Kosundola bandeko na yo bakristo soki moke te
JAROSŁAW ná mwasi na ye Beataa balobi boye: “Na boumeli ya mbula zomi, tobendamaki na biloko oyo mombongo ezalaki kopesa biso mpe tokómaki na mwa bozwi. Atako tokolaki na libota ya bakristo, tokendaki mosika na Yehova mpe tozalaki na makasi ya kozonga te.”
Ndeko mosusu, Marek, alobi boye: “Lokola makambo ya bomoi mpe ya politiki ezalaki kobongwana na ekólo na biso Pologne, nabungisaki mosala mbala na mbala. Nabulunganaki mpenza. Nazalaki kobanga kosala kompanyi ya ngai moko mpo namesaná kosala mombongo te. Nsukansuka, namekaki kosala yango, nakanisaki ete ekosalisa ngai nakokisa bamposa ya mosuni ya libota na ngai kozanga ete ebebisa elimo na ngai. Nsima ya mikolo, nayaki komona ete namikosaki.”
Lokola na mokili ntalo ya biloko ezali komata mpe bato oyo bazangi misala bazali se kokóma mingi, bato mosusu bazali kolɛmba nzoto, mpe mpo na yango bazali kozwa bikateli oyo ezangi bwanya. Bandeko mingi bazwaki ekateli ya kosala bangonga mingi nsima ya ntango ya mosala, kozwa mosala ya mibale, to kosala mombongo na bango moko atako bamesaná na yango te. Bakanisaka ete mbongo mosusu oyo bakozwa ekosalisa libota kozanga ete ezala likama na elimo. Kasi, makambo oyo ekanami te mpe kobeba ya nkita ekoki kobebisa ata mikano ya malamu ya ndenge nini. Mpo na yango, bamosusu bakweaki na motambo ya lokoso mpe ya kotya bamposa ya mosuni liboso ya oyo ya elimo.—Mos. 9:11, 12.
Bandeko mosusu ya mibali mpe ya basi bamipesi mpenza na koluka biloko ya mokili na boye ete bazali na ntango lisusu te ya koyekola bango moko, ya koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Emonani polele ete bopɔtu ya ndenge wana ezali likama mpo na elimo na bango mpe boyokani na bango na Yehova. Bakoki mpe kobebisa boyokani mosusu ya ntina mingi—boyokani na bango na ‘baoyo bazali bandeko na bango na kati ya kondima.’ (Gal. 6:10) Bamosusu bamemamaki mokemoke mosika na bandeko na bango bakristo. Tótalela malamumalamu likambo yango.
Mokumba na biso epai ya baninga na biso bakristo
Lokola tozali bandeko mibali mpe basi, tozali na mabaku mingi ya komoniselana bolingo. (Rom. 13:8) Na lisangá na bino, mbala mosusu omonaka bato oyo bazali na ‘mpasi oyo bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi.’ (Yobo 29:12) Ekoki kozala ete bamosusu bazangi biloko ya kobikela. Ntoma Yoane akundwelaki biso libaku oyo likambo yango epesi biso. Alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?”—1 Yoa. 3:17.
Mbala mosusu osalisaki bandeko oyo bazalaki na bosɛnga ndenge wana. Kasi, likebi oyo tosengeli kotyela bandeko na biso esuki kaka te na kosalisa bango na biloko ya mosuni. Ekoki kozala ete bamosusu bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi mpo bazali koyoka ete bazali kaka bango moko to mpo balɛmbi nzoto. Mbala mosusu bazali koyoka ete babongi lisusu te kosalela Yehova, bazali na maladi moko makasi, to babungisi moto moko oyo balingaka. Lolenge moko oyo tokoki kolendisa bango ezali ya koyoka bango mpe kosolola na bango; na ndenge yango, tokokoka kosalisa bango bámiyoka malamu mpe bázala na boyokani malamu na Yehova. (1 Tes. 5:14) Mbala mingi, yango ekómisaka boyokani na biso na bandeko makasi.
Ezali mingimingi bankulutu na lisangá nde bakoki koyeba komitya na esika ya bato yango ntango bazali koyoka bango, mpe kopesa bango toli euti na Makomami. (Mis. 20:28) Soki basali ndenge wana bankulutu bakomekola ntoma Paulo, oyo azalaki na “bolingo ya motema” mpo na bandeko na ye bakristo.—1 Tes. 2:7, 8.
Nzokande, soki mokristo moko atangwe na lisangá, mokumba na ye epai ya baninga na ye bakristo ekozala ndenge nini? Ata bakɛngɛli bakoki kokwea na motambo ya konduka biloko ya mosuni. Ekozala boni soki mokristo akwei na motambo ya ndenge wana?
Balɛmbi mpo na mitungisi ya bomoi
Ndenge tomoni yango, mbala mingi kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota ememaka mitungisi mpe ekoki kokitisa motuya oyo topesaka na makambo ya elimo. (Mat. 13:22) Marek, oyo tolobelaki likoló alobi boye: “Ntango mombongo na biso ekweaki, nazwaki ekateli ya kokende na mboka mopaya mpo na kozwa mosala oyo ekofuta ngai mbongo mingi. Nakendaki naino mpo na sanza misato, mpe na nsima mpo na sanza misato mosusu, mpe bongo na bongo, nazalaki kozonga na ndako na basanza mosusu. Mwasi na ngai oyo azalaki mondimi te ayokaki mpasi mingi na motema mpo na yango.”
Mpasi ezalaki kaka na libota te. Marek abakisi boye: “Longola kosala bangonga ebele na kati ya molunge makasi, nazalaki kosala na bato oyo bazangi bonkonde mpe oyo bazalaki koluka kolyela basusu. Bazalaki lokola babandi. Nazalaki kotungisama na makanisi mpe koyoka ete bazali kokonza ngai. Lokola nazalaki ata na ntango te ya kokipe bamposa na ngai moko, nabandaki komituna soki nakokoka kosalela basusu.”
Mbuma mabe ya ekateli ya Marek esengeli kotinda biso tókanisa. Atako ekoki komonana ete kokende na mboka mopaya ekoki kosilisa mikakatano ya mbongo, ekobimisa mikakatano mosusu te? Na ndakisa, ndenge nini libota na yo ekozala na elimo mpe bakoyoka ndenge nini na motema? Kokende na mboka mosusu ndenge wana ekokata nde boyokani na biso ná lisangá? Ekozangisa biso te libaku ya kosalela baninga na biso bakristo?—1 Tim. 3:2-5.
Kasi, ndenge mbala mosusu omoni yango, esɛngi kaka moto akende na mboka mosusu te mpo amipesa mingi na mosala ya mosuni. Tózwa ndakisa ya Jarosław ná Beata. Alobi boye: “Ebandaki mpenza malamu mpe likambo ezalaki te. Lokola tozalaki babalani ya sika, tofungolaki ligablo na esika moko ya malamu mpo na kotɛka ba-saucisse. Lokola ezalaki se kopesa benefisi mingi, epesaki biso mposa ya kokolisa mombongo na biso. Kasi tozalaki na ntango mingi te, mpe tobandaki kozanga makita ya bokristo. Eumelaki te, natikaki mosala ya mobongisi-nzela mpe mokumba ya mosaleli na misala. Lokola tozalaki kosepela na benefisi, tofungolaki magazini ya monene mpe tosangisaki mombongo na moto moko oyo azalaki Motatoli te. Eumelaki te, nabandaki kosala mibembo na mboka mopaya mpo na kosala bakɔntra ya bamilio ya dolare. Nazalaki na ndako lisusu mingi te, mpe boyokani na ngai ná mwasi na ngai mpe mwana na ngai ya mwasi ebebaki. Nsukansuka, tomipesaki mingi mpenza na mombongo tii tolɛmbaki na elimo. Lokola tozalaki lisusu kosangana na bandeko te, tozalaki lisusu ata kokanisa bango te.”
Liteya nini tozwi na likambo yango? Mposa ya komisalela “paradiso” na ye moko ekoki kokweisa mokristo na motambo, kotinda ye amona ete akoká—ata soki abungisi “bilamba na ye ya likoló,” elingi koloba ezaleli na ye ya mokristo. (Em. 16:15) Yango ekoki komema biso mosika na bandeko na biso oyo tozalaki liboso na likoki ya kosalisa bango.
Omitala na bosembo
Mbala mosusu tokoki koloba ete: ‘Yango ekoki kokómela ngai te.’ Kasi, mokomoko na biso asengeli komituna biloko nini asengeli na yango. Paulo akomaki boye: “Toyaki na eloko te na mokili, mpe tokokende na eloko te. Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Tim. 6:7, 8) Ya solo, makambo ya bomoi ezali ndenge moko te na bikóló nyonso. Biloko oyo bato ya ekólo moko ya bozwi bakoki komona ete ezali biloko oyo moto nyonso asengeli kozala na yango, ekoki kozala lokola bomɛngo oyo bato nyonso te bazali na yango na mikili mosusu mingi.
Ata soki bomoi ezali ndenge nini na esika tofandi, tótala maloba ya Paulo oyo elandi: “Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.” (1 Tim. 6:9) Bazipaka motambo mpo nyama emona yango te. Balukaka ekanga yango pwasa. Tokoki kosala nini mpo ‘bamposa oyo eyokisaka mpasi’ ekanga biso na motambo te?
Kotya makambo ya ntina na esika ya liboso ekoki kosalisa biso tózwa ntango mingi ya kosalela Yehova, ata mpe ya koyekola biso moko. Koyekola mpe kobondela ekoki kosalisa mokristo “akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli” mpo na kosalisa basusu.—2 Tim. 2:15; 3:17.
Na boumeli ya mwa bambula, bankulutu basalaki na bolingo nyonso mpo na kolendisa Jarosław. Etindaki ye asala bambongwana oyo esengeli. Alobi boye: “Mokolo moko, ntango tozalaki kosolola, bankulutu bazongelaki ndakisa moko oyo ezali na Makomami oyo elobeli elenge mobali moko oyo azalaki mozwi mpe azalaki na mposa ya kozwa bomoi ya seko kasi alingaki te kotika biloko na ye ya mosuni. Mpe na mayele batunaki ngai soki likambo yango etali ngai mpe. Esalisaki ngai mpenza namona mbongwana nini nasengelaki kosala!”—Mas. 11:28; Mrk. 10:17-22.
Jarosław atalelaki likambo na ye malamumalamu mpe azwaki ekateli ya kotika komipesa na mimbongo minene. Nsima ya mbula mibale, ye na libota na ye bakómaki lisusu makasi na elimo. Azali sikoyo kosala mpo na bandeko na ye; akómá nkulutu na lisangá. Jarosław alobi boye: “Soki bandeko bamipesi mpenza na mimbongo kino kobosana makambo ya elimo, nasalelaka ndakisa na ngai moko mpo na komonisa ete kokangama na bato oyo bazali Batatoli te ezali kozanga bwanya. Ezali pɛtɛɛ te koboya kosala makambo mosusu oyo, soki basɛngi yo osala, motema ekoki kosepela na yango, mpe koboya kosala makambo oyo ezali sembo te.”—2 Ko. 6:14.
Marek mpe azwaki liteya nsima ya kokutana na mikakatano. Atako mosala na mboka mopaya ezalaki kofuta ye malamu mpe esalisaki libota na ye ezwa mbongo, boyokani na ye na Nzambe mpe bandeko na ye ya elimo ebebaki. Na nsima, atalelaki lisusu makambo nini asengeli kotya na esika ya liboso. Alobi boye: “Na boumeli ya bambula, nakómaki lokola Baruke oyo ‘akobaki koluka makambo minene mpo na ye moko.’ Na nsima, nafungolelaki Yehova motema, nayebisaki ye mitungisi na ngai, mpe sikoyo nayokaka ete nakómi malamu na elimo.” (Yir. 45:1-5) Marek azali sikoyo koluka kosala mosala ya mokɛngɛli na lisangá, “mosala moko ya malamu mingi.”—1 Tim. 3:1.
Na baoyo mbala mosusu bazali na likanisi ya kokende na mboka mopaya mpo na koluka mosala oyo ekofuta bango mbongo mingi, Marek apesi likebisi oyo: “Soki moto akei na mboka mopaya, ezalaka mpasi te mpo akwea na mitambo ya mokili oyo mabe. Lokola ayebi malamu monɔkɔ ya mboka te, akobanda lisusu kosolola mingi na basusu te. Okoki kozonga na ndako na mbongo, kasi ozali na bampota na elimo oyo ekoki kosɛnga ntango molai mpo ekauka.”
Kozala na bokatikati na oyo etali mosala ya mosuni ná mokumba na biso epai ya bandeko na biso ekosalisa biso tósepelisa Yehova. Mpe tokoki kopesa ndakisa malamu oyo ekoki kotinda basusu bázwa ekateli ya malamu. Baoyo balɛmbi bazali na mposa ya lisungi, ya moto oyo akoyokela bango mawa, mpe ndakisa ya bandeko na bango ya mibali mpe ya basi. Bankulutu ya lisangá mpe bandeko mosusu oyo bakɔmɛli bakoki kosalisa baninga na bango bakristo bázala malamu na elimo mpe balɛmba mingi te mpo na mitungisi ya bomoi.—Ebr. 13:7.
Ya solo, tósundola soki moke te baninga na biso bakristo likoló ya komipesa mingi na mosala na biso ya mosuni. (Flp. 1:10) Kasi, tózala ‘bazwi na miso ya Nzambe,’ wana tozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.—Luka 12:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Bililingi na lokasa 21]
Mosala na yo ya mosuni ezangisaka yo makita?
[Bililingi na lokasa 23]
Opesaka motuya na mabaku oyo ozali na yango ya kosalisa bandeko na yo bakristo?