“Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala!”
“Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe!”—2 PE. 3:11.
1. Mpo na nini mokanda ya mibale ya Petro ezalaki elendiseli oyo eyaki na ntango oyo ebongi mpo na bakristo ya mikolo na ye?
NTANGO ntoma Petro akomaki mokanda na ye ya mibale na litambwisi ya elimo ya Nzambe, lisangá ya bokristo esilaki kokutana na minyoko mingi, kasi yango ekitisaki molende mpe bokoli na yango te. Na yango, Zabolo asalelaki mayele mosusu, oyo esilaki kolonga mbala mingi liboso. Ndenge Petro amonisaki yango, Satana amekaki kobebisa basaleli ya Nzambe na nzela ya bateyi ya lokuta oyo “miso na bango etondá na ekobo” mpe “motema na bango emesaná na bilulela.” (2 Pe. 2:1-3, 14; Yuda 4) Na yango, mokanda ya mibale ya Petro ezali elendiseli makasi mpo bakristo bátikala sembo.
2. Mokanda ya 2 Petro mokapo 3 elobeli mingimingi nini, mpe mituna nini tosengeli komituna?
2 Petro akomaki boye: “Nazali komona ete ezali malamu, na ntango oyo nazali naino na tabernakle oyo, nakundwela bino makambo mpo nalamwisa bino, lokola nayebi ete etikali moke tabernakle na ngai elongwa . . . Yango wana, nakosala mpe nyonso oyo ekoki na ngai ntango nyonso mpo, nsima ya kokende na ngai, bino moko bólobelaka makambo yango.” (2 Pe. 1:13-15) Ya solo, Petro ayebaki ete liwa na ye ekómi pene, kasi alingaki ete makebisi oyo apesaki na ntango oyo ebongi etikala. Mpe lokola makambo yango ekomamá na Biblia, biso nyonso tokoki kotánga yango lelo. Mokapo 3 ya mokanda ya mibale ya Petro ezali na ntina mingi mpo na biso, mpo elobeli mingimingi “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya ntango oyo mpe kobebisama ya likoló mpe mabele ya elilingi. (2 Pe. 3:3, 7, 10) Petro apesi biso toli nini? Ndenge nini kotosa toli yango ekosalisa biso tóndimama na Yehova?
3, 4. (a) Petro atindaki bato bákanisa likambo nini, mpe apesaki likebisi nini? (b) Makambo nini misato tokolobela?
3 Nsima ya kolobela kobebisama ya mokili ya Satana, Petro alobaki boye: “Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe!” (2 Pe. 3:11, 12) Na maloba yango, Petro alingaki kotinda bato bákanisa. Ayebaki ete kaka baoyo bazali kosala mokano ya Yehova mpe bazali komonisa bizaleli oyo esepelisaka Nzambe nde bakobatelama na ‘mokolo ya kozongisa mabe’ oyo ezali koya. (Yis. 61:2) Na yango, Petro abakisaki boye: “Yango wana, bino bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso, bókeba mpo bómemama te elongo na bango [bateyi ya lokuta] na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te.”—2 Pe. 3:17.
4 Lokola azalaki moko ya baoyo ‘bayebaki liboso,’ Petro ayebaki ete mingimingi na mikolo ya nsuka, bakristo basengeli kokeba mpo na kobatela bosembo na bango. Na nsima, ntoma Yoane ayaki komonisa polele mpo na nini ezali bongo. Amonaki ndenge bakobengana Satana na likoló mpe ndenge akozala na “nkanda makasi” mpo na bato “oyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.” (Em. 12:9, 12, 17) Basaleli ya Nzambe ya sembo oyo batyami mafuta na elimo elongo na baninga na bango ya sembo ya “bampate mosusu” bakolonga. (Yoa. 10:16) Bongo mokomoko na biso? Tokolonga kobatela bosembo na biso? Tokoki kolonga kosala yango soki tosali makasi mpo na (1) kolona bizaleli ya Nzambe, (2) kotikala pɛto na etamboli mpe kozanga litɔnɔ mpe mbeba na elimo, mpe (3) kotalela mikakatano na ndenge oyo ebongi. Tólobela makambo yango.
Tólona bizaleli ya Nzambe
5, 6. Bizaleli nini tosengeli koluka kolona, mpe mpo na nini esɛngaka ‘kosala makasi’?
5 Na ebandeli ya mokanda na ye ya mibale, Petro akomaki boye: “Mpo na kozongisela ye bolamu oyo asali, bósala makasi mpenza mpo bóbakisa na kondima na bino bizaleli malamu, na bizaleli malamu na bino boyebi, na boyebi na bino komipekisa, na komipekisa na bino ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe, na ezaleli na bino ya kokangama na Nzambe bolingo ya bondeko, na bolingo na bino ya bondeko bolingo. Mpo soki bozali na makambo wana mpe botondi na yango, ekopekisa bino kozala bato oyo basalaka mosala te to bato oyo babotaka mbuma te na boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.”—2 Pe. 1:5-8.
6 Ya solo, esɛngaka ‘kosala makasi’ mpo na komipesa na misala oyo esalisaka biso tólona bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. Na ndakisa, esɛngaka milende mpo na koyangana na makita nyonso ya bokristo, kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe kolanda programɛ malamu mpo na koyekola biso moko. Ekoki mpe kosɛnga milende mpe kobongisa makambo malamu mpo Losambo na libota na mpokwa oyo eponamá esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ, ezala ya esengo mpe esalisa libota. Kasi, soki kaka tomeseni na programɛ ya malamu, makambo yango ekómaka pɛtɛɛ—mingimingi soki tomoni matomba na yango.
7, 8. (a) Bandeko balobaki nini mpo na Losambo na libota? (b) Matomba nini bozali kozwa na losambo na libota na bino?
7 Mpo na ebongiseli ya Losambo na libota, ndeko mwasi moko akomi boye: “Esalisi biso tóyekola makambo mingi.” Mosusu alobi boye: “Mpo na koloba solo, nalingaki te boyekoli ya mokanda esuka. Ezali likita oyo nalingaki mingi. Kasi sikoyo, lokola tokómi na butu moko mpo na Losambo na libota na biso, namoni ete Yehova ayebi eloko nini tosengeli na yango mpe ntango nini tosengeli na yango.” Mobali moko alobi boye: “Losambo na libota ezali kosalisa biso mingi mpenza. Kosala likita oyo etaleli kaka bamposa na ngai ná mwasi na ngai ezali malamu mpenza! Biso mibale tozali koyoka ete tokómi komonisa mbuma ya elimo santu mingi, mpe tokómi kosepela mingi na mosala na biso ya kosakola.” Tata moko ya libota alobi boye: “Bana bazali kosala bolukiluki bango moko mpe bazali koyekola makambo mingi—mpe bazali kosepela na yango. Ebongiseli yango ezali kondimisa biso mingi koleka ete Yehova ayebi mabanzo na biso mpe ayanolaka mabondeli na biso.” Yo mpe oyokaka bongo mpo na ebongiseli wana kitoko ya elimo?
8 Bótikaka te makambo ya mikemike ezangisa bino losambo na libota. Mobali moko ná mwasi na ye balobaki boye: “Na bapɔsɔ minei oyo eleki, likambo moko ezalaki kosalema na libota na biso na mpokwa nyonso ya mokolo ya minei, mpe ekokaki kopekisa biso tósala boyekoli na biso, kasi totikaki yango epekisa biso te.” Ya solo, na bantango mosusu, ekosɛnga bóbongola programɛ na bino. Atako bongo, bósala makasi ete Losambo na libota ezangaka te, ata pɔsɔ moko!
9. Ndenge nini Yehova asungaki Yirimia, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?
9 Mosakoli Yirimia azali ndakisa malamu mpo na biso. Azalaki na mposa ya bilei ya elimo oyo Yehova azalaki kopesa ye mpe azalaki kosepela na yango mingi. Bilei yango esalisaki ye ayika mpiko na mosala ya kosakola atako bato bazalaki koyoka te. Alobaki boye: “Liloba ya Yehova . . . ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai.” (Yir. 20:8, 9) Esalisaki ye mpe ayika mpiko na eleko ya mpasi oyo ememaki na kobebisama ya Yerusaleme. Lelo, tozali na Liloba ya Nzambe oyo ekomamá na mobimba na yango. Soki toyekoli yango na molende mpe tokómi kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango, na ndakisa ya Yirimia, tokokoka koyika mpiko na esengo na mosala na biso ya kosakola, tokotikala sembo na kati ya komekama, mpe tokotikala pɛto na bizaleli mpe na elimo.—Yak. 5:10.
Tókoba kozala “na litɔnɔ te mpe na mbeba te”
10, 11. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo tózala “na litɔnɔ te mpe na mbeba te,” mpe yango esɛngi tósala nini?
10 Biso bakristo toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka. Na yango, tozali kokamwa te ndenge mokili etondi na makambo oyo Yehova ayinaka, na ndakisa lokoso, bisalasala na oyo etali kosangisa nzoto, mpe mobulu. Na mokuse, mayele ya Satana ezali boye: ‘Soki nakoki kobangisa basaleli ya Nzambe te, mbala mosusu nakoki kobebisa bango.’ (Em. 2:13, 14) Yango wana, tosengeli kobosana te toli oyo Petro apesaki na bolingo ete: “Bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka [Nzambe] akuta bino na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.”—2 Pe. 3:14.
11 Maloba “bósala nyonso oyo bokoki” ekokani na elendiseli ya kosala “makasi mpenza,” oyo Petro apesaki na ebandeli. Ezali polele ete Yehova—ye oyo atindaki Petro akoma makanisi wana—ayebi ete tosengeli kosala makasi mpo tózala “na litɔnɔ te mpe na mbeba te,” elingi koloba tózala na bɔsɔtɔ ya mokili ya Satana te. Kosala makasi esɛngi mpe tóbatela mitema na biso mpo bamposa ya mabe ekɔtela biso te. (Tángá Masese 4:23; Yakobo 1:14, 15.) Esɛngi lisusu tótɛlɛma ngwi liboso ya bato oyo babulunganaka mpo na etamboli na biso ya bokristo mpe bazali ‘kofinga biso.’—1 Pe. 4:4.
12. Luka 11:13 endimisi biso likambo nini?
12 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kosala oyo ezali malamu ezali etumba. (Rom. 7:21-25) Mpo na kolonga, tosengeli kaka kobaluka epai ya Yehova, oyo apesaka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango na motema moko. (Luka 11:13) Elimo yango ekokolisa kati na biso bizaleli oyo Nzambe andimaka mpe oyo ekosalisa biso tóyeba kobunda kaka na komekama te, kasi mpe na mikakatano ya bomoi, oyo mbala mosusu ekobakisama awa mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene.
Tiká mikakatano ekembisa yo
13. Soki tokutani na mikakatano, nini ekosalisa biso tóyika mpiko?
13 Ntango nyonso oyo tokozala na bomoi na ebongiseli ya makambo oyo, tokokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Kasi na esika olɛmba nzoto, mpo na nini te komona mikakatano libaku ya komonisa bolingo na yo epai na Nzambe mpe ya kokolisa kondima na yo na Liloba na ye? Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.” (Yak. 1:2-4) Kobosana mpe te ete “Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”—2 Pe. 2:9.
14. Ndakisa ya Yozefe elendisi yo na nini?
14 Tózwa ndakisa ya mwana ya Yakobo, Yozefe, oyo bandeko na ye moko batɛkaki na boombo. (Eba. 37:23-28; 42:21) Kondima ya Yozefe ekitaki mpo na likambo wana ya mabe oyo basalaki ye? Asilikelaki Nzambe ndenge atikaki mabe wana ekómela ye? Liloba ya Nzambe eyanoli polele ete asalaki bongo te! Kutu mikakatano ya Yozefe esukaki wana te. Na nsima, bakoselaki ye makambo ete alingaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya bato mpe akɔtaki bolɔkɔ. Kasi ata na mbala wana, akangamaki kaka na Nzambe. (Eba. 39:9-21) Atikaki nde mikakatano ekembisa ye, mpe apambwamaki mingi mpo na yango.
15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Naomi?
15 Ya solo, mikakatano ekoki koyokisa biso mawa to mpe kolɛmbisa biso nzoto. Mbala mosusu, Yozefe mpe ayokaki ndenge wana na bantango mosusu. Basaleli mosusu ya Nzambe bayokaki mpe ndenge wana. Tózwa ndakisa ya Naomi, oyo abungisaki ná mobali ná bana na ye mibale ya mibali. Alobaki boye: “Bóbenga ngai Naomi te. Bóbenga ngai Mara [elingi koloba “Bololo”], mpo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akómiseli ngai makambo bololo mpenza.” (Ruta 1:20, 21) Naomi ayokaki kaka ndenge moto nyonso akoki koyoka mpe ezali likambo ya kokamwa te. Kasi ndenge moko na Yozefe, alɛmbaki te na elimo, mpe atikaki bosembo na ye te. Yango wana, Yehova apesaki mwasi yango ya malamu mbano. (Ruta 4:13-17, 22) Longola yango, na Paradiso oyo ekozala awa na mabele, akosilisa mpasi nyonso oyo Satana ná mokili na ye ya mabe babimisá. “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.”—Yis. 65:17.
16. Ndenge nini tosengeli kotalela libondeli, mpe mpo na nini?
16 Ata soki tokutani na mikakatano nini, bolingo ya Nzambe ekozanga te mpo na kosunga biso. (Tángá Baroma 8:35-39.) Atako Satana akotika te koluka kolɛmbisa biso nzoto, akolonga te soki tokobi kozala “bato ya makanisi malamu,” mpe ‘na bokɛngi, tozali kobondela mpenza.’ (1 Pe. 4:7) Yesu alobaki boye: “Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:36) Awa, Yesu asalelaki liloba “malɔmbɔ,” oyo ezali mabondeli oyo epesami na motema moko. Ntango alendisi biso tópesaka malɔmbɔ, Yesu amonisaki ete sikoyo ezali te ntango ya kozwa na lisɛki boyokani na biso na ye mpe na Tata na ye. Kaka bato oyo bandimami nde bakozala na elikya ya kobika na mokolo ya Yehova.
Kolɛmba te na mosala ya Yehova
17. Soki kosakola na teritware na yo ezali mpasi, ndenge nini ndakisa malamu ya basakoli ya ntango ya kala ekoki kosalisa yo?
17 Komipesa na misala ya elimo epesaka biso makasi. Yango ekundweli biso maloba ya Petro oyo: “Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe!” (2 Pe. 3:11) Mosala ya libosoliboso ezali mosala ya kosakola nsango malamu. (Mat. 24:14) Ya solo, na bateritware mosusu, mosala ya kosakola ekoki kozala mpenza mpasi, mbala mosusu mpo bato bazali kosepela te, to bazali kotɛmɛla biso, to kaka mpo bato batye makanisi nyonso na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki mpe na mikakatano ya ndenge wana. Atako bongo, batikaki te; bazongaki “mbala na mbala” na nsango oyo Nzambe apesaki bango. (Tángá 2 Ntango 36:15, 16; Yir. 7:24-26) Nini esalisaki bango báyika mpiko? Bazalaki komona mokumba na bango ndenge Nzambe azalaki komona yango, kasi te ndenge mokili ezalaki komona yango. Bazalaki mpe komona ete komema nkombo ya Nzambe ezali lokumu oyo eleki monene.—Yir. 15:16.
18. Mosala ya kosakola Bokonzi ekosala nini na kosanzolama ya nkombo ya Yehova na mikolo oyo ekoya?
18 Biso mpe tozali na lokumu monene ya kosakola nkombo mpe mokano ya Yehova. Kobosana te: Lokola tozali kosala mosala na biso ya kosakola, banguna ya Nzambe bakokoka koloba te ete bayokaki te, ntango Nzambe akokweisela bango bitumbu na mokolo monene na ye. Kutu, ndenge moko na Farao ya ntango ya kala, bakoyeba ete Yehova nde azali kobunda na bango. (Kob. 8:1, 20; 14:25) Na ntango yango, Yehova akopesa basaleli na ye ya sembo lokumu na ndenge akolakisa polele ete ya solo, bazalaki mpenza bamonisi na ye.—Tángá Ezekiele 2:5; 33:33.
19. Ndenge nini tokomonisa ete tolingi kosalela malamu motema molai ya Yehova?
19 Pene na nsuka ya mokanda na ye ya mibale, Petro akomelaki baninga na ye bandimi boye: “Bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.” (2 Pe. 3:15) Ya solo, tókoba kosalela malamu motema molai ya Yehova. Ndenge nini? Tókolisa bizaleli oyo esepelisaka ye, tózala “na litɔnɔ te mpe na mbeba te,” tótala mikakatano na ndenge oyo ebongi, mpe tókoba kosala mingi na mosala ya Bokonzi. Soki tosali bongo, tokozwa mapamboli ya seko oyo ekoya nzela moko na “likoló ya sika mpe mabele ya sika.”—2 Pe. 3:13.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki kolona bizaleli ya Nzambe?
• Ndenge nini tokoki kokoba kozala “na litɔnɔ te mpe na mbeba te”?
• Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yozefe mpe Naomi?
• Mpo na nini kobima mosala ya kosakola ezali lokumu monene?
[Elilingi na lokasa 9]
Nini ekosalisa bino mibali bólona bizaleli ya Nzambe na mitema na bino mpe ya bato ya libota na bino?
[Bililingi na lokasa 10]
Ndenge Yozefe asalaki ntango akutanaki na mikakatano ekoki koteya biso nini?