Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/4 lok. 10
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Pilate alobi: “Talá! Moto!”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Botala moto ye wana!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Botala moto ye wana!”
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/4 lok. 10

Oyebaki yango?

Makambo nini ya mabe Barabasi asalaki?

▪ Baevanzile nyonso minei elobeli Barabasi, moto oyo Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma abimisaki na esika ya kobimisa Yesu. Barabasi azalaki “moto moko ya bolɔkɔ oyo ayebanaki mingi,” mpe azalaki “moyibi.” (Matai 27:16; Yoane 18:40) Azalaki na bolɔkɔ ya Baroma na Yerusaleme “esika moko na batombokisi, oyo babomaki moto ntango batombokaki.”​—Marko 15:7.

Atako elembeteli moko te oyo emonisi ete Barabasi asalaki mabe ezali, lokola batyaki ye na molɔngɔ ya batombokisi, yango etindi bato mosusu ya mayele bátánga ye na molɔngɔ ya batomboki na Yisraele na siɛklɛ ya liboso. Flavius Josèphe, moto moko ya istware akomi ete bituluku wana ya batomboki ezalaki na molɔngɔ ya bato ya libosoliboso oyo bazalaki kobunda mpo na bolamu ya bato na ntango wana; batomboki yango bazalaki koloba ete bazali nde koluka ete básalela Bayuda oyo bazalaki konyokwama makambo na bosembo. Botomboki oyo Bayuda babimiselaki Baroma mpe bakonzi na bango ya Bayuda, mpo bakanisaki ete bazali kosalela bango makambo na bosembo te, eyaki makasi mpenza na katikati ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Na nsima, bituluku wana ya batomboki basalaki limpinga moko monene ya Bayuda oyo babenganaki Baroma na Yudea, na mobu 66 ya ntango na biso.

Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi ete: “Ekoki kozala ete Barabasi azalaki moko ya bato oyo bazalaki kotya mobulu na bamboka ya mikemike. Bato ya mboka bayebaki batomboki yango mpo bazalaki koyiba epai ya bato ya bozwi na Yisraele mpe bazalaki kotya mobulu na guvɛrnema ya Roma.”

Na ntango ya Baroma, makambo nini ezalaki kosɛnga báboma moto ndenge babomaki Yesu?

▪ Lolenge oyo Baroma bazalaki kosala mpo na kopesa etumbu epai ya bato oyo balingi kokweisa guvɛrnema, mpe batɛmɛli mosusu ezalaki ya kobaka bango na nzete moko ya mpasi mpe kotika bango wana mpo bákufa. Bato bazalaki kotalela etumbu yango lokola liwa moko ya mabe mingi.

Buku Palestini na ntango ya Yesu (na Lingelesi) elobi ete: “Bazalaki kosala yango na miso ya bato nyonso, ezalaki kokitisa valɛrɛ ya moto, mpe ezalaki mpenza mpasi mpe bazalaki kosala yango mpo na kobangisa moto nyonso oyo alingaki ete makambo ezala te ndenge ezali.” Mokomi moko ya Roma na ntango ya kala alobaki mpo na ndenge oyo bazalaki koboma bato mabe ete: “Bazalaki kopona babalabala oyo bato bazalaka mingi, epai bato mingi bakokaki komona, mpe yango ekokaki kobangisa bango makasi.”

Josèphe alobi ete ntango basoda ya Titus bakangaki moto moko na etumba ntango bazingaki Yerusaleme na mobu 70 ya ntango na biso, babomaki ye ndenge wana liboso ya bifelo ya engumba mpo na kobangisa moto nyonso oyo alingi kokɔtela ye. Ntango engumba yango ekweaki, bato mosusu bakufaki kaka liwa ya ndenge wana.

Na likambo ya koboma bato lolenge wana, oyo etiká nsango, ezali oyo esalemaki na nsuka ya botomboki oyo etambwisamaki na Spartacus (73-71, liboso ya ntango na biso), ntango baombo 6 000 mpe babundi mosusu babomamaki pembenipembeni ya nzela oyo euti na engumba Capoue mpe ekei tii na Roma.

[Elilingi na lokasa 10]

“Pesá biso Barabasi” ekomami na Charles Muller na 1878

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto