Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/2 nk. 6-10
  • Elimo santu esalaki na bozalisi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo santu esalaki na bozalisi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bozalisi ezali likamwisi
  • Nguya ya Nzambe oyo ezangi ndelo
  • Elimo santu mpe mabele
  • Elimo santu mpe bikelamu ya bomoi
  • Ekelamu oyo eleki ntina na mabele
  • Tóndima mosala ya elimo santu
  • Elimo santu mpe kondima na biso epai ya Nzambe
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini kotambwisama na elimo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo santu ezali likabo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nguya ya kokela—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/2 nk. 6-10

Elimo santu esalaki na bozalisi!

“Likoló esalemaki na liloba ya Yehova, mpe limpinga na yango mobimba na elimo ya monɔkɔ na ye.”​—NZ. 33:6.

1, 2. (a) Ndenge nini boyebi ya moto na ntina etali likoló mpe mabele ezali kobakisama? (b) Motuna nini esengeli kozwa eyano?

NA MOBU 1905, Albert Einstein, moto moko monene na makambo ya siansi mpe bato mosusu ya siansi bazalaki kokanisa ete molɔ́ngɔ́ ezali kaka na galaksi moko epai tozali: Voie lactée. Bamikosaki mpenza! Bayebaki bonene ya molɔ́ngɔ́ te. Lelo, bato bazali komona ete molɔ́ngɔ́ ezali na bagalaksi kolela miliare 100, oyo mosusu ezali na bamiliare ya minzoto. Lokola bazali kosalela bamasini ya malamu koleka mpo na kotala minzoto (télescope), motángo ya bagalaksi oyo bazali koyeba ezali se komata.

2 Bato ya siansi na 1905 bayebaki likoló malamu te; bayebaki mpe mabele malamu te. Ya solo, bato wana oyo bazalaki na bomoi eleki sikoyo ekeke moko bayebaki makambo mingi koleka bankɔkɔ na bango. Kasi lelo, bato bayebi malamu koleka ndenge bomoi ezali kitoko, bikelamu ya bomoi ndenge na ndenge oyo ezali na mokili mpe makambo ndenge na ndenge oyo ebatelaka bomoi. Mpe na ntembe te tokoyekola makambo mosusu mingi koleka mpo na mabele mpe likoló na bambula oyo ezali koya. Kasi, ebongi mpenza tótuna boye: Ndenge nini nyonso wana ebandaki? Eyano na motuna yango ekoki koyebana kaka mpo Mozalisi ayebisi yango na kati ya Makomami Mosantu.

Bozalisi ezali likamwisi

3, 4. Ndenge nini Nzambe azalisaki molɔ́ngɔ́, mpe ndenge nini misala na ye epesaka ye nkembo?

3 Ndenge molɔ́ngɔ́ ebandaki elimbolami na maloba oyo ya ebandeli ya Biblia: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Eba. 1:1) Eloko moko te ezalaki na ebandeli; Yehova asalelaki elimo santu to nguya na ye oyo esalaka mosala mpo na kokela likoló, mabele, mpe biloko mosusu nyonso oyo ezali na kati ya molɔ́ngɔ́. Moto ya misala ya mabɔkɔ asalelaka mabɔkɔ na ye mpe bisaleli mosusu mpo na kosala biloko; nzokande, Nzambe atindaka elimo santu mpo na kosala misala na ye minene.

4 Na ndenge ya elilingi, Biblia ebengi elimo santu “mosapi” ya Nzambe. (Luka 11:20; Mat. 12:28) Mpe “mosala ya mabɔkɔ na ye,” elingi koloba biloko oyo Yehova akelá na nzela ya elimo santu na ye, epesaka ye nkembo mingi. Mokomi ya nzembo Davidi ayembaki boye: “Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe; mpe etando ezali koyebisa mosala ya mabɔkɔ na ye.” (Nz. 19:1) Ya solo, bozalisi emonisaka nguya monene ya elimo santu ya Nzambe. (Rom. 1:20) Na ndenge nini?

Nguya ya Nzambe oyo ezangi ndelo

5. Pesá ndakisa oyo emonisi ete elimo santu ya Yehova ezali na nguya ya kozalisa.

5 Molɔ́ngɔ́ na biso monene emonisaka ete nguya mpe makasi ya Yehova esilaka te. (Tángá Yisaya 40:26.) Tózwa ndakisa ya moi. Moi, monzoto oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka milio 150 longwa na mabele, ezali na mɔtɔ makasi ya degré Celsius soki milio 15. Atako moi ebimisaka molunge makasi ndenge wana, ntaka oyo ekaboli yango ná mabele ebongi mpo bikelamu nyonso ya bomoi ekoba kozala na bomoi. Emonani polele ete esɛngaki nguya makasi mpenza, kaka mpo na kokela moi te, kasi mpe bamiliare ya minzoto mosusu. Yehova azali na makasi oyo esengelaki mpo na kosala yango.

6, 7. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe asalelaka elimo santu na ye na molɔngɔ? (b) Nini emonisi ete molɔ́ngɔ́ ebimaki na pwasa te?

6 Tozali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete Nzambe asalelaki elimo santu na molɔngɔ mpenza. Tózwa ndakisa: kanisá ete ozali na saani moko oyo etondi na babale ya langi ndenge na ndenge. Oningisi saani yango mpe babale esanganisangani. Na nsima, obwaki yango nyonso na mabele na mbala moko. Okolikya ete babale yango esangana na kolanda langi na yango, elingi koloba babale ya bule esangani ná oyo ya bule, ya mai ya mosaka esangani ná oyo ya mai ya mosaka, mpe bongo na bongo? Te! Likambo oyo esalemi kozanga ebongisama ebimaka na molɔngɔ te. Bato bandimaka ete makambo esalemaka nde ndenge wana na mokili.a

7 Nzokande, soki totali molɔ́ngɔ́ malamumalamu mpe biloko oyo ezali na kati na yango, tokomona nini? Tokomona bagalaksi minene, minzoto, mpe baplanɛti oyo ebongisami malamu mpenza, ezali kotambola na molɔngɔ. Yango ebimaki na pwasa te; ezali mpe te likambo oyo esalemaki kaka yango moko. Boye, motuna yango oyo: Nguya nini esalelamaki na ebandeli mpo na kobimisa molɔ́ngɔ́ epai makambo ebongisamá malamu ndenge wana? Makambo oyo bato bazali koyekola na nzela ya siansi mpe biloko oyo babimisi ekokoka te mpo na kosalisa biso bato tóyeba nguya yango. Nzokande, Biblia elobi ete ezali elimo santu ya Nzambe, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Likoló esalemaki na liloba ya Yehova, mpe limpinga na yango mobimba na elimo ya monɔkɔ na ye.” (Nz. 33:6) Ntango tozali kotala likoló na butu, miso na biso ekoki komona kaka ndambo moke ya “limpinga” yango ya minzoto!

Elimo santu mpe mabele

8. Makambo oyo toyebi mpenza mpo na misala ya Yehova ezali ndenge nini?

8 Makambo oyo toyebi lelo mpo na biloko oyo ezalisamá ezali eloko te soki tokokanisi yango na nyonso oyo tosengeli naino koyekola. Mpo na makambo oyo toyebi na ntina etali misala ya bozalisi ya Nzambe, Yobo, moto ya sembo, alobaki ete: “Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye, mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye!” (Yobo 26:14) Bikeke na nsima, Mokonzi Salomo, moto oyo atalaki bozalisi ya Yehova na likebi mpenza, alobaki boye: “[Nzambe] asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango. Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango, mpo bato báyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.”​—Mos. 3:11; 8:17.

9, 10. (a) Nguya nini Nzambe asalelaki ntango akelaki mabele? (b) Lobelá mwa makambo oyo esalemaki na mikolo misato ya liboso ya bozalisi.

9 Nzokande, Yehova ayebisi biso mwa makambo ya ntina na oyo etali misala na ye. Na ndakisa, Biblia elobi ete elimo ya Nzambe ezalaki kosala na mabele kalakala mpenza. (Tángá Ebandeli 1:2.) Na ntango wana, mabele oyo ekauki ezalaki te, pole te, mpe mbala mosusu mopɛpɛ ya malamu mpe te na etando ya mabele.

10 Biblia elobeli mpe makambo oyo Nzambe asalaki na mikolo ya bozalisi. Mikolo yango ezali mikolo ya ngonga 24 te; ezali nde bileko ya ntango molai. Na mokolo ya liboso ya bozalisi, Yehova asalaki ete pole ebanda komonana na mabele. Mosala yango eyaki kosila na nsima, ntango moi mpe sanza ebandaki komonana polele longwa na mabele. (Eba. 1:3,14) Na mokolo ya mibale, etando oyo ezingi mabele ebandaki kosalema. (Eba. 1:6) Na ntango wana, mai, pole, mpe mopɛpɛ ezalaki; kasi mabele oyo ekauki ezalaki kaka te. Na ebandeli ya mokolo ya misato, Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kobimisa mabele oyo ekauki, mbala mosusu asalelaki banguya makasi oyo ezalaka na nse ya mabele mpo na kobimisa bakontina. (Eba. 1:9) Ezalaki na makambo mosusu ya minene oyo esalemaki na mokolo ya misato mpe na mikolo mosusu ya bozalisi oyo elandaki.

Elimo santu mpe bikelamu ya bomoi

11. Lokola bikelamu ya bomoi esalemá na ndenge ya kokamwa, ezali na boyokani mpe kitoko emonisi nini?

11 Elimo ya Nzambe ebimisaki mpe bikelamu ya bomoi oyo ebongisamaki malamu mingi koleka. Na nzela ya elimo santu, banda na mokolo ya misato ya bozalisi tii na mokolo ya motoba, Nzambe akelaki milona mpe banyama ya mitindo ndenge na ndenge. (Eba. 1:11,20-25) Na yango, bikelamu ya bomoi ezali na bandakisa ebele ya biloko oyo esalemá na ndenge ya kokamwa, oyo ezali na boyokani mpe na kitoko oyo emonisaka ete esalemá na mayele moko ya koloba te.

12. (a) ADN esalaka mosala nini? (b) Ndenge ADN esalaka esengeli koteya biso nini?

12 Tólobela ADN (acide désoxyribonucléique), oyo esalisaka mitindo nyonso ya bikelamu ya bomoi elekisa bizaleli na yango epai ya bakitani na yango. Bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele​—ezala mikrobe, matiti, nzoku, baleine bleue, mpe bato—​basalelaka ADN mpo na kobotana. Atako bikelamu ya bomoi oyo ezali na mabele ekeseni makasi, ADN mpe makambo mosusu oyo ebatelaka bizaleli ya motindo mokomoko ebongwanaka te mpe esalisaka bikelamu yango ekesana na mitindo mosusu libela na libela. Na yango, kaka ndenge Yehova Nzambe alingaki yango, bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali na mabele ezali se kosala misala na yango mpo bomoi ekoba. (Nz. 139:16) Ebongiseli wana oyo etambolaka malamu mpe na molɔngɔ emonisaka mpe ete bozalisi ezali mosala ya “mosapi,” to elimo santu, ya Nzambe.

Ekelamu oyo eleki ntina na mabele

13. Ndenge nini Nzambe azalisaki moto?

13 Liboso, mabele “ezalaki na lolenge ata moko te mpe ezalaki mpamba”; ntango bileko ebele elekaki mpe Nzambe asalaki biloko ndenge na ndenge oyo ezali na bomoi mpe oyo ezangi bomoi, mabele ezalaki lisusu bongo te. Kasi, Yehova asilisaki naino te kosalela elimo na ye mpo na kozalisa. Azalaki na mposa ya kosala ekelamu oyo eleki ntina na mabele. Na nsuka ya mokolo ya motoba, Nzambe azalisaki moto. Ndenge nini Yehova asalaki yango? Asalelaki elimo santu na ye mpe biloko oyo ezalaki na mabele.​—Eba. 2:7.

14. Likambo nini ya ntina mingi ekesenisi bato ná banyama?

14 Ebandeli 1:27 elobi boye: “Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali ná mwasi.” Kosalema na elilingi ya Nzambe elimboli ete Yehova akelaki biso na likoki ya komonisa bolingo, kozala na bonsomi ya kopona, ata mpe ya kokóma na boyokani na ye, Mozalisi na biso. Na yango, bɔɔngɔ na biso ekeseni mosika na oyo ya banyama. Yehova asalaki bɔɔngɔ ya moto mingimingi mpo tókoka kokoba kosepela koyekola bomoto mpe misala na ye libela na libela.

15. Libaku nini Adama ná Eva bazalaki na yango?

15 Na ebandeli ya bomoi ya bato, Nzambe apesaki Adama ná mwasi na ye Eva mabele mpe biloko nyonso kitoko oyo ezali na mabele mpo báyekola yango mpe básepela na yango. (Eba. 1:28) Yehova apesaki bango bilei beboo mpe atyaki bango na paradiso. Bazalaki na libaku ya kozala na bomoi libela na libela mpe ya kokóma baboti ya bamilio ya bana ya kokoka oyo bakobanda kolinga bango. Kasi, makambo etambolaki bongo te.

Tóndima mosala ya elimo santu

16. Atako baboti na biso ya liboso batombokaki, tozali na elikya nini?

16 Na esika bátosa Mozalisi na bango mpo na komonisa botɔndi na bango, Adama ná Eva batombokelaki ye na moimi na bango. Bato nyonso ya kozanga kokoka bautá epai na bango mpe bazali konyokwama mpo na botomboki yango. Kasi Biblia emonisi ndenge Nzambe akosilisa mabe nyonso oyo lisumu wana ya baboti na biso ya liboso ebimisá. Makomami emonisi mpe ete Yehova akokokisa mokano na ye ya ebandeli. Mabele ekokóma paradiso oyo etondi na bato ya esengo, mpe ya nzoto kolɔngɔnɔ oyo bakozwa bomoi ya seko. (Eba. 3:15) Mpo tókoba kozala na kondima na elaka yango oyo ekitisaka motema, tozali na mposa ya lisalisi ya elimo santu ya Nzambe.

17. Makanisi ya ndenge nini tosengeli kokima?

17 Tosengeli kobondela Yehova mpo na kosɛnga elimo santu. (Luka 11:13) Kosala bongo ekosalisa biso tóndima mpenza ete bozalisi ezali mosala ya lobɔkɔ ya Nzambe. Lelo, makanisi ya bato oyo balobaka ete Nzambe azali te mpe baoyo bandimaka liteya ya evolisyo ezali kopanzana mingi, nzokande euti na makambo ya lokuta mpe oyo ezangi moboko. Tosengeli te kotika makanisi yango ya mabe ebulunganisa biso to ebangisa biso. Biso nyonso tosengeli komibongisa mpo na kopikama makasi liboso ya etumba yango mpe ya bopusi ya baninga, oyo eyaka nzela moko na yango.​—Tángá Bakolose 2:8.

18. Ntango tozali kotalela ebandeli ya molɔ́ngɔ́ mpe ya moto, mpo na nini ekozala bwanya te koboya kondima ete ezalaki na Mozalisi moko ya mayele?

18 Mpo kondima ya moto na Biblia mpe epai ya Nzambe ekóma makasi, asengeli kotalela na bosembo makambo oyo endimisi ye ete biloko nyonso ezalisamaki. Ntango bazali koyekola ebandeli ya molɔ́ngɔ́ mpe ya moto, bato mingi bamonaka ete ezali likambo ya mayele te kondima ete ezali na nguya mosusu oyo ebimisaki molɔ́ngɔ́; balobaka ete molɔ́ngɔ́ ebimaki na nguya na yango moko. Nzokande, soki tolobi tótalela makambo ndenge wana, tokotalela bilembeteli nyonso na bosembo te. Lisusu, tokobosana ete ezali na bikelamu ebele “oyo ekoki kotángama te,” oyo ebongisamá malamu mpe ezali na ntina. (Yobo 9:10; Nz. 104:25) Biso bakristo toyebi ete nguya oyo esalaki na bozalisi ezali elimo santu mpe ete Yehova nde atambwisaki yango na mayele na ye.

Elimo santu mpe kondima na biso epai ya Nzambe

19. Nini endimisaka yo ete Nzambe azali mpe ete elimo santu esalaka?

19 Ezali na ntina te tóyeba likambo nyonso oyo etali bozalisi mpo tózala na kondima epai ya Nzambe, tólinga ye mpe tómemya ye makasi. Ezali kaka ndenge moko na kozala na moninga ya moto. Kaka koyeba makambo ya moto te nde esalaka ete tókóma baninga. Mpo boninga ya bato mibale ekóma makasi, basengeli koyebana malamu bango mibale. Ezali mpe bongo na kondima na biso epai ya Nzambe. Kondima na biso ekokóma makasi soki tozali koyekola koyeba ye malamumalamu. Ya solo, tomonaka ete Nzambe azali mpenza ntango azali koyanola mabondeli na biso mpe ntango tomoni matomba ya kosalela mitinda na ye na bomoi na biso. Topusanaka lisusu mingi penepene na Yehova ntango tozali komona mpenza ndenge azali kotambwisa biso, kobatela biso, kopambola milende na biso na mosala na ye, mpe kopesa biso biloko oyo tosengeli na yango. Nyonso wana endimisaka biso mpenza ete Nzambe azali mpe ete elimo santu na ye esalaka.

20. (a) Mpo na nini Nzambe azalisaki molɔ́ngɔ́ mpe moto? (b) Nini ekosalema soki tokobi kolanda litambwisi ya elimo santu ya Nzambe?

20 Biblia ezali eloko monene oyo emonisaka ndenge Yehova asalelaki nguya na ye mpo bato oyo bakomaki yango “balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” (2 Pe. 1:21) Koyekola Makomami na likebi ekoki kosalisa biso tókolisa kondima na Nzambe ete azali ye oyo azalisaki biloko nyonso. (Em. 4:11) Yehova akómaki Mozalisi mpo na komonisa bolingo na ye oyo ezangi nsuka. (1 Yoa. 4:8) Na yango, tósala nyonso mpo na kosalisa basusu báyekola makambo etali Tata mpe Moninga na biso ya bolingo oyo azali na likoló. Mpe soki biso moko tozali kokoba kotika elimo ya Nzambe etambwisa biso, tokozwa libaku ya koyekola makambo na ye libela na libela. (Gal. 5:16, 25) Tiká mokomoko na biso akoba koyekola makambo etali Yehova mpe misala na ye minene mpe tiká biso nyonso tómonisa bolingo na ye oyo amonisaki ntango asalelaki elimo santu na ye mpo na kozalisa likoló, mabele, mpe moto.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá nkasa 24 mpe 25 ya buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? (na Lifalanse).

Okoki kolimbola?

• Likoló mpe mabele ezali koteya biso nini mpo na ndenge Nzambe asalelaki elimo santu?

• Lokola tosalemá na elilingi ya Nzambe epesaka biso mabaku nini?

• Mpo na nini tosengeli kotatela makambo oyo endimisi bozalisi?

• Ndenge nini boyokani na biso na Yehova ekoki kokola?

[Elilingi na lokasa 7]

Ndenge makambo ebongisamá malamu na kati ya molɔ́ngɔ́ eteyaka biso nini mpo na bozalisi?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Minzoto: Anglo-Australian Observatory/​David Malin Images

[Bililingi na lokasa 8]

ADN esalaka ndenge nini na biloko oyo nyonso?

[Elilingi na lokasa 10]

Omibongisi mpo na kolobela bindimeli na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto