Lisumu—Ebongwani na nini?
“LELO oyo bato balingaka te koyoka ete tomemá ngambo mpo na lisumu oyo baboti na biso ya liboso basalaki. Kasi, balingaka mpe te koyoka ete lisumu ezalaka. . . . Ekoki kozala ete bato lokola Adolf Hitler mpe Josef Stalin basalaki lisumu, kasi biso bamosusu tozali na ngambo te.”—The Wall Street Journal.
Ndenge maloba ya zulunalo oyo touti kolobela emonisi yango, bato bakanisaka lisusu te ete lisumu ezalaka. Mpo na nini? Nini ebongwani? Kasi, likambo nini oyo etali lisumu bato baboyaka?
Ezali na makambo mibale—lisumu oyo tosangolá mpe lisumu oyo moto ye moko asalaka. Ya liboso, ezali eloko oyo tozalaka na yango, tólinga to te, nzokande ya mibale ezali likambo oyo tosalaka. Tiká tótalela mokomoko na yango.
Tosangolá mpenza lisumu ya baboti na biso ya liboso?
Biblia elobi ete bato nyonso bazwá lisumu ya ebandeli oyo baboti na biso ya liboso basalaki. Mpo na yango, biso nyonso tobotamaka bato ya kozanga kokoka. Biblia elobi ete: “Makambo nyonso ya kozanga boyengebene ezali lisumu.”—1 Yoane 5:17.
Nzokande, bandimi mingi, bandimaka te mpe bakangaka ntina te ya likanisi ete bato nyonso babotamaka bato ya kozanga kokoka mpo na lisumu ya liboso oyo bango basalá te mpe oyo etali bango te. Edward Oakes, profɛsɛrɛ moko ya teoloji alobi boye: “Bato mingi bakamwaka soki lingomba moko esɛngi moto andima lisumu, mpe ata soki moto alobi ete andimaka lisumu to akoluka te kosala lisumu, amonisaka yango te na lolenge ya bomoi na ye.”
Moko ya makambo oyo esalaka ete bato báboya kondima likanisi ya lisumu ya liboso ezali ndenge oyo mangomba eteyaka likambo yango. Na ndakisa, na likita moko monene ya lingomba (1545-1563), lingomba ekweisaki moto nyonso oyo azalaki koboya ete bana bábatisama mpo na kolimbisama ya masumu na bango. Bato ya teoloji balobaki ete soki mwana moke akufi kozanga kozwa batisimo, masumu na ye wana oyo epɛtolami te ekokangela ye nzela ya kokende epai ya Nzambe. Kutu, Calvin akendaki mosika na mateya na ye, alobaki ete bana ‘bayaka na etumbu na bango banda na libumu ya bamama na bango.’ Alobaki ete ndenge oyo bazalaka ezali ‘mabe mpe nsɔmɔ na miso ya Nzambe.’
Bato mingi bamonaka ete mwana oyo abotami sika azali na likambo te, mpe ekozala mpenza mabe soki mwana yango asengeli konyokwama mpo na lisumu oyo asangolá. Ezali mpasi te komona ntina oyo mateya ya ndenge wana elongoli bato likanisi ya lisumu ya liboso. Kutu, bakonzi mosusu ya mangomba bakokaka te kokatela mwana ya moke oyo azwi batisimo te etumbu ya lifelo ya mɔtɔ. Mpo na bango, makambo oyo ekokómela bango na nsuka ezali libombami monene mpo na mateya ya teoloji. Atako, ekómá te likambo oyo lingomba endimaka, liteya oyo Lingomba ya Katolike eteyaki na boumeli ya bikeke mingi ezalaki ete molimo ya mwana oyo azwi batisimo te ekokende na Limbe.a
Likambo mosusu oyo esali ete bato bándimaka te lisumu ya ebandeli ezali ete bato ya filozofi, ya siansi, mpe ya teoloji na ekeke ya 19, bakómaki kotya ntembe soki bato oyo masolo ya Biblia elobeli, bazalaki mpenza bato ya solo. Mpo na bato mingi, mateya ya Darwin oyo etali evolisyo ebimisá lisolo ya Adama ná Eva lokola lisapo mpamba. Yango esali ete bato mingi bákóma kotalela makambo oyo ezali na Biblia lokola makanisi ya bato oyo bakomaki yango, kasi te lokola makanisi ya Nzambe.
Yango esali nini na likambo etali lisumu ya liboso? Emonani polele ete, soki bato bandimi ete Adama ná Eva bazalaki bato ya solo te, yango ekomonisa ete lisumu ya liboso esalemaki te. Ata mpo na baoyo bandimaka ete tosalaka mabunga, likanisi ya lisumu ya liboso ezali kaka kolimbola bomoto ya bato ya kozanga kokoka.
Ezali boni mpo na lisumu oyo tosalaka? Lisumu yango ekeseni na lisumu ya liboso? Esilikisaka Nzambe?
Ezali mpenza lisumu?
Ntango batunaka bato makambo nini oyo bango bamonaka ete ezali lisumu, mingi bakanisaka Mibeko Zomi, oyo epekisi koboma, bokosi, bilulela, ekobo, koyiba mpe bongo na bongo. Mangomba ezalaki koteya ete soki moto akufi kozanga kobongola motema na masumu ya ndenge wana akokende konyokwama seko na lifelo.b
Mpo likambo ya ndenge wana ekómela bato mosusu te, Lingomba ya Katolike esɛngaka ete bato bátubela liboso ya sango oyo bango balobaka ete azali na nguya ya kolimbisa bango. Nzokande, mpo na bandimi mingi ya Katolike, makambo lokola kotubela, kolimbisama, mpe kobongola motema ekómá makambo ya kala. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema emonisi ete bato mingi ya Italie (60%) oyo bazali bandimi ya Lingomba ya Katolike bakendaka lisusu tubelá te.
Emonani polele ete, likanisi ya lisumu oyo moto ye moko asalaka mpe makambo oyo yango ebimisaka, ndenge lingomba eteyaka yango, elongi te kosalisa bato bátika kosala masumu. Bato mingi bandimaka lisusu te ete makambo yango ezali mabe. Na ndakisa, basusu bakanisaka ete soki mikóló mibale bayokani mpo na kosangisa nzoto mpe basali moto mosusu mabe te, mabe ezali wapi?
Likambo moko oyo ekoki kolimbola likanisi ya ndenge wana ezali ete banda kala, bato yango oyo basalaka likambo yango bandimá te ete makambo oyo bateyá bango ezali lisumu. Kutu, mingi bazalaka na mokakatano ya kondima ete Nzambe ya bolingo akoki konyokola basumuki seko na seko na lifelo. Mpe ntango mosusu yango esali ete bato bákóma kotalela “lisumu” lokola likambo ya lisɛki. Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo esali ete bato bákóma kotalela lisumu ndenge wana.
Babwaki bizaleli malamu
Makambo oyo esalemaki na boumeli ya mwa bikeke oyo euti koleka, esali mpenza mbongwana na makanisi ya bato. Bitumba mibale ya mokili mobimba, ebele ya bitumba ya mikemike, mpe ba-génocide ndenge na ndenge etindi bato bámituna soki bizaleli ya malamu ezali kaka na ntina. Batunaka boye: ‘Na mokili oyo makambo ya siansi ezali kokende se liboso, ezali na ntina kotosa mibeko oyo etyamaki bikeke mingi liboso mpe oyo ezali ata na boyokani moko te na makambo ya mikolo oyo?’ Mpo na bato mingi ya mayele esengeli te kolanda yango. Bakanisaka ete esengeli bato bábosana makambo mosusu wana ya kala, mpe básala makasi mpo na kosalela makoki na bango.
Makanisi ya ndenge wana ekómisi bato mosika na Nzambe. Na mikili mingi ya Mpoto, kaka bato moke nde bakendaka na ndako-nzambe. Bato mingi bandimaka ata liteya moko te, mpe mingi baboyaka polele mateya ya mangomba mpo bamonaka yango ezali ntina te. Bakanisaka ete, soki bato babimá kaka bongo, mpo na nini koloba ete moto akoki kosala lisumu soki abuki mobeko moko ya bizaleli malamu?
Kobeba ya bizaleli na mikili ya Mpoto na ekeke ya 20, ememi makambo mingi, na ndakisa, ekɔtisi mbongwana na makambo etali kosangisa nzoto. Botomboki ya bana-kelasi, kobimisa makanisi oyo eyokani te, mpe bankisi mpo na kokanga mabota, nyonso wana esali ete bato bábwaka bizaleli ya malamu. Eumelaki te bato babwakaki mpe bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka. Bato baponaki bizaleli mosusu ya sika mpe bakómaki kotalela lisumu ndenge mosusu. Mokomi moko akomaki ete kobanda wana, “mobeko kaka moko ezalaki mobeko ya lolango”—yango esali ete bato bákóma kondima likanisi ya kosangisa nzoto na lolenge ya mabe.
Mateya ya mangomba oyo esepelisaka bato
Ntango elobelaki makambo ya États-Unis, zulunalo moko (Newsweek) elobaki polele ete: “Bakonzi mingi ya mangomba, oyo bawelanaka mpo na kozwa bandimi ebele, bamonaka ete bakoki te koloba makambo oyo ekokimisa bandimi.” Babangaka ete soki bazali kolobela mingi makambo etali bizaleli malamu epai ya bandimi na bango, bakokimisa bango. Bato balingaka te koyoka ete basengeli kozala bato ya komikitisa, komipekisa, mpe kozala na bizaleli malamu to basengeli koyoka lisosoli na bango oyo ezali kotungisa bango to kobongola motema na masumu. Na yango, ndenge zulunalo moko (Chicago Sun-Times) emonisi yango, mangomba mingi ekómá koteya makambo oyo bakanisaka ete ezali ya Kristo, nzokande ebendaka likebi mingi epai ya moto ye moko mpe elandaka Evanzile te.
Yango esali ete mangomba ekóma kolobela Nzambe na ndenge na yango, esali ete mangomba ebendaka likebi te epai na Nzambe mpe na makambo oyo azali kosɛnga biso, kasi nde epai ya moto mpe na makambo oyo ekoki kosala ete moto amizwaka mingi na valɛrɛ. Mokano na bango ezali ya kokokisa bamposa ya lingomba. Yango ebimisi lingomba oyo ezangi mibeko? Zulunalo moko (The Wall Street Journal) etuni motuna oyo: “Nini sikoyo ezwi esika ya liboso, esika oyo mitinda ya bokristo ezalaki?” “Likambo kaka moko ya malamu ezali, ‘kozala motema mawa’ mpe kotika bango básala oyo balingi.”
Yango esali ete bato bákóma na likanisi ete lingomba nyonso oyo eteyaka makambo oyo esepelisaka bato, ezali malamu. Ndenge zulunalo oyo touti kolobela emonisi yango, moto nyonso oyo andimaka likanisi yango “akoki kosambela na lingomba nyonso, na ntango oyo lingomba yango ezali kosɛnga te kotosa mibeko makasimakasi, ebɔndisaka kasi esambisaka bato te.” Mpe mangomba esengeli kondima bato “kaka ndenge bazali,” kozanga kosɛnga bango bátosa mibeko boye to boye.
Makambo yango ekoki kokundwela batángi ya Biblia esakweli moko oyo ntoma Paulo akomaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Alobaki ete: “Ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na kolanda bamposa na bango moko, bakozwa bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka; mpe matoi na bango ekoboya koyoka solo.”—2 Timote 4:3, 4.
Ntango bakonzi ya mangomba bazali kokanga miso na masumu, bazali koboya kondima ete lisumu ezali, basalaka bandimi na bango mabe mpenza na ndenge balobaka na bango makambo oyo matoi ya bandimi na bango ‘elingaka koyoka’ na esika ya koyebisa bango oyo Biblia elobaka. Mateya ya ndenge wana ezali lokuta mpe likama. Ebebisaka mateya ya Kristo. Lisumu mpe kolimbisama ezalaki mpenza na esika monene na nsango malamu oyo Yesu ná bantoma na ye bateyaki. Mpo na koyeba likambo yango, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liteya ya Limbe ezali te na Makomami mpe esalaki ete bato mingi bákóma kobanga mpe ekoki kozala mpo na ntina yango nde Lingomba ya Katolike elongoli yango na mateya ya Katekisimo. Talá etanda “Liteya moko ya lingomba ebongwani,” na lokasa 10.
b Liteya ya konyokwama na lifelo ya mɔtɔ endimami te na Biblia. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 “Bato oyo bakufá bazali wapi?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Lingomba oyo eteyaka makambo oyo esepelisaka bato ebimisaka mbuma mabe
[Etanda na lokasa 6]
Lisumu ezali lisusu na ntina te?
▪ “Moko ya mikakatano minene oyo lingomba ezali na yango lelo oyo, ezali likambo ya lisumu. Tomonaka lisusu te ete tozali ‘basumuki’ oyo bazali na mposa ya kolimbisama. Ekoki kozala ete kala lisumu ezalaki mokakatano, kasi lelo oyo ezali lisusu bongo te. Na yango, atako lingomba emoni ete ekoki kosilisa mokakatano ya lisumu, mpo na ebele ya bato ya Amerika, yango ezali mokakatano te—ezali mpenza mokakatano ya makasi te.”—John Studebaker, mokomi moko ya lingomba.
▪ “Bato balobaka ete: ‘Nalingaka ete ngai moko nazala na bizaleli ya malamu, bato mosusu mpe bázala na yango, kasi nayebi ete biso nyonso tozali kaka bato, na yango, nasengeli kosala kaka oyo nakoki kosala.’ Ntango tozali kosala mwa malamu, yango ebɔndisaka biso. Ntango tozali kosunga bazalani na biso na misala. Kasi, tokipaka te lisumu.”—Albert Mohler, mokambi ya ebongiseli moko (Southern Baptist Theological Seminary).
▪ “Lelo oyo bato basepelaka na makambo oyo kala ezalaki makambo ya nsɔni, [na ndakisa oyo babengaka masumu nsambo ya kufa]: baboti balendisaka bana na bango bázala na lolendo, balobaka ete yango ezali na ntina mpo na komipesa kilo; etuluku moko ya bato oyo balambaka na restora na France basɛngaki Vatican emonisa ete kolya na kolunda ezali lisumu te. Bilulela esalaka ete bato básepelaka na makambo oyo televizyo elakisaka. Bato oyo basalaka bapiblisite, bakolisaka ezaleli ya bilulela epai ya bato mpo básombaka biloko; ezali mabe te kozala na nkanda ntango moto mosusu asilikisi yo. Na bantango mosusu nalingaka mpenza kozala zoba.”—Nancy Gibbs, na zulunalo moko (Time).
[Elilingi na lokasa 5]
Bato mingi lelo oyo batalelaka lisolo ya Adama ná Eva lokola lisapo