Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/9 nk. 30-31
  • Nzambe aponaka bilongi te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe aponaka bilongi te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/9 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Nzambe aponaka bilongi te

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

Bato oyo balobeli: Korneyi, Petro

Na mokuse: Petro amekolaki Nzambe na ndenge aponaki bilongi te, ateyaki Korneyi, moto oyo azalaki Moyisraele te.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ MISALA 10:1-35, 44-48.

Okanisi ete Korneyi akokaki kozala ndenge nini?

․․․․․

Okanisi ete Korneyi azalaki koyoka ndenge nini ntango azalaki kosolola na anzelu, ndenge elobelami na vɛrsɛ 3 tii 6?

․․․․․

Okanisi lisolo nini Korneyi ná bato na ye ya misala basololaki, ndenge elobelami na vɛrsɛ 7 mpe 8?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Mpo na nini liteya oyo Petro azwaki ndenge emonisami na vɛrsɛ 10 tii 16 esimbaki mpenza motema na ye? (Lisalisi: Talelá mimeseno ya Petro lokola Moyuda, ndenge emonisami na vɛrsɛ 14.)

․․․․․

Ezaleli nini omoni epai ya Korneyi na vɛrsɛ 25? Mpo na nini ezaleli wana ezalaka mpenza te epai ya bato oyo bazali na bokonzi lokola korneyi? (Lisalisi: Talá vɛrsɛ 1.)

․․․․․

Salelá mikanda oyo ozali na yango mpo na koluka koyeba basoda boni ya limpinga ya Italie, Korneyi azalaki kokamba.

․․․․․

Mpo na nini kobongwana ya Korneyi ezalaki likambo ya kokamwa?

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Kosalela malamu bandakisa.

․․․․․

Nzambe aponaka bilongi te.

․․․․․

Ndenge oyo yo mpe okoki komonisa ete oponaka bilongi te.

․․․․․

4 NA LISOLO OYO MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

SOKI OZALI NA BIBLIA TE, SƐNGÁ BATATOLI YA YEHOVA, TO TÁNGÁ MIKANDA MOSUSU OYO ELIMBOLAKA BIBLIA NA INTERNET NA www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto