Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 15/12 lok. 25
  • Kosalela Nzambe eponi mbula te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalela Nzambe eponi mbula te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Banyokwami bakosungama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bazali kondima nsango malamu na Ekólo Lettonie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 15/12 lok. 25

Kosalela Nzambe eponi mbula te

Na engumba Málaga, na sudi ya Espagne, mama moko ná mwana na ye ya mwasi, oyo nkombo na bango mibale ezali Ana, bazwaki batisimo na mokolo ya 19 Desɛmbɛ 2009. Bazalaki kati na bato 2 352 oyo bazwaki batisimo na Espagne na 2009. Kasi ezalaki na eloko moko ya kokamwa epai ya mama wana ná mwana na ye ya mwasi: mama azalaki na mbula 107 mpe mwana azalaki na mbula 83!

Nini etindaki bango bázwa batisimo mpo na komonisa polele komipesa na bango epai ya Yehova? Na ebandeli ya bambula 1970, moninga moko ya kartye azalaki na momeseno ya kobengisa Ana ya mwana na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá oyo ezalaki kosalema na ndako ya Motatoli moko. Ana azalaki kokende mikolo mosusu. Kasi, mosala ya Ana epekisaki ye akende liboso na elimo.

Mbula soki zomi na nsima, bana mosusu ya Ana babandaki koyekola Biblia mpe na nsima bakómaki basaleli ya Yehova. Moko na bango, Mari Carmen, alongaki kosalisa mama na ye asepela lisusu na mateya ya Biblia mpe andima koyekola Biblia. Na nsima, nkɔkɔ ya Mari Carmen, Ana ya mama, abandaki mpe kosepela na mateya ya Biblia. Nsukansuka, bato zomi ya libota yango bazwaki batisimo.

Mokolo oyo bazwaki batisimo, ba-Ana wana mibale, mama ná mwana, bazalaki na esengo makasi. Ana ya mama, oyo azalaki na mbula 107, alobaki boye: “Yehova asaleli ngai malamu mingi, apesi ngai libaku ya koyeba ye.” Mpe Ana ya mwana abakisaki boye: “Liboso Paradiso eya, nalingi kosalela Yehova, kosala mokano na ye mpe kosala nyonso oyo nakoki mpo na kosakola nsango malamu.”

Likambo oyo esepelisaka basi wana mibale oyo mibali na bango bakufá ezali koyangana na makita. Nkulutu moko ya lisangá na bango alobi boye: “Bazangisaka likita ata moko te. Bamibongisaka ntango nyonso mpo na kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”

Ndakisa na bango ya bosembo etindi biso tókanisa mwasi moko na nkombo Ana oyo mobali na ye akufá, “oyo azalaki kozanga te na tempelo, azalaki kosala mosala mosantu butu moi, kokila bilei mpe kosala malɔmbɔ.” Yango epesaki ye libaku ya komona mwana Yesu. (Luka 2:36-38) Na mbula 84, Ana alekisaki mbula ya kosalela Yehova te, ndenge moko mpe na bandoi na ye lelo.

Ozali na bandeko ya libota oyo balingaka koyoka nsango ya Biblia? To okutanaki na mobange moko oyo asepelaki koyoka yo ntango obɛtaki na porte na ye? Bato ya ndenge wana bakoki kokóma lokola ba-Ana oyo tolobeli awa, mpamba te kobanda kosalela Yehova, Nzambe ya solo, eponi mbula te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]

“Yehova asaleli ngai malamu mingi”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]

“Liboso Paradiso eya, nalingi kosalela Yehova”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto