimo ya bana oyo ekokaki kokende na likoló te mpo bana yango bazwaki batisimo te mpe basengelaki te kokende na lifelo. Yango nde ebimisaki liteya ya Limbe.

Kasi, Biblia eteyaka te ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Kutu, emonisi polele ete na esika ya kokoba kozala na bomoi nsima ya liwa, molimo ya bato oyo basali lisumu ekoki ‘kobomama’ mpe ‘esengeli kokufa.’ (Misala 3:23; Ezekiele 18:4, Biblia Douay-Rheims Version) Lokola molimo ekufaka, esika lokola Limbe, ekoki kozala te. Lisusu, Biblia elobi ete soki moto akufi ayebaka eloko te, ekokani na moto oyo alali mpɔngi.​—Mosakoli 9:5, 10; Yoane 11:11-14.

Biblia emonisi ete Nzambe atalelaka bana oyo baboti na bango bazali bakristo ete basantisami. (1 Bakorinti 7:14) Maloba yango elingaki kozala na ntina te soki kobatisa bana mike ezalaki na ntina mpo na lobiko na bango.

Liteya ya Limbe efingaka Nzambe, ebimisaka ye lokola moto moko ya motema mabe oyo apesaka bato oyo basali mabe te etumbu, atako azali Tata ya bosembo mpe ya bolingo. (Kolimbola Mibeko 32:4; Matai 5:45; 1 Yoane 4:8) Yango wana, tokoki kokamwa te ete liteya wana oyo ezali na Makomami te, ezali na ntina te epai ya bakristo ya solo.

[Bililingi na lokasa 9]

Kozala na bomoi oyo eyokani na Liloba ya Nzambe esalisaka moto azala na boyokani malamu na Nzambe mpe bato

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto