Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/4 nk. 6-8
  • Ndenge ya kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobanga Yehova na ndenge ya malamu
  • Lisosoli oyo eteyami na Biblia
  • Koyeba kosepela na oyo tozali na yango
  • Kozala sembo na esika ya mosala
  • Kofuta banyongo
  • Koluka komimonisa moto malamu te
  • Bosembo ekumisaka Yehova
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bosembo ememelaka moto matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/4 nk. 6-8

Ndenge ya kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo

NDENGE moko na mopɛpɛ oyo topemaka, kozanga bosembo ezali bisika nyonso. Bato bazali kokosa, kobakisela basusu ntalo ya biloko, koyiba, koboya kofuta banyongo, mpe komikumisa mpo na makambo ezangi bosembo oyo basalaka na mombongo. Lokola tozali kofanda esika moko na bato ya ndenge wana, tokutanaka na makambo mingi oyo ekoki kolɛmbisa ekateli na biso ya kozala sembo. Ndenge nini tokoki kolonga ntango nyonso mposa ya kosala makambo oyo ezangi bosembo? Tótalela makambo misato oyo ekosalisa biso: kobanga Yehova, kozala na lisosoli ya malamu, mpe koyeba kosepela na oyo tozali na yango.

Kobanga Yehova na ndenge ya malamu

Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Moto oyo apesaka biso Mibeko, Yehova azali Mokonzi na biso.” (Yis. 33:22) Kondima bokonzi oyo Yehova azali na yango esalisaka biso tóbanga ye; yango nde elendisaka ekateli na biso ya kotɛmɛla mposa ya kosala makambo oyo ezangi bosembo. Masese 16:6 elobi boye: “Na kobanga Yehova nde moto alongwaka na mabe.” Kobanga yango elimboli te kozala na nsɔmɔ mpo na Nzambe ya nkandankanda; ezali nde koboya mpenza kosala makambo oyo ekopesa Tata na biso ya likoló mpasi, ye oyo alukaka mpenza bolamu na biso.​—1 Pe. 3:12.

Likambo oyo mobali moko ná mwasi na ye bakutanaki na yango emonisi ete kobanga Nzambe ndenge wana etindaka bato básala oyo ezali malamu. Ricardo ná mwasi na ye Fernandaa babimisaki na kɔnti na bango na banki mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare 700. Fernanda atyaki liboke ya mbongo yango na mwa saki na ye kozanga atánga yango. Ntango bakómaki na ndako, nsima ya kofuta bafaktire mosusu, bakamwaki komona ete motángo ya mbongo oyo ezalaki na saki ya Fernanda ekesanaki mpenza te na oyo babimisaki na banki. Balobaki ete: “Na ntembe te mwasi wana ya banki alekiselaki biso mbongo.” Na ebandeli, bayokaki mposa ya kobomba mbongo yango, mpo bazalaki naino na bafaktire mosusu mingi ya kofuta. Ricardo alobi boye: “Tobondelaki Yehova apesa biso makasi ya kozongisa mbongo yango. Mposa na biso ya kosepelisa ye na kolanda elendiseli oyo ezali na Masese 27:11 etindaki biso tózongisa mbongo yango.”

Lisosoli oyo eteyami na Biblia

Tokoki koteya lisosoli na biso soki tozali koyekola Biblia mpe kosala makasi mpo na kosalela makambo oyo toyekoli. Na ndenge yango, ‘liloba ya Nzambe oyo ezali na bomoi mpe ezali na nguya’ ekokɔta kaka na motó te, kasi mpe na motema na biso. Yango ekotinda biso ‘tólinga kozala sembo na makambo nyonso.’​—Ebr. 4:12; 13:18.

Tózwa ndakisa ya João. Akɔtaki nyongo monene ya mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare 5 000. Na nsima, kozanga afuta nyongo yango, akendaki kofanda na engumba mosusu. Mbula mwambe na nsima, João ayekolaki solo, mpe lisosoli na ye oyo eteyamaki na Biblia etindaki ye asolola na moto oyo adefisaki ye mbongo mpo afuta nyongo yango! Lokola João azalaki na mwasi ná bana minei ya koleisa kasi azalaki kozwa mbongo mingi te, moto oyo adefisaki ye andimaki ete João afuta mbongo yango ndambondambo sanza nyonso.

Koyeba kosepela na oyo tozali na yango

Ntoma Paulo akomaki boye: “Ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene. . . . Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Tim. 6:6-8) Kolanda toli wana na motema mobimba ekosalisa biso tókwea te na motambo ya kosala mimbongo ya lokoso mpe oyo ezali sembo mpenza te, to ya kokɔta na mimbongo oyo balaki biso ete tokokóma bazwi mbangumbangu, nzokande lokuta. (Mas. 28:20) Kolanda toli ya Paulo ekosalisa mpe biso tótya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, na elikya ete akokokisa bamposa na biso ya ntina mingi.​—Mat. 6:25-34.

Nzokande, lokola bomɛngo ezalaka na “nguya ya bokosi,” tosengeli soki moke te komona ete tokoki te kokwea na lokoso to na bilulela. (Mat. 13:22) Tókanisa lisusu ndakisa ya Akana. Azalaki wana ntango Bayisraele bakatisaki Ebale Yordani na ndenge ya likamwisi. Atako bongo, lokola lokoso elekaki, alongaki te kotɛmɛla mposa ya koyiba palata mpe wolo mpe elamba moko ya ntalo mingi na biloko oyo bazwaki na engumba Yeriko. Likambo wana oyo asalaki ememelaki ye liwa. (Yos. 7:1, 20-26) Tokoki kokamwa te soki bikeke mingi na nsima, Yesu akebisaki biso ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela”!​—Luka 12:15.

Kozala sembo na esika ya mosala

Tótala sikoyo makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa ekateli na biso ya kozala sembo na makambo nyonso. Kozala sembo na esika ya mosala elimboli mpe ‘koyiba te’​—ata soki bato mingi bayibaka. (Tito 2:9, 10) Jurandir, oyo asalaka na biro moko ya Leta, azalaki kokoma na bosembo mbongo nyonso oyo asaleli na mibembo na ye ya mosala. Kasi, baninga na ye ya mosala bazalaki kosɛnga mbongo koleka oyo basalelaki. Bazalaki kokoka kosala yango mpo mokonzi na bango azalaki kobomba basali wana oyo bazangi bosembo. Kutu, apamelaki Jurandir mpo azalaki sembo mpe azalaki kotinda ye lisusu na mibembo ya mosala te. Kasi, nsima ya mikolo, bayaki kotala makambo ya mbongo na biro yango, mpe bapesaki Jurandir longonya mpo na bosembo na ye. Bamatisaki ye grade.

André azali motɛkisi; patrɔ na ye ayebisaki ye atindelaka bakiliya faktire mibale mpo na eloko moko. Ndeko na biso André abondelaki Yehova apesa ye mpiko ya kotosa mitinda ya Biblia. (Nz. 145:18-20) Amekaki mpe kolimbwela patrɔ na ye ntina oyo akoki kotosa mitindo na ye te, kasi wapi! Na yango, André azwaki ekateli ya kolongwa mosala yango oyo bazalaki kofuta ye malamu. Kasi, mbula soki moko na nsima, patrɔ yango abengaki ye azonga na mosala, ayebisaki ye ete bazalaki lisusu kobakisela bakiliya mbongo te. André akómaki mokambi.

Kofuta banyongo

Ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Bózala na nyongo ya moto te.” (Rom. 13:8) Tokoki mbala mosusu koluka komilongisa mpe koloba ete tofuti nyongo te mpo moto oyo adefisaki biso azali na bomɛngo mpe azali na mposa ya mbongo yango te. Nzokande, Biblia ekebisi biso ete: “Moto mabe adefaka mpe azongisaka te.”​—Nz. 37:21.

Kasi, tokosala nini soki “makambo oyo ekanami te” epekisi biso tófuta nyongo na biso? (Mos. 9:11) Francisco adefaki epai ya Alfredo mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare nkóto nsambo mpo afuta nyongo oyo azwaki mpo na kotonga ndako na ye. Kasi, lokola mombongo na ye etambolaki malamu te, Francisco akokaki te kofuta nyongo na ye na dati oyo bayokanaki. Azwaki likanisi ya kokutana na Alfredo mpo na kosolola likambo yango, mpe Alfredo andimaki Francisco afuta ye ndambondambo.

Koluka komimonisa moto malamu te

Kanisá lisusu ndakisa mabe ya Ananiasi ná mwasi na ye Safira, oyo bazalaki na lisangá ya bokristo ya ekeke ya liboso. Nsima ya kotɛka elanga na bango, bamemaki kaka ndambo ya mbongo epai ya bantoma mpe balobaki ete ezalaki mbongo nyonso oyo bazwaki ntango batɛkaki elanga na bango. Balingaki kokosa bato ete bazali na bokabi mingi. Kasi, ntoma Petro, na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, amonisaki polele bokosi na bango, mpe Yehova abomaki bango na mbala moko.​—Mis. 5:1-11.

Na bokeseni na Ananiasi ná Safira oyo bazalaki sembo te, bakomi ya Biblia balobaki makambo polele mpe na bosembo. Moize akomaki na bosembo nyonso ete baboyelaki ye kokɔta na Mokili ya Ndaka mpo azangaki komipekisa. (Mit. 20:7-13) Ndenge moko mpe, Yona abombaki te bolɛmbu oyo amonisaki liboso mpe nsima ya kosakwela bato ya Ninive. Akomaki yango nyonso.​—Yona 1:1-3; 4:1-3.

Ya solo, koloba solo esɛngaka mpiko, ata soki ekoki komemela yo mpasi, ndenge emonisami na likambo oyo ekómelaki Nathalia, elenge mwasi moko ya mbula 14, na eteyelo. Atángaki lisusu biyano ya ekzamɛ na ye oyo asalaki mpe amonaki ete moko na biyano oyo molakisi andimaki ete ezali malamu, ezalaki mabe. Atako ayebaki ete soki ayebisi ye bapwɛ na ye ekokita, Nathalia akakatanaki te koyebisa molakisi. Alobaki boye: “Baboti na ngai bateyaka ngai ntango nyonso ete mpo na kosepelisa Yehova, nasengeli kozala sembo. Lisosoli na ngai elingaki kotungisa ngai soki nayebisaka molakisi na ngai te.” Molakisi asepelaki na bosembo ya Nathalia.

Bosembo ekumisaka Yehova

Giselle, elenge mwasi moko ya mbula 17, alokɔtaki pɔtɔmɔni moko oyo ezalaki na mikanda mpe mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare 35. Na lisalisi ya bakonzi ya eteyelo, azwaki bibongiseli mpo na kozongisa yango epai ya nkolo na yango. Sanza moko na nsima, mokambi-molandi atángelaki kelasi mobimba mokanda oyo ezalaki kokumisa Giselle mpo na bosembo na ye mpe kopesa libota na bango longonya mpo na ndenge bateyá ye malamu mpe mpo na mateya oyo azwaka na lingomba na bango. ‘Misala na ye ya malamu’ epesaki Yehova nkembo.​—Mat. 5:14-16.

Esɛngaka milende mpo na kozala sembo lokola tofandi esika moko na bato oyo ‘bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, oyo bazangi bosembo.’ (2 Tim. 3:2) Atako bongo, kobanga Yehova na ndenge ya malamu, kozala na lisosoli oyo eteyami na Biblia, mpe koyeba kosepela na oyo tozali na yango esalisaka biso tózala sembo na mokili oyo ezangi bosembo. Esalisaka mpe biso tókóma baninga ya motema ya Yehova, ye oyo ‘azali moyengebene mpe alingaka misala ya boyengebene.’​—Nz. 11:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Bililingi na lokasa 7]

Kobanga Yehova na ndenge ya malamu esalisaka biso tózala sembo

[Elilingi na lokasa 8]

Etamboli na biso ya bosembo epesaka Yehova nkembo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto