Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/6 nk. 29-32
  • Ndenge nini okoki ‘kolongisa nzela na yo’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki ‘kolongisa nzela na yo’?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kominanola mpe masano nsima ya kelasi
  • Bakelasi ya milaimilai
  • Komipesa mobimba na mosala
  • Okoki kolonga na bomoi na yo
  • Tiká “koluka makambo minene”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Bilenge, bókanisa Mozalisi na bino monene sikoyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yehova atalaka biso mpo na bolamu na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mpo na nini kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/6 nk. 29-32

Ndenge nini okoki ‘kolongisa nzela na yo’?

“KOLONGA” ezali liloba moko oyo ebendaka likebi ya bato mingi! Bato mosusu bamatá grade na mosala mpe balongá kozwa mbongo mingi mpe lokumu. Bamosusu balukaki kolonga kasi esimbaki ata moke te.

Mbala mingi, kolonga etaleli makambo oyo moto atyaka na esika ya liboso na bomoi na ye. Ezali na makambo mosusu mibale ya ntina: ndenge oyo moto asalelaka ntango mpe makasi na ye mpe soki akangaka mabɔkɔ te.

Bakristo mingi bamoni ete komipesa mobimba na mosala ya kosakola epesi bango esengo mingi. Bilenge mpe mikóló mingi bamoni ete balongi mpo baponaki mosala ya ntango nyonso lokola mosala ya bomoi na bango. Kasi, bato mosusu bakoki komona ete mosala ya kosakola ezali kilo; bazali komityela mikano mosusu, mpe bazali kotya mosala ya kosakola na esika ya mibale. Mpo na nini yango ekoki kosalema? Okoki kosala nini mpo olongola likebi na yo te na makambo oyo ezali mpenza na valɛrɛ? Mpe ndenge nini okoki ‘kolongisa nzela na yo’?​—Yos. 1:8.

Kominanola mpe masano nsima ya kelasi

Bilenge bakristo basengeli kozala na bokatikati, basengeli te kobosana mokumba na bango ya kosalela Nzambe ntango bazali kosala makambo mosusu. Baoyo bazali kosala bongo bakolonga na bomoi mpe babongi kozwa longonya.

Nzokande, bilenge bakristo mosusu bamipesaka mingi na masano mosusu mpe na kominanola nsima ya kelasi. Makambo yango ekoki mbala mosusu kozala mabe te. Kasi, bilenge bakristo basengeli komituna boye: ‘Makambo yango ekozwa ngai ntango boni? Nakosala yango na bato ya ndenge nini? Nakozala na bato oyo bazali na elimo ya ndenge nini ntango nazali komipesa na makambo yango? Nini ekoki kokóma likambo ya liboso na bomoi na ngai?’ Na ntembe te omoni ete moto akoki komipesa na makambo ya ndenge wana mpe kotikala na ntango moke mpo na kobongisa boyokani na ye na Nzambe. Na ntembe te, omoni mpo na nini osengeli koyeba makambo ya kotya na esika ya liboso.​—Ef. 5:15-17.

Tózwa ndakisa ya Wiktor.a Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 12, nakɔtaki na ekipi moko ya volleyball. Nsima ya mikolo, nazwaki mbano mpe makabo ebele. Nazwaki libaku ya kokóma moto ya lokumu.” Na nsima, Wiktor akómaki komitungisa mingi mpo ndenge oyo azalaki komipesa na masano ekómaki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. Mokolo moko, alalaki mpɔngi ntango azalaki kotánga Biblia. Lisusu, andimaki ete azalaki lisusu kozwa esengo mingi te na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Masano ezalaki kosilisa ngai makasi, mpe eumelaki te namonaki ete ezalaki mpe kokitisa molende na ngai na makambo ya elimo. Nayebaki ete nazalaki kosala nyonso te oyo nakokaki kosala.”

Bakelasi ya milaimilai

Biblia emonisi ete mokristo azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya libota na ye, mpe yango esangisi bamposa ya mosuni. (1 Tim. 5:8) Kasi, mpo moto akoka kosala yango asengeli kaka kokende na iniversite to na biteyelo mosusu ya likoló?

Ekozala malamu kotala soki kotánga kelasi ya milaimilai ekoki kosala nini na boyokani na yo na Yehova. Tózwa ndakisa moko na Biblia.

Baruke azalaki mokomeli ya mosakoli Yirimia. Kasi na ntango moko boye, na esika atya makanisi nyonso na mikumba oyo azalaki na yango na mosala ya Yehova, Baruke akómaki koluka makambo minene. Yehova amonaki yango mpe na nzela ya Yirimia akebisaki ye boye: “Ozali kokoba koluka makambo minene mpo na yo. Kokoba koluka yango te.”​—Yir. 45:5.

“Makambo minene” nini Baruke azalaki kokoba koluka? Ekoki kozala ete alukaki komisalela nkombo ya lokumu na ebongiseli ya makambo ya Bayuda. Makambo minene yango ekokaki mpe kozala bozwi. Ezala ndenge nini, alongolaki miso na makambo oyo eleki ntina, makambo ya elimo. (Flp. 1:10) Kasi, emonani ete Baruke ayokaki likebisi ya Yehova na nzela ya Yirimia mpe azwaki molimo na ye lokola eloko oyo epunzami, elingi koloba abikaki.​—Yir. 43:6.

Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Toli oyo Baruke azwaki emonisi ete eloko moko ezalaki kotambola malamu te. Azalaki koluka makambo minene mpo na ye moko. Soki ozali na mosala oyo esalisaka yo ozwa biloko ya kobikela, ozali mpenza na mposa ya kosalela ntango, mbongo, mpe makasi na yo na kokoba na kelasi kaka mpo okokisa bamposa na yo moko to oyo ya baboti to ya bandeko na yo ya libota?

Tózwa ndakisa ya Grzegorz, oyo asalaka baprogramɛ ya baordinatɛrɛ. Lokola baninga na ye bandimisaki ye, akendaki kozwa formasyo mingi lisusu mpo na mosala yango. Eumelaki te, azalaki na ntango lisusu te ya kosala makambo ya elimo. Alobi boye: “Nakómaki ntango nyonso koyoka ete nazali na nkaka. Lisosoli na ngai etungisaki ngai mingi mpo nazalaki lisusu te na likoki ya kokokisa mikano ya elimo oyo namityelaki.”

Komipesa mobimba na mosala

Liloba ya Nzambe elendisi bakristo ya solo básalaka mosala makasi mpe bázala basali mpe bapatrɔ ya malamu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Kol. 3:22, 23) Nzokande, atako kosala mosala makasi ezali malamu, ezali na likambo mosusu oyo eleki ntina​—kozala na boyokani malamu na Mozalisi na biso. (Mos. 12:13) Soki mokristo akómi komipesa mobimba na mosala na ye ya mosuni, ekozala mpasi te atya makambo ya elimo na esika ya mibale.

Komipesa mobimba na mosala ya mosuni ekoki kosilisa mokristo makasi ya kobatela boyokani na ye moko na Yehova mpe ya kosalisa libota na ye. Mokonzi Salomo alobaki ete “ebele ya mosala makasi” ekendaka mbala mingi nzela moko na “kolanda mopɛpɛ.” Soki mokristo amipesi mingi koleka na mosala na ye ya mosuni, akoki nsukansuka kotungisama mingi mpe ntango molai. Moto ya ndenge wana akoki kutu kokóma moombo ya mosala na ye tii akoyoka ete makasi nyonso esili. Soki esalemi bongo, akokoka mpenza ‘kosepela mpe komona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi’? (Mos. 3:12, 13; 4:6) Oyo eleki ntina, akotikala mpenza na makasi na nzoto mpe na makanisi mpo na kokokisa mikumba na ye na libota mpe komipesa na makambo ya elimo?

Janusz, oyo afandaka na Mpoto ya Ɛsti, amipesaki mobimba na mosala na ye ya kobongisa bilanga ya bafololo. Alobi boye: “Bato ya mokili bazalaki kokumisa ngai mpo nazalaki kobimisa makanisi ya malamu mpe kosilisa mosala nyonso oyo bapesi ngai. Kasi nalɛmbaki na elimo, mpe natikaki kobima na mosala ya kosakola. Eumelaki te, natikaki koyangana na makita. Nakómaki mpenza na lolendo na boye ete naboyaki toli ya bankulutu mpe natikaki lisangá.”

Okoki kolonga na bomoi na yo

Totaleli makambo misato oyo soki mokristo amipesi mingi na yango, akoki kolɛmba na elimo. Ozali komipesa na moko ya makambo yango? Soki ezali bongo, mituna, bavɛrsɛ, mpe maloba ya bandeko oyo elandi ekoki kosalisa yo oyeba soki ozali mpenza na nzela ya kolonga.

Kominanola mpe masano nsima ya kelasi: Ndenge nini omipesaka na misala yango? Ezali kolya yo ntango oyo ozalaki liboso kolekisa na makambo ya elimo? Ozali komona ete kolekisa ntango na bandeko ya lisangá ezali kosepelisa yo lisusu mingi te? Soki ezali bongo, landá ndakisa ya Mokonzi Davidi, mpe sɛngá Yehova ete: “Yebisá ngai nzela oyo nasengeli kotambola.”​—Nz. 143:8.

Mokɛngɛli-motamboli moko asalisaki Wiktor, oyo tolobelaki. Mokɛngɛli yango ayebisaki ye boye: “Olobelaka mosala na yo ya kobɛta volleyball na esengo mingi.” Wiktor alobi boye: “Esalaki ngai mpasi na motema. Namonaki ete nakendaki mosika mingi. Eumelaki te, nakataki boyokani na baninga ya mokili oyo tozalaki na bango na ekipi moko mpe nalukaki baninga na lisangá.” Lelo oyo, Wiktor azali kosalela Yehova na molende na lisangá na bango. Alobi boye: “Tuná baninga na yo, baboti na yo, to bankulutu ya lisangá soki bamoni ete makambo ya kelasi ezali kosalisa yo opusana pene na Yehova to komema yo mosika na ye.”

Mpo na nini te koyebisa bankulutu ya lisangá na bino ete olingi kozwa mikumba mosusu na mosala ya Nzambe? Okoki nde kosalisa mibange oyo bazali na mposa ya moto oyo akoki kosolola na bango to kosalisa bango, mbala mosusu kosalisa bango na kosomba biloko to kosalela bango misala ya ndako? Ata soki ozali na mbula boni, okoki komipesa na mosala ya ntango nyonso, koyebisa basusu ntina ya esengo na yo.

Bakelasi ya milaimilai: Yesu akebisaki bayekoli na ye likambo etali ‘koluka nkembo na bango moko.’ (Yoa. 7:18) Ata soki ozwi ekateli ya kotánga kelasi tii wapi, ‘oluki koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina’?​—Flp. 1:9, 10.

Grzegorz, oyo asalaka baprogramɛ ya baordinatɛrɛ, abongolaki makambo mosusu na bomoi na ye. Alobaki boye: “Lokola nazwaki toli ya bankulutu na lisɛki te, nakómisaki bomoi na ngai pɛpɛlɛ. Namonaki ete ezalaki na ntina te natánga bakelasi mosusu. Ekolya ngai kaka ntango mpe makasi mpamba.” Grzegorz amipesaki mingi na makambo ya lisangá. Na nsima, akɔtaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo ekómi lelo kobengama Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali ya minzemba. Ya solo, ‘asombaki’ ntango mpo na kokoba na mateya ya Nzambe.​—Ef. 5:16.

Mosala ya mosuni: Omipesi mingi na mosala na yo kino okómi kotya makambo ya elimo pembeni? Ozwaka ntango oyo esengeli mpo na kosolola na libota na yo? Mpe na lisangá, ozali kobongisa lolenge na yo ya koteya ntango ozali na mokumba na makita? Masolo na yo elendisaka basusu? “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye,” mpe Yehova akopambola yo mingi mpe ‘okomona bolamu mpo na mosala na yo ya makasi.’​—Mos. 2:24; 12:13.

Janusz, oyo tolobelaki, alongaki mpenza te na mosala na ye ya kobongisa bilanga ya bafololo, kutu akweaki nde. Wana atikalaki mabɔkɔ mpamba mpe atondaki na banyongo, abalukaki epai ya Yehova. Janusz atyaki makambo ya bomoi na ye na molɔngɔ mpe sikoyo azali mobongisi-nzela mpe nkulutu na lisangá. Alobi boye: “Lokola nazali kosepela na biloko ya ntina oyo nazali na yango mpo na kobikela mpe komipesa na makambo ya elimo, nazali na kimya na motema.”​—Flp. 4:6, 7.

Zwá ntango ya kotala na bosembo makanisi na yo mpe makambo oyo otyaka na esika ya liboso. Kosalela Yehova ezali likambo oyo esalisaka moto alonga na bomoi. Tyá yango na esika ya liboso na bomoi na yo.

Mbala mosusu ekosɛnga obongola makambo mosusu, to kutu olongola makambo oyo ezangi ntina mpo omindimisa yo moko “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Rom. 12:2) Kasi okoki ‘kolongisa nzela na yo’ soki ozali kosalela ye na molimo mobimba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

Ndenge nini okoki kolongisa nzela na yo?

Lokola makambo mingi ekoki kobenda likebi na yo, okoki kosala nini mpo olongola miso te na makambo oyo ezali mpenza ntina? Zwá ntango ya kotalela bamposa na yo mpe makambo oyo otyaka na esika ya liboso. Kanisá mituna oyo:

KOMINANOLA MPE MASANO NSIMA YA KELASI

▪ Okoki kokóma na elimo ya ndenge nini ntango ozali komipesa na makambo yango?

▪ Makambo yango ezwaka ntango boni?

▪ Makambo yango ekoki kokóma makambo ya liboso na bomoi na yo?

▪ Ezali kolya yo ntango oyo ozalaki liboso kolekisa na makambo ya elimo?

▪ Okosala yango na bato ya ndenge nini?

▪ Kolekisa ntango na bato yango ekómi kosepelisa yo mingi koleka kozala na bandeko ya lisangá?

BAKELASI YA MILAIMILAI

▪ Soki ozali na mosala oyo esalisaka yo ozwa biloko ya kobikela, ozali mpenza na mposa ya kosalela ntango, mbongo, mpe makasi na yo na kokoba na kelasi?

▪ Mpo ozwa biloko ya kobikela, ezali mpenza na ntina otánga na iniversite to na biteyelo mosusu ya likoló?

▪ Ekotika yo oyanganaka na makita nyonso?

▪ ‘Oluki mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina’?

▪ Ezali kosɛnga okolisa kondima na yo na likoki oyo Yehova azali na yango ya kopesa yo biloko ya kobikela?

MOSALA

▪ Mosala oyo oponi esalisaka yo ‘omona bolamu mpo na mosala na yo nyonso ya makasi’?

▪ Mosala na yo etikelaka yo makasi na nzoto mpe okokoka mpenza kokokisa mikumba na yo na libota mpe komipesa na makambo ya elimo?

▪ Ozwaka ntango oyo ekoki mpo na kosolola na libota na yo?

▪ Omikɔtisá mingi na mosala na yo na boye ete otye makambo ya elimo pembeni?

▪ Ekómi kobebisa lolenge na yo ya kosala masolo na makita?

[Elilingi na lokasa 30]

Yehova akebisaki Baruke ete aluka makambo minene te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto