Tómilɛngɛla!
“Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”—MAT. 24:44.
1, 2. (a) Biblia esakolaki makambo nini oyo tokoki kokokanisa na ndenge oyo tigre moko ebalukelaki moto? (b) Likambo yango oyo ezali koya etali yo na nini?
NA BOUMELI ya bambula mingi, moto moko oyo amesaná kosakanisa banyama azalaki kosepelisa batali na ye na ndenge azalaki kosakana na kimya na banyama babengi tigre du Bengale; amesanaki na banyama yango. Alobaki boye: “Soki nyama emeseni na yo, okobanda koyoka lokola ozwi kado oyo eleki kitoko na mokili mobimba.” Nzokande, na mokolo ya 3 Ɔkɔtɔbɛ 2003, makambo ebongwanaki. Mpo na ntina moko oyo eyebanaki te, moko ya banyama yango, tigre moko ya mpɛmbɛ oyo ezalaki na kilo 172, ebalukelaki ye. Moto yango ayebaki te ete likambo ya ndenge wana ekosalema, eyelaki ye na mbalakaka.
2 Nzokande, Biblia mpe esakoli etumba moko oyo ekouta na ‘nyama moko mabe,’ mpe tosengeli komilɛngɛla. (Tángá Emoniseli 17:15-18.) Nyama mabe yango nde nini? Ekobundisa nani? Nyama mabe ya langi ya motane makasi ezali bongo ONU, mpe “maseke zomi” ezali baguvɛrnema nyonso ya politiki. Ekobalukela mwasi ya ndumba, elingi koloba Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, mpe ekobebisa yango na ndenge ya nsɔmɔ. Likambo yango ekokamwisa mpenza mpo nyama mabe ná Babilone Monene bazali lokola baninga. Yango nyonso ezali na kati ya mokili ya Satana. Kasi, likambo yango ekosalema ntango nini? Toyebi mokolo te, toyebi mpe ngonga te. (Mat. 24:36) Toyebi kaka ete ekosalema na ngonga oyo tozali kozela yango te mpe ete ntango oyo etikali mpo likambo yango esalema ekómi mokuse. (Mat. 24:44; 1 Ko. 7:29) Yango wana, ezali na ntina mingi ete tómilɛngɛla na elimo mpo ete ntango likambo wana ekosalema mpe Kristo akoya mpo na kopesa bitumbu ya Nzambe, aya mpe mpo na kosikola biso! (Luka 21:28) Mpo tómilɛngɛla ndenge wana, tokoki kozwa mateya na bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya sembo oyo bamilɛngɛlaki mpe na ndenge yango bamonaki na miso na bango ndenge bilaka ya Nzambe ekokisamaki. Tokobomba mpenza na mitema na biso bandakisa yango ya makambo oyo esalemaki solo?
Omilɛngɛla lokola Noa
3. Makambo nini epesaki Noa mpasi mpo na kosalela Nzambe na bosembo?
3 Atako makambo ekómaki mabe mingi mpenza na mabele na ntango na ye, Noa amonisaki ete amilɛngɛli mpo na komona kokokisama ya elaka ya Nzambe. Kanisá mikakatano oyo Noa akutanaki na yango ntango baanzelu oyo batombokaki balataki nzoto ya bomoto mpe basanganaki na basi kitoko awa na mabele! Lokola basangisaki nzoto na ndenge wana oyo ebongi te, babotaki bato ya ndenge mosusu, “bilombe” oyo basalelaki makasi na bango mpo na konyokola basusu. (Eba. 6:4) Kanisá mobulu oyo ezalaki kobima ntango bingambe wana bazalaki kobimisa yikiyiki na bisika nyonso oyo bazalaki koleka. Yango wana, mabe epalanganaki mingi mpe makanisi ná etamboli ya bato ebebaki mingi mpenza. Na yango, Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azwaki ekateli moko oyo emonisaki ete mokili mabe ya ntango wana ekómaki na nsuka.—Tángá Ebandeli 6:3, 5, 11, 12.a
4, 5. Na ndenge nini makambo oyo ezali kosalema na mikolo na biso ekokani na oyo ya mikolo ya Noa?
4 Yesu asakolaki ete na mikolo na biso, makambo ekozala lokola na mikolo ya Noa. (Mat. 24:37) Na ndakisa, biso mpe tozali komona ndenge bilimo mabe bazali kosala. (Em. 12:7-9, 12) Na ntango ya Noa, baanzelu yango oyo bakómá bademo balataki nzoto ya bato. Atako lelo bazalaka lisusu na likoki ya kolata nzoto ya bato te, balukaka kotambwisa bato, ezala bilenge to mikóló. Kozanga ete bato báyeba, bademo yango bazali kosepela na misala ya mabe mpe ya mbindo oyo bato bazali kosala awa na mabele.—Ef. 6:11, 12.
5 Liloba ya Nzambe ebengi Zabolo “mobomi-bato” mpe elobi ete azali “moto oyo akoki kopesa liwa.” (Yoa. 8:44; Ebr. 2:14) Yango elingi koloba te ete Satana ye moko azali na nguya ya koboma moto nyonso oyo ye alingi. Atako bongo, elimo yango ya mabe asalelaka lokuta mpe mayele mabe mpo na kotinda bato básala makambo oyo ekoki konyokola to koboma bango. Atindaka mpe bato bákóma na makanisi mpe mposa ya koyina mpe ya koboma basusu. Na ndakisa, kati na bana 142 oyo babotami na États-Unis, mwana moko akobomama. Lokola mobulu ezali kopalangana mingi boye, okanisi te ete lelo mpe Yehova akotya likebi ndenge asalaki na mikolo ya Noa? Okanisi ete akosala eloko te?
6, 7. Ndenge nini Noa ná libota na ye bamonisaki ete bazalaki na kondima mpe kobanga Nzambe?
6 Na ntango oyo esengelaki, Nzambe ayebisaki Noa ekateli na ye ya koyeisa mpela na mabele mpo na kobebisa mosuni nyonso. (Eba. 6:13, 17) Yehova ayebisaki Noa atonga masuwa oyo esengelaki kozala lokola kɛsi moko monene. Noa ná libota na ye babandaki mosala yango. Nini esalisaki bango bátosa mpe bázala bamilɛngɛli ntango bitumbu ya Nzambe eyaki?
7 Kondima makasi mpe kobanga Nzambe etindaki Noa ná libota na ye básala oyo Nzambe apesaki bango mitindo. (Eba. 6:22; Ebr. 11:7) Lokola azalaki mokonzi ya libota, Noa asɛnzɛlaki na elimo mpe amikɔtisaki te na misala ya mbindo ya bato ya ntango wana. (Eba. 6:9) Ayebaki ete libota na ye esengeli kokeba mpo elanda te etamboli ya mobulu mpe elimo ya botomboki ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango. Basengelaki komipesa mobimba te na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Nzambe apesaki bango mosala, mpe ezalaki na ntina ete libota mobimba emipesa na mosala yango.—Tángá Ebandeli 6:14, 18.
Noa ná libota na ye bamilɛngɛlaki
8. Nini emonisi ete bato ya libota ya Noa bakangamaki na Nzambe?
8 Biblia elobeli mingimingi Noa mpo azalaki mokonzi ya libota, kasi mwasi ya Noa ná bana na ye ya mibali mpe basi na bango bazalaki mpe kosambela Yehova. Mosakoli Ezekiele andimisi likambo yango. Alobaki ete soki Noa azalaki na bomoi na mikolo na ye Ezekiele, bana na ye balingaki kosikolama te mpo na boyengebene ya tata na bango. Bazalaki mikóló mpe bakokaki kopona kotosa to koboya kotosa. Yango wana, bango moko bamonisaki ete balingaki Nzambe mpe banzela na ye. (Ezk. 14:19, 20) Bato ya libota ya Noa bandimaki malako na ye, bamonisaki kondima lokola ye, mpe batikaki te ete bato mosusu bápekisa bango kosala mosala oyo Nzambe apesaki bango.
9. Banani bazali lelo komekola kondima ya Noa?
9 Ezalaka mpenza esengo lelo komona ete na lisangá ya bandeko na mokili mobimba, ezali na batata ya mabota oyo bazali kosala milende mpo na komekola Noa! Bayebi ete mokumba na bango esuki kaka te na koleisa, kolatisa, kozwa ndako, mpe kotángisa bana na bango. Basengeli mpe kokokisa mposa na bango ya elimo. Na ndenge yango, bazali komilɛngɛla mpo na makambo oyo Yehova akosala mosika te.
10, 11. (a) Ntango bazalaki na kati ya masuwa, na ntembe te Noa ná libota na ye bayokaki ndenge nini? (b) Motuna nini tosengeli komituna?
10 Mbala mosusu Noa, mwasi na ye, mpe bana na bango ya mibali ná basi na bango batongaki masuwa na boumeli ya mbula soki 50. Wana bazalaki kotonga masuwa, na ntembe te bazalaki kokɔta mpe kobima na masuwa yango mbala na mbala. Bapakolaki yango gudrɔ mpo mai ekɔta te, bakɔtisaki bilei, mpe banyama. Kanisá naino: nsukansuka mokolo monene eyei. Ezali mokolo ya 17 ya sanza ya mibale ya mobu 2370 L.T.B., mpe bakɔti na masuwa. Yehova akangi porte, mpe mbula ebandi. Ezali kaka lokola mbula makasi oyo ebɛti na mboka moko te. Mai minene to mbu ya likoló efungwami na mbala moko mpe mbula makasi ezali kobɛtabɛta masuwa. (Eba. 7:11, 16) Bato oyo bazali libándá ya masuwa bazali kokufa nzokande baoyo bazali na kati babiki. Ndenge nini Noa ná libota na ye bakokaki koyoka na ntango wana? Ya solo, bazalaki na botɔndi makasi epai ya Nzambe. Kasi na ntembe te bakanisaki mpe boye: ‘Tozali mpenza na esengo ndenge totambolaki elongo na Nzambe ya solo mpe tomilɛngɛlaki!’ (Eba. 6:9) Okoki komimona obiki na Armagedone, mpe motema na yo etondi na botɔndi ya ndenge wana?
11 Eloko moko te ekoki kopekisa Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akokisa elaka na ye ya kobebisa ebongiseli ya makambo oyo ya Satana. Omituna boye: ‘Nandimaka mpenza ete elaka moko te ya Nzambe ekozanga kokokisama ata na makambo ya mikemike mpe ete nyonso ekokokisama na ntango oyo atyá?’ Soki ezali bongo, omilɛngɛla, batelá na makanisi na yo “mokolo ya Yehova,” oyo ezali koya nokinoki.—2 Pe. 3:12.
Moize akobaki kosɛnzɛla
12. Nini ekokaki kolongola likebi ya Moize na makambo ya elimo?
12 Tótala ndakisa mosusu. Na makanisi ya bomoto, emonanaki lokola ete Moize azalaki na esika ya malamu mingi koleka na Ezipito. Lokola mwana mwasi ya Farao akómisaki ye mwana na ye, mbala mosusu bazalaki kopesa Moize lokumu mingi mpe azalaki kolya bilei oyo eleki malamu, kolata bilamba ya kitoko koleka, mpe kofanda na esika ya malamu koleka. Atángaki mpe bakelasi mingi. (Tángá Misala 7:20-22.) Mbala mosusu akokaki mpe kozwa libula monene.
13. Na ndenge nini Moize akobaki kotya makanisi na bilaka ya Nzambe?
13 Emonani ete makambo oyo baboti ya Moize bateyaki ye na bomwana na ye esalisaki ye amona ete losambo ya bikeko oyo Baezipito bazalaki kosala ezali bozoba. (Kob. 32:8) Bakelasi oyo atángaki na Ezipito mpe makambo kitoko oyo ezalaki na ndako ya mokonzi etindaki Moize te atika losambo ya solo. Na ntembe te, amanyolaki mingi bilaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na ye mpe azalaki koluka komilɛngɛla mpo na kosala mokano ya Nzambe. Kutu, Moize ayebisaki Bayisraele boye: “Yehova . . . Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo, atindi ngai epai na bino.”—Tángá Kobima 3:15-17.
14. Ndenge nini kondima mpe mpiko ya Moize emekamaki?
14 Na bokeseni na bikeko nyonso oyo ezalaki komonisa banzambe ya Ezipito oyo ezangi bomoi, Moize azalaki komona ete Yehova, Nzambe ya solo, azali mpenza. Atambwisaki bomoi na ye lokola nde azalaki komona “Moto oyo amonanaka te.” Moize azalaki na kondima ete Nzambe akosikola bato na ye, kasi ayebaki te ntango nini akosala yango. (Ebr. 11:24, 25, 27) Amonisaki ete azali na mposa makasi ya komona Baebre na bonsomi ntango akɔtelaki moombo Moyisraele moko oyo bazalaki konyokola. (Kob. 2:11, 12) Kasi ezalaki naino ntango ya Yehova te; na yango, Moize akimaki kofanda na mboka moko mosika. Na ntembe te, ezalaki mpasi mpo na ye kotika bisengo ya ndako ya mokonzi ya Ezipito mpe kofanda na esobe. Atako bongo, Moize amilɛngɛlaki na ndenge akobaki kolanda malako nyonso oyo Yehova apesaki ye. Na yango, nsima ya kolkisa mbula 40 na Midiane, Nzambe akokaki kosalela ye mpo na kosalisa bandeko na ye. Ndenge Nzambe apesaki ye mitindo, Moize azongaki na Ezipito. Ntango ekokaki mpo Moize akokisa mokumba oyo euti na Nzambe mpe asala mosala ya Nzambe, na ndenge oyo Nzambe alingaki. (Kob. 3:2, 7, 8, 10) Ntango azongaki na Ezipito, esɛngaki ete Moize, moto ya “komikitisa mingi koleka bato nyonso,” azala na kondima mpe mpiko mpo abima liboso ya Farao. (Mit. 12:3) Abimaki liboso ya Farao, kaka mbala moko te, kasi mbala na mbala wana bolɔzi ezalaki kobima, kozanga ayeba soki akokende lisusu liboso ya Farao mbala boni mpo na kosakola malɔzi mosusu.
15. Atako ezalaki na makambo oyo ekokaki kozongisa Moize nsima, nini esalisaki ye akoba koluka mabaku ya kokumisa Tata na ye ya likoló?
15 Na mbula 40 oyo elandaki, kobanda mobu 1513 L.T.B tii na mobu 1473 L.T.B., ntango Bayisraele bazalaki koyengayenga na esobe, Moize akutanaki na makambo oyo elɛmbisaki ye. Atako bongo, alukaki mabaku ya kokumisa Yehova mpe alendisaki Bayisraele mosusu na motema mobimba ete básala mpe bongo. (Mib. 31:1-8) Mpo na nini? Mpo alingaki nkombo ya Yehova mpe boyangeli na ye koleka lokumu na ye moko. (Kob. 32:10-13; Mit. 14:11-16) Ata soki tokutani na makambo oyo elɛmbisi biso to oyo ekoki kozongisa biso nsima, biso mpe tosengeli kokoba kosimba boyangeli ya Nzambe, kotya elikya ete ndenge na ye ya kosala makambo ezalaka ntango nyonso na bwanya koleka, na bosembo, mpe malamu koleka mosusu nyonso. (Yis. 55:8-11; Yir. 10:23) Yo mpe omonaka bongo?
Kolala mpɔngi te!
16, 17. Mpo na nini makambo oyo ezali na Marko 13:35-37 etali yo mpenza?
16 “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.” (Mrk. 13:33) Yesu apesaki likebisi wana ntango azalaki kolobela elembo oyo ekomonisa bosukisi ya ebongiseli oyo ya mabe. Na kolanda makambo oyo Marko akomaki, talá ndenge Yesu asukisaki esakweli monene oyo apesaki: “Bósɛnzɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya, soki na mpokwa to na katikati ya butu to na ntango nsoso eleli to na ntɔngɔntɔngɔ; mpo ntango akoya na mbalakaka, akuta bino te bozali kolala mpɔngi. Kasi oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso: Bósɛnzɛlaka.”—Mrk. 13:35-37.
17 Likebisi wana ya Yesu ezali kotinda biso tókanisa. Alobelaki biteni minei ya kokɛngɛla ya butu. Na eteni ya nsuka, ezalaki mpasi mpo mokɛngɛli alala mpɔngi te, mpamba te ezalaki kobanda na ngonga ya misato ya ntɔngɔ tii ntango moi ebimi. Bato oyo bayebi bitumba malamu bamonaka ete ezali ntango oyo eleki malamu mpo na kobundisa banguna, ezalaka libaku ya malamu ya kokuta bango ‘balali.’ Ezali mpe bongo lelo, awa bato ya mokili bazali kolala mpɔngi makasi na elimo, ekoki kozala mpasi mpenza mpo tólala mpɔngi te. Tozali mpenza kondima te ete tosengeli ‘kolala mpɔngi te’ mpe ‘kokebaka’ mpo na kozela nsuka oyo esakolamaki mpe kosikolama na biso?
18. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, libaku monene nini tozali na yango?
18 Moto oyo azalaki kosakanisa banyama, oyo tolobelaki na ebandeli, akufaki te ntango tigre du Bengale abalukelaki ye. Kasi bisakweli ya Biblia emonisi polele ete ezala mangomba ya lokuta, ezala biteni mosusu ya mokili oyo mabe, ekobika te na libebi oyo ezali koya. (Em. 18:4-8) Tiká ete biso nyonso basaleli ya Nzambe, bilenge mpe mikóló, tómona ete tosengeli mpenza kosala nyonso oyo tokoki mpo tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova, ndenge Noa ná libota na ye basalaki. Tozali na mokili oyo ezali kofingisa nkombo ya Nzambe, epai bateyi ya mangomba ya lokuta, bato oyo balobaka ete tokoki koyeba Nzambe te mpe baoyo bandimaka te ete Nzambe azali, bazali kotyola Mozalisi na maloba na bango. Tótika makanisi na bango ekɔtela biso te. Tólanda nde bandakisa oyo touti kolobela mpe tóluka mabaku ya koloba mpo na Yehova mpe kokumisa ye ete azali “Nzambe ya banzambe,” ɛɛ, “Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ.”—Mib. 10:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo etali “mbula nkama moko na ntuku mibale” oyo Ebandeli 6:3 elobeli, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 2010, lokasa 30.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Noa asengelaki kotya likebi mingi na bamposa ya elimo ya libota na ye?
• Na ndenge nini mikolo na biso ekokani mpenza na mikolo ya Noa?
• Atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaki ye, mpo na nini Moize akobaki kotya makanisi na bilaka ya Yehova?
• Bisakweli nini ya Biblia ezali kotinda yo osɛnzɛla na elimo?
[Elilingi na lokasa 25]
Noa ná libota na ye batyaki makanisi na bango nyonso na mosala ya Yehova
[Elilingi na lokasa 26]
Moize akobaki kosɛnzɛla mpo atyaki makanisi na ye na bilaka ya Nzambe