Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/5 lok. 4
  • Esakweli 1. Koningana ya mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esakweli 1. Koningana ya mabele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?
    Makambo mosusu
  • Tózela koningana ya mabele ya minene koleka
    Lamuká!—2011
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/5 lok. 4

Esakweli 1. Koningana ya mabele

“Mabele ekoningana makasi.”​—LUKA 21:11.

● Na Haïti, babimisaki Winnie, elenge mwasi moko ya mbula moko na ndambo na nse ya libondo ya biloko oyo ebukanaki. Etuluku ya bapanzi nsango ya televizyo oyo bayaki na esika ya likama yango, bayokaki ndenge azalaki kolela na mongongo ya nse. Abikaki ntango mabele eninganaki, kasi baboti na ye bakufaki.

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Ntango mabele eninganaki makasi na Haïti na sanza ya Yanuali 2010, bato koleka 300 000 bakufaki. Lisusu, bato milio moko na ndambo bazangaki bisika ya kofanda na mbalakaka. Atako koningana ya mabele na Haïti ezalaki makasi, ezalaki mpe na bisika mosusu oyo mabele eninganaki. Koningana ya mabele ya minene soki 18 esalemaki na mokili mobimba katikati ya sanza ya Aprili 2009 mpe Aprili 2010.

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Koningana ya mabele ezali kosalema mingi te lelo oyo; mpo na mayele ya teknoloji ya mikolo na biso nde tozali koyeba yango mingi koleka bato ya ntango ya kala.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Tótalela likambo oyo: Biblia elobeli te mbala boni koningana ya mabele esengeli kosalema na boumeli ya mikolo ya nsuka. Nzokande, elobi kaka ete “mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge,” mpe yango ekozala moko ya makambo minene ya eleko oyo ya yikiyiki.​—Marko 13:8; Luka 21:11.

OKANISI NINI? Tozali komona koningana ya mabele, kaka ndenge Biblia esakolaki?

Koningana ya mabele yango moko ekoki kozala te elembeteli oyo emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka. Kasi, yango ezali kaka moko ya bisakweli oyo ezali kokokisama. Tótalela oyo ya mibale.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

“Biso [bato ya mayele oyo bayekolaka mabele] tobengaka yango koningana makasi ya mabele. Bato nyonso babengaka yango makambo ya nsɔmɔ.”​—KEN HUDNUT, ANKƐTƐ MOKO OYO BATO BAYEKOLAKA MABELE BASALAKI NA ÉTATS-UNIS.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

© William Daniels/​Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto