Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 nk. 10-11
  • Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya motema?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyangeli mpe kosambisama
  • Mapamboli ya seko
  • Bokonzi na katikati na bango
  • Bokonzi oyo ezali na ntina mpo na yo
  • Bokonzi ya Nzambe ezali na motema na yo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Oyo Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 nk. 10-11

Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya motema?

Na buku na ye (Yesu moto ya Nazarete, na Lifalanse), Papa Benoît XVI alobaki ete: “Soki motema ya moto eyoki to endimi Yesu mpe ekómi na kondima, na ndenge wana nde Bokonzi ya Nzambe eyaka.” Mpo na bato mosusu, Bokonzi ya Nzambe ezali kaka​—mbongwana oyo esalemaka na kati ya motema ya moto ntango andimi Yesu kristo mpe akómi na kondima. Bokonzi ya Nzambe ezali kaka mbongwana oyo moto asali, bokonzi oyo ezali ‘kaka na motema na yo’?

MPO na Yesu, Bokonzi ya Nzambe ezalaki mpenza likambo moko ya ntina. Papa Benoît andimi ete Bokonzi ya Nzambe ezalaki “likambo ya libosoliboso oyo Yesu azalaki kolobela mingi na mosala ya kosakola.” Atako mosala na ye ezalaki ya ntango mokuse, Yesu atambolaki bisika mingi mpo na “kosakola nsango malamu ya bokonzi.” (Matai 4:23) Na mateya na ye mpe na makamwisi oyo asalaki, Yesu amonisaki polele ete Bokonzi ya Nzambe esuki te kaka na kondima mpe kotosa Nzambe. Etaleli boyangeli, kosambisama mpe mapamboli ya seko.

Boyangeli mpe kosambisama

Na libaku moko na boumeli ya mikolo ya nsuka ya mosala ya Yesu, mama ya Yakobo mpe Yoane, bayekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi, ayaki epai ya Yesu mpe alobaki boye: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na bokonzi na yo.” (Matai 20:21) Emonani polele ete azalaki kolobela te eloko moko oyo ezalaki na kati ya motema ya bana na ye. Ayebaki ete Bokonzi ezalaki boyangeli elongo na Yesu, mpe alingaki ete bana na ye bázala na Bokonzi yango. Kutu Yesu alakaki bantoma na ye 11 ya sembo ete bakozala na Bokonzi na ye mpe ‘bakofanda na bakiti ya bokonzi’ mpe ‘bakosambisa’ elongo na ye. (Luka 22:30) Kasi, mpo na bayekoli na ye, Bokonzi ya Yesu ezalaki boyangeli ya solo​—guvɛrnema mpenza.

Ezali boni mpo na bato ya ntango ya Yesu? Bayebaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali kaka mbongwana oyo moto asalaka to bayebaki nde ete ezali eloko moko oyo eleki yango? Mwa moke liboso ya elekeli ya mobu 33, ntango Yesu azalaki kokɔta na Yerusaleme amati likoló ya mwana mpunda, ebele ya bato bayambaki ye mpe basusu bazalaki koganga ete: “Mwana ya Davidi, tobondeli yo, bikisá!” (Matai 21:9) Mpo na nini bazalaki koganga bongo? Na ntembe te, bayebaki ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki mpe ete Nzambe akopesa ye Bokonzi ya seko, “kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye.” Bazalaki kozela na motema likoló lobiko, kimya, mpe bosembo oyo Bokonzi yango ekomema.​—Luka 1:32; Zekaria 9:9.

Mapamboli ya seko

Ata bato oyo bazalaki mpenza te kosepela na mosala ya Yesu bayebaki moko ya mateya na ye. Ntango Yesu alingaki kokufa, mosali-mabe oyo babakaki na nzete pembeni na ye alobaki boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Eyano ya Yesu ezalaki nini? Alakaki moto yango ete: “Okozala na ngai na Paradiso.”​—Luka 23:42, 43.

Emonani ete moyibi yango andimaki ete ntango Yesu akosekwa, na nsima akozwa to akokɔta na Bokonzi. Yesu akozala kaka na bokonzi te ya kosekwisa mpe kosalisa moto yango atika misala na ye ya mabe​—ná mpe bamilio mosusu ya bato—​kasi mpe azali na mposa ya kosala yango. Ɛɛ, lokola Nzambe apesi ye nguya ya koyangela kuna na likoló, Yesu akomemela bato mapamboli ya seko na mabele mobimba na nzela ya Bokonzi.​—Yoane 5:28, 29.

Bokonzi na katikati na bango

Yesu alobaki te ete, “Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino”? Ɛɛ, maloba oyo ya Yesu ezali na Luka 17:21. Kutu, mabongoli mosusu ya Biblia elobi ete “Bokonzi bwa Nzámbe bozalí o ntéi ya bíno,” oyo mosusu mpe elobi ete “ejali kati na bino.” (Na ndakisa talá Biblia liloba lya Nzambe mpe Biblia haut fleuve.) Na maloba wana, Yesu alingaki koloba nini?

Lisolo yango emonisi ete Yesu alobaki maloba wana epai ya etuluku moko ya bato ya lingomba ya Bafarisai oyo bazalaki batɛmɛli. Bazalaki na bilikya na bango moko na oyo etali Masiya mpe Bokonzi na ye. Mpo na bango, Masiya asengelaki koya “na mapata ya likoló” lokola Mokonzi moko ya nkembo mpo na kosikola Bayuda na mabɔkɔ ya Baroma mpe kozongisela Yisraele bokonzi. (Danyele 7:13, 14) Nzokande, Yesu amonisaki ete bazali na libunga, ayebisaki bango boye: “Bokonzi ya Nzambe ezali koya te na ndenge oyo bato nyonso bakomona yango polele.” Na nsima abakisaki boye: “Talá! bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.”​—Luka 17:20, 21.

Atako Yesu ateyaki mpe asalaki makamwisi oyo emonisaki polele ete azali Mokonzi ya Bokonzi oyo Nzambe alakaki, lokola bazalaki na makanisi malamu te mpe bazangaki kondima, Bafarisai batombokaki lisusu makasi. Baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya. Na yango, apesaki bango bilembeteli: Bokonzi ya Nzambe, oyo emonisamaki na mokonzi oyo Nzambe aponaki azalaki na ‘katikati na bango.’ Alobaki te ete báluka na kati na bango.a Yesu ná bayekoli na ye batɛlɛmaki liboso na bango. Alobaki ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali awa elongo na bino.”​—Luka 17:21, Biblia Contemporary English Version.

Bokonzi oyo ezali na ntina mpo na yo

Atako Bokonzi ya Nzambe ezalaka te na kati ya mitema ya bato ya masumu, esengeli kozala likambo ya ntina mpo na biso. Na mateya mpe misala na ye ya nguya, Yesu asalaki makasi mpo bayoki na ye bándimela Bokonzi ya sembo oyo ekomema kimya mpe libateli ya solosolo. Alingaki ete bázala na kondima oyo ekosalisa bango bázwa bikateli ya malamu na bomoi na bango. Kutu, ateyaki bango bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Maloba ya Yesu esimbaki mitema ya bato mingi oyo bazalaki koyoka ye mpe bakómaki na kondima oyo etindaki bango bálanda Yesu mpo bázwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe.

Okolinga kozala na kondima ya ndenge wana? Kasi, osengeli kosala nini mpo na kokóma na kondima ya ndenge wana? Kanisá lisusu maloba oyo Yesu abandaki na yango lisolo na ye likoló ya Ngomba, lisolo oyo eyebani mingi: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:3) Mpo na nini te kondima koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova oyo bamemeli yo zulunalo oyo? Na yango, okokóma na elikya, kaka te mpo na mbongwana oyo okosala, kasi mpe mpo na boyangeli ya sembo mpe ya boyengebene​—Bokonzi oyo ekomemela bato nyonso kimya mpe libateli.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “bino” etaleli Bafarisai oyo Yesu azalaki koloba na bango. Ya solo, Yesu akokaki te kolobela mbongwana ya Bafarisai to ndenge motema na bango ezalaki kondima makambo.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Bokonzi ya Nzambe ezalaki na mitema ya batɛmɛli ya Yesu oyo bazalaki mitema makasi mpe babomi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto