Banyokwami bakosungama mokolo mosusu?
OKOSEPELA komona nsuka ya monyoko, bobele mpo na yo moko te kasi lisusu mpo na bato nyonso? Talelá bandakisa elandi:
Sonia anyokwamaki mingi mpenza.a Ya liboso, ayaki koyeba ete mobali na ye azalaki kosala ekobo uta mbula zomi. Na nsima, mwana na ye moko ya mobali azwaki mikrobe ya sida mpe akufaki na maladi yango. Mbula mibale na nsima mwana na ye mosusu ya mobali akomaki na maladi, mpe mosika te ye mpe akufaki na sida. Sonia amikundoli: “Mikolo ya nsuka ya maladi na ye eumelaki mingi mpenza, anyokwamaki mingi na makanisi, nsuki esilaki ye na motó, mpe azalaki lisusu komona malamu te. Ezalaki mpasi mpenza.”
Fabiana, elenge mwasi moyekoli na Iniversité na mboka Brésil, azalaki komitungisa mingi mpo na lolenge bomoi ya bato na mokili ekeseni. Na nsima likambo ya nsɔ́mɔ ekomelaki ye na bomoi na ye moko. Ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki konyokwama na makanisi, amibomaki. Ntango Fabiana azalaki lisusu na mosala te, moninga na ye moko apesaki ye likanisi ete akenda epai ya pai-de-santo (nganga-nkisi), kokanisáká ete mpasi oyo ekómelaki Fabiana mpo ete moto moko alɔkaki ye! Kasi pai-de-santo akokaki kosunga ye te. Kútu, Fabiana amiyokaki ete anyokwami, akokaki lisusu kolala te mpo na mitungisi azwaki.
Ana anyokwamaki uta bomwana mpenza. Alobi boye: “Ntango nakokisaki mbula moko ya kobotama, mama na ngai asundolaki ngai, boye nkɔkɔ na ngai ya mwasi nde abɔkɔlaki ngai.” Na nsima, ntango Ana azalaki bobele na mbula misato, nkɔkɔ na ye akufaki. Ana atyamaki na ndako ya kobɔkɔla bitiké na engumba Rio de Janeiro, epai kuna akolaki kino akokisaki mbula 13. Alobi boye: “Kuna, bazalaki konyokola biso mingi, mpe nakomaki motomboki, wana nazalaki kokola, nazalaki kobunda ata mpo na likambo nini.”
Emonani ete na lolenge moko to mosusu minyoko ezali kokómela bato nyonso. Ya solo, mokolo na mokolo tozali koyoka masoló ya makámá oyo mazali kokómela bato—na ntango tozali kotala, kotánga, to koyoka bansango. Dr. Mary Sykes Wylie akomi ete: “Eleko na biso oyo etondi na myango ya bopanzi nsango ezali kotikela biso likoki te ya kopɛngola koyoka mbala na mbala bansango ya mabe. Bitumba, makámá mauti na biloko bizalisami, kobebisama ya ezingelo na baizíni, makámá ya mituka, kosala bato mabe, mosala ya banganga-mobulu, kobebisa bana basi, kosangisa nzoto na bana basi na makasi, kobɛtama kati na bandako—makambo nyonso wana mazali kosala ete kotungisama na makanisi ekóma nsɔ́mɔ mpe mpasi ya mokolo na mokolo na ekeke oyo ya 20.” Ntoma moklisto Paulo alobelaki na mokuse mpe na lolenge lobongi mpenza ezalela ya bato: “Biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, izali kokimela elongo kino ntango oyo.”—Baloma 8:22.
Ezali boni mpo na yo? Ozali konyokwama? Lisungi nini okoki komizela na yango? Okozwa kimya ya solo mokolo mosusu? Sonia, Fabiana, mpe Ana bazwaki libɔ́ndisi ya solosolo mpe kimya ya monene! Okoki kotánga yango na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo ya bato na lisoló oyo ebongolamaki.