Mituna ya batángi . . .
Nzambe akelaki Zabolo?
▪ Lokola Biblia elobaka ete Nzambe “azalisaki biloko nyonso,” bato mosusu balobaka ete kaka Nzambe nde akelaki mpe Zabolo. (Baefese 3:9; Emoniseli 4:11) Biblia emonisi polele ete Nzambe te nde akelaki ye.
Yehova akelaki ekelamu oyo akómaki Zabolo. Na yango, kozala ya ekelamu yango oyo azali motɛmɛli monene ya Nzambe ekweisi te makambo oyo Makomami elobi ete Yehova azali Mozalisi. Biblia elobi na ntina na Yehova ete: “Mosala na ye ezali ya kokoka, Mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; Azali moyengebene mpe sembo.” (Kolimbola Mibeko 32:3-5) Na maloba wana, tokoki koloba ete na ebandeli, Satana azalaki ekelamu ya kokoka mpe sembo, azalaki moko ya bana ya Nzambe: anzelu. Na Yoane 8:44, Yesu alobaki ete Zabolo “akangamaki makasi te na solo,” maloba yango emonisi ete na ebandeli Satana azalaki ekelamu ya kolongobana mpe azalaki na mbeba te.
Nzokande, lokola bikelamu nyonso ya Yehova, anzelu wana oyo akómaki Satana azalaki na bonsomi ya kopona malamu to mabe. Lokola aponaki kotɛmɛla Nzambe mpe apusaki mobali mpe mwasi ya liboso bálanda ye na botomboki na ye, amikómisaki ye moko Satana, oyo elimboli: “Motɛmɛli.”—Ebandeli 3:1-5.
Ekelamu wana mabe ya elimo amikómisaki mpe ye moko Zabolo, oyo elimboli: “Mokoseli-bato-makambo.” Satana azalaki motɛmɛli oyo abombanaki nsima ya nyoka mpe na mayele mabe asalelaki lokuta mpo na kokosa Eva atosa te mobeko ya Mozalisi na bango oyo amonisaki polele. Yango wana Yesu abengaki Satana “tata ya lokuta.”—Yoane 8:44.
Kasi, ndenge nini ekelamu ya kokoka mpe ya elimo—oyo azalaki na bolɛmbu te mpe baninga ya mabe te—akómaki na makanisi ya mabe? Emonani ete alulaki losambo oyo esengelaki kopesama kaka na Nzambe mpe amonaki ete azali na likoki ya kobenda bato na nse ya boyangeli na ye na esika ete bázala na nse ya boyangeli ya Yehova. Lokola akangamaki kaka na likanisi wana ya koyangela na esika abengana yango, apesaki nzela ete likanisi yango ekola, mpe nsukansuka asalelaki yango. Mokanda ya Yakobo elobeli ndenge likambo yango esalemaka boye: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”—Yakobo 1:14, 15; 1 Timote 3:6.
Tózwa ndakisa: Kanisá ete moto moko oyo abombaka mbongo azwi libaku ya kokosa na bapapye mpo ayiba mbongo na kompanyi oyo asalaka. Akoki kobengana nokinoki likanisi wana ya mabe. Kasi, soki atiki yango, akobanda kosepela na yango, mpe akoki kosalela yango. Kasi, soki asaleli yango, amikómisi ye moko moyibi. Soki akosi mpo na mabe wana, amikómisi mpe mokosi. Ndenge moko, ntango akómaki na makanisi mabe mpe asalelaki yango, anzelu oyo Nzambe akelaki asalelaki bonsomi na ye ya kopona mpo na kokosa mpe kotombokela Tata na ye, na ndenge yango amikómisaki Satana Zabolo.
Likambo ya esengo, Satana Zabolo akobomama na ntango oyo Nzambe atye. (Baroma 16:20) Liboso ntango yango ekoka, basambeli ya Yehova Nzambe bayebi mayele mabe ya Satana mpe ndenge oyo bakoki komibatela na yango. (2 Bakorinti 2:11; Baefese 6:11) Na yango, “bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Lokola aponaki kotɛmɛla Nzambe, anzelu ya kokoka amikómisaki Satana