Bimonaneli ya Nzambe mpe ya bikelamu ya elimo
ATA soki otali likoló malamumalamu ngonga boni, okomona ata moto moko te ya elimo. Ata soki otye mpenza litoi okoyoka ata mongongo ya moko te. Kasi, okoki mpenza kondima ete bikelamu ya elimo bazalaka. Bazali na mayele mingi mpe na nguya, mokomoko azali na nkombo mpe na bomoto na ye. Basusu basalelaka biso makambo ya malamu, nzokande basusu balukaka kosala biso mabe. Bango nyonso batyelaka biso miso.
Nzambe ya solo ye moko azali Elimo. (Yoane 4:24) Azali na nkombo oyo ekesenisaka ye na ebele ya banzambe ya lokuta. Nkombo na ye ezali: Yehova. (Nzembo 83:18) Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi mpenza. Azali kobangisa koleka banzambe mosusu nyonso. Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba; kasi Yehova asalá likoló. Lokumu mpe nkembo ezali liboso na ye; bokasi mpe kitoko ezali na esika mosantu na ye.”—Nzembo 96:4-6.
Bimonaneli ya Nzambe ya solo
Biblia eyebisi biso boye: “Moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Tokoki koyeba te ndenge oyo azalaka mpe nkembo na ye, kaka ndenge moto oyo abotamá miso ekufá akoki koyeba balangi te. Kasi, ndenge kaka molakisi ya malamu alimbolelaka bayekoli na ye makambo ya mpasi na elobeli oyo bakoki kokanga ntina na yango, Nzambe mpe na nzela ya Liloba na ye Biblia, alobeli makambo oyo tokoki te komona na nzela ya biloko oyo tokoki komona. Na nzela ya bimonaneli oyo apesaki basaleli na ye mosusu ya sembo na ntango ya kala, Yehova asalisi biso tómona ndenge likoló ezalaka mpe tóyeba boyokani oyo tozalaka na yango na baoyo bafandaka kuna na likoló.
Na ndakisa, emonaneli moko oyo Nzambe apesaki mosakoli Ezekiele, ekokanisi nkembo ya Yehova na mɔtɔ, na kongɛnga, na libanga ya safire, mpe na monama. Na emonaneli mosusu, ntoma Yoane amonaki Yehova afandi na kiti ya bokonzi mpe alobaki ete Nzambe “azali komonana lokola libanga ya jasipe mpe lokola libanga ya ntalo ya motane” abakisaki ete “monama moko ezalaki zingazinga ya kiti yango ya bokonzi ezali komonana lokola emerode.” Maloba yango emonisi biso ete Yehova azali mpenza na kitoko moko ya koloba te, ya kokamwisa, oyo ezali kosepelisa mpe oyo ebongi.—Emoniseli 4:2, 3; Ezekiele 1:26-28.
Mosakoli Danyele mpe azwaki emonaneli ya Yehova, amonaki “nkóto zomi mbala nkóto zomi [baanzelu] batɛlɛmaki liboso na [Yehova].” (Danyele 7:10) Emonaneli yango ezalaki mpenza kokamwisa! Komona ata na emonaneli anzelu moko mpamba ekozala mpenza nsɔmɔ; kasi kanisá ete omoni bamiriade ya baanzelu ya sembo!
Biblia elobeli baanzelu mbala pene na 400, mpe kati na bango ezali na baserafɛ mpe bakeruba. Na Biblia, liloba ya Grɛki mpe ya Ebre oyo ebongolami na “anzelu,” nyonso mibale elimboli “momemi-nsango.” Na yango, baanzelu bakoki kosolola bango na bango, mpe na ntango ya kala bazalaki kosolola na bato. Baanzelu bazali te bato oyo bazalaki na bomoi awa na mabele. Yehova akelaki bango ntango molai liboso akela moto.—Yobo 38:4-7.
Na emonaneli ya Danyele, ebele ya baanzelu bayanganaki mpo na kotala likambo moko ya ntina mingi. Na nsima, Danyele amonaki “moto moko lokola mwana ya moto” apusanaki liboso ya kiti ya bokonzi ya Yehova mpe “bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.” (Danyele 7:13, 14) “Mwana ya moto,” ekelamu ya ntina mingi na bikelamu ya elimo, ezali Yesu Kristo oyo asekwaki oyo Nzambe apesi ye boyangeli na mabele mobimba. Mosika te, bokonzi na ye ekozwa esika ya boyangeli nyonso ya bato mpe ekosukisa maladi, mawa, minyoko, bobola, ata mpe liwa.—Danyele 2:44.
Na ntembe te, kotyama ya Yesu na kiti ya bokonzi esepelisaki ebele ya baanzelu ya sembo oyo balingaka bolamu ya bato. Kasi, likambo ya mawa, baanzelu nyonso te nde basepelaki na likambo yango.
Banguna ya Nzambe mpe ya moto
Na ebandeli, kaka nsima ya kokelama ya bato ya liboso, anzelu moko akómaki na mposa ete bato básambelaka ye, atombokelaki Yehova mpe amikómisaki Satana, oyo elimboli “motɛmɛli.” Satana, mobandisi mpenza ya makambo ya mabe, atɛmɛlaka Yehova, oyo azali bolingo. Baanzelu mosusu balandaki Satana na botomboki na ye. Biblia ebengi bango bademo. Ndenge moko na Satana, bademo bamikómisá banguna mpenza ya bato. Bampasi mingi oyo ezali awa na mabele, kozanga bosembo, maladi, bobola, mpe bitumba eutaka epai na bango.
Atako mangomba mingi elobelaka lisusu mingi te Satana ndenge bazalaki kolobela ye kala, Biblia, na mokanda ya Yobo, emonisi polele bizaleli mpe mposa ya anzelu wana motomboki. Elobi boye: “Nzokande, mokolo oyo bana ya Nzambe ya solo bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova ekómaki, Satana mpe akɔtaki elongo na bango.” Na lisolo oyo elandaki, Satana na kozanga limemya nyonso alobaki ete Yobo asalelaka Nzambe kaka mpo na oyo Nzambe apesaka ye. Mpo na komonisa ete makambo oyo alobaki mpo na Yobo ezali solo, Satana abimiselaki Yobo mpasi makasi, abomaki bibwɛlɛ na ye mpe bana na ye nyonso zomi. Nsima na yango, apesaki Yobo maladi moko ya mabe, babibɔ ebimaki ye nzoto mobimba. Satana alongaki te atako abimiselaki Yobo bampasi wana nyonso.—Yobo 1:6-19; 2:7.
Yehova azali na bantina oyo atiki Satana ntango mingi boye, kasi akotika ye libela te. Mosika te Zabolo akozala lisusu te. Likambo ya liboso esilaki kosalema mpe elobelami polele na mokanda ya Emoniseli, epai balobeli likambo mosusu ya ntina mingi oyo esalemaki na likoló, oyo tokokaki kokanga ntina na yango te. Tozali kotánga boye: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele [Yesu Kristo oyo asekwaki] ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ [Satana], mpe dragɔ ná baanzelu na yango babundaki, kasi elongaki te, mpe bazalaki lisusu na esika te na likoló. Bongo dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.”—Emoniseli 12:7-9.
Simbá ete vɛrsɛ yango elobi ete Satana azali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” Akosaka bato na nzela ya mateya ya lokuta ya mangomba mpo na kotangola bango mosika na Yehova mpe Liloba na ye. Moko ya lokuta yango, ezali ete moto nyonso soki akufi akendaka na mokili ya bilimo. Ezali na makanisi ndenge na ndenge na likambo yango. Na ndakisa, na Afrika mpe na Azia, bato mingi bandimaka ete na liwa, bato bakendaka na mokili ya bilimo, epai bankɔkɔ na bango bafandaka. Liteya ya epongelo mpe ya lifelo eutá mpe na likanisi ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa.
Nsima ya liwa—Moto akobaka kozala na bomoi na likoló?
Kasi, ezali boni mpo na liteya oyo bato mingi na mokili bandimaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló? Ezali solo ete bato mosusu ya malamu bakendaka na likoló, kasi motángo na bango ezali moke soki tokokanisi yango na bamilio ya bato oyo bakufá. Biblia emonisi ete bato 144 000 ‘bakosombama na mabele’ mpe bakozala “banganga-nzambe” mpe “bakoyangela mabele.” (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3) Elongo na Yesu Kristo, Mwana ya moto, bakosala guvɛrnema ya likoló, Bokonzi ya Nzambe. Guvɛrnema yango ekosukisa Satana ná bademo na ye mpe ekokómisa mabele paradiso. Mosika te, ebele ya bato oyo bakufá, bakozonga lisusu na bomoi na elikya ya kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.—Luka 23:43.
Na yango, na mokuse tokoloba ete baoyo bazalaka na nzoto ya elimo bazali ebele. Oyo aleki bango nyonso ezali Yehova Nzambe, Mozalisi ya bomoi nyonso. Ezali na bamiriade ya baanzelu oyo basalelaka ye na bosembo. Baanzelu mosusu oyo Satana azali kokamba, batɛmɛlaki Yehova mpe basalaka nyonso mpo na kokosa bato. Longola yango, ezali na mwa ndambo ya bato oyo “basombamaki,” to baponamaki uta na mabele mpo na kokokisa mikumba ya ntina na likoló. Lokola toyebi makambo oyo nyonso, tiká tótalela sikoyo na baoyo bazali na nzoto ya elimo, nani tokoki kosolola na ye, mpe ndenge oyo tokoki kosala yango.