Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/8 nk. 3-4
  • Likambo nini bato mingi babangaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo nini bato mingi babangaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Likámá ya nikleere​—Elongolami mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Likámá ya nikleere​—Mbala oyo esili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/8 nk. 3-4

Likambo nini bato mingi babangaka?

“Ezali kosɛnga kaka te ozala mondimi mpo omona ete tozali kokende na likama.”​—STEPHEN O’LEARY, PROFƐSƐRƐ NA INIVERSITE YA CALIFORNIE DU SUD.a

ONDIMI maloba yango? Masolo oyo elandi ekolobela bantina mosusu oyo bato babangaka avenire. Kasi, ekomonisa mpe ntina oyo okoki kotya motema ete bomoi awa na mabele ekosuka te. Ezali mpenza na ntina otya motema ata soki makambo oyo okotánga ezali ya mawa.

Bato bazali se kobanga etumba ya nikleere. Na 2007, zulunalo moko (Bulletin of the Atomic Scientists) ekebisaki boye: “Makama oyo esalemaki na engumba Hiroshima mpe Nagasaki ntango babwakaki babɔmbi ya liboso ezalaki te mbala ya liboso mokili ekutana na likambo ya mpasi ndenge wana.” Kasi, mpo na nini bato bazali komitungisa? Zulunalo yango elobaki ete na 2007, bibundeli ya nikleere soki 27 000 esalelamaki te mpe ete bibundeli 2 000 kati na yango ekokaki “kopanzana nsima ya miniti nyonso.” Ata soki ndambo moke kaka ya bibundeli yango nde epanzanaki, makama oyo elingaki kobimisa elingaki kozala nsɔmɔ makasi!

Banda wana, kobanga ya bato mpo na etumba ya nikleere ekiti? Bikólo mitano ya nguya oyo ezalaka na bibundeli ya nikleere​—Chine, France, Russie, Royaume-Uni, mpe États-Unis—​bikólo yango nyonso ndenge Annuaire 2009 ya SIPRIbc emonisi yango “ezali kobongisa bibundeli mosusu ya sika ya nikleere to mpe bamonisi ete bazali na makanisi ya kosala yango.” Kasi, annuaire yango emonisi ete kaka bikólo yango te nde ezali na bibundeli ya nikleere. Bato ya mayele bamoni ete bikólo lokola Inde, Pakistan mpe Israël mokomoko ezali na babɔmbi ya nikleere kobanda 60 tii 80. Balobi mpe ete na mokili mobimba, bazali kobongisa bibundeli ya nikleere 8 392 oyo ezali se kozela bábwaka yango!

Kobeba ya bileko ekoki komema makama. Zulunalo oyo touti kolobela (Bulletin of the Atomic Scientists) elobi ete “makama oyo ezali kouta na kobeba ya bileko ekoki kozala ndenge moko na makama oyo bibundeli ya nikleere ebimisaki.” Bato minene ya siansi, na ndakisa Stephen Hawking, profɛsɛrɛ moko ya kala na Iniversite ya Cambridge, mpe Martin Rees, Mokonzi ya Trinity College na Iniversite ya Cambridge, bango mpe bandimi makambo yango. Bakanisi ete kosalela mabe biloko ya siansi mpe ndenge oyo moto azali kobebisa esika oyo afandi ekoki kobongola mpenza bomoi awa na mabele ata mpe kosukisa yango.

Bansango ya likama ezali kobangisa bamilio ya bato. Soki okɔti na internet obɛti maloba “nsuka ya mokili” mpe mobu “2012” na adrɛsi moko ya internet oyo eyebani mingi, okomona ebele ya makanisi oyo ezali komonisa ete nsuka ya mokili ekozala na mbula wana. Mpo na nini? Manaka moko ya kala ya bato ya Maya, oyo eyebani lokola “manaka moko ya molai,” ebongisamá mpo esuka na mobu 2012. Bato mingi babangaka ete yango ekoki kozala elembo oyo ezali komonisa nsuka ya mokili ndenge toyebi yango.

Bandimi mingi ya mangomba bandimaka ete Biblia eteyaka ete mabele oyo tofandi ekobomama. Bakanisaka ete bato nyonso ya sembo bakokende na likoló, mpe baoyo bakotikala bakonyokwama awa na mabele to bakobwakama na lifelo.

Kasi, Biblia elobi mpenza ete mabele ekobebisama to ekobomama libela? Ntoma Yoane akebisaki boye: “Bóndimaka te liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe, kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye.” (1 Yoane 4:1) Na esika ya kondima kaka makambo oyo bato mosusu balobaka, mpo na nini te kofungola Biblia mpe kotala yo moko oyo elobi mpo na nsuka ya mokili? Okokamwa na makambo oyo eteyaka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Euti na lisolo, “Makama oyo ezali kosalema lelo etindi bato básakola likama monene oyo ekoyela bato” (Na Lingelesi), ebimisami na MSNBC Web site, na mokolo ya 19 Ɔkɔtɔbɛ 2005.

b SIPRI elakisi Institut international de recherches pour la paix de Stockholm.

c Lapolo yango oyo ebimaki na Annuaire 2009 ya SIPRI ekomamaki na Shannon N. Kile, molukiluki mpe mokambi ya ebongiseli moko ya SIPRI oyo etalelaka makambo ya bibundeli ya nikleere mpe oyo epekisaka bibundeli ekóma ebele; Vitaly Fedchenko, oyo asalaka bolukiluki na ebongiseli yango; mpe Hans M. Kristensen, mokambi na makambo etali bibundeli na ebongiseli moko (Fédération des scientifiques américains).

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Kopanzana ya bɔmbi, fɔtɔ ya: U.S. National Archives; fɔtɔ ya mopɛpɛ makasi: OMS/​League of Red Cross and U.S. National Archives

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto