Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Avril lok. 30
  • Nkoma ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkoma ya batángi
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?
    Makambo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Esakweli 1. Koningana ya mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Lamuká!—2003
g03 Avril lok. 30

Nkoma ya batángi

Koningana ya mabelé Natángaki masolo ya ebandeli na Lamuká! oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Koningana ya mabelé: Maloba ya bato oyo babikaki.” (22 Marsi 2002, na Lifalanse) Na Lamuká! yango, bozongeli maloba ya buku moko oyo emonisi ete “motángo ya koningana ya mabelé oyo ezalaki na makasi ya magnitude 7,0 to koleka, ‘ebongwani mpenza te’ na boumeli ya ekeke mobimba ya 20.” Nzokande, buku mosusu (World Almanac) oyo ekomamaki na 1999 emonisi ete na bambula ya 1990, mabelé eninganaki mbala mingi koleka liboso.

F. A., Italie

Eyano ya “Lamuká!”: Kozanga ete tólongisa buku oyo mpe tókweisa oyo kuna na likambo yango, zulunalo na biso ezongelaki nde makambo oyo bato mosusu oyo bayekolaka koningana ya mabelé balobaki mpo na motángo ya koningana ya mabelé oyo esalemaki na boumeli ya ekeke ya 20. Likanisi oyo tobimisaki yango oyo: Ata soki moto moko akanisi ete motángo ya koninganga ya mabelé “ebongwani mpenza te,” esakweli ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 24 ezali kokokisama na ntango na biso. Yesu alobaki bobele ete “koningana minene ya mabelé” ekosalema.​—⁠Luka 21:⁠11.

Kobota mwana así akufi Ntango namonaki lisolo “Nabotaki mwana así akufi” (22 Marsi 2002, na Lifalanse), mpisoli ebimaki ngai na miso, ntango nakanisaki ndenge mwana na biso abotamaki así akufi. Mbala moko, nabondelaki Yehova mpo na kopesa ye matɔndi mpo na lisolo wana oyo etali mpenza biso mpe ebɔndisi biso mingi. Tokobɔndisama ntango nyonso lokola toyebi ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, makambo ya ndenge wana ekokómela lisusu moto moko te.

J. S., États-Unis

Nsima ya kosala na zemi pɔsɔ 30, zemi yango esopanaki. Ezalaki likambo oyo elekaki mabe na bomoi na ngai. Lisolo oyo esalisi ngai mingi mpe ebɔndisi ngai mingi ndenge elobeli likambo yango oyo mbala mingi bato balingaka kolobela kutu te; epesi mpe toli moko ya malamu mpenza.

K. W., Allemagne

Ngai mpe nabotaki mwana oyo así akufi. Nasalaki lokola likambo moko ezalaki te. Kasi na kati ya motema na ngai, nazalaki kobɔndisama te mpe mikolo nyonso, ntango nazalaki ngai moko, nazalaki kaka kolela. Nakanisi ete mpasi wana ekosila mpenza te ntango nyonso oyo ebongiseli oyo ekozala. Kasi lisolo oyo esalisi ngai mingi.

I. M., Japon

Bolobi mpenza solo ntango bolobi ete mama ná mwana babandaka komesana kobanda na libumu. Esalaka mpenza mpasi. Eleki sikoyo mbula 19 bandá mwana na biso akufá; tii lelo, nalelaka ye kaka.

C. C., Angleterre

Mbala mingi, nakokaka mpenza te kosolola na bato oyo bakweli likambo yango. Ntango nazwaki nsango ete ndeko mwasi moko ya lisangá na biso aboti mwana oyo así akufi, natángaki lisusu lisolo yango mpe natindelaki ye mokanda, natindelaki mpe bankɔkɔ ya mwana yango mokanda mpo na komonisa mawa mpenza oyo nayokelaki bango.

D. R., Allemagne

Lisolo oyo ezalaki eyano na mabondeli na ngai. Natɔndi bino mingi ndenge bomonisi ete boyebi mawa mpe motema mpasi oyo moboti ayokaka soki aboti mwana oyo así akufi. Ntango nazalaki kotánga lisolo oyo, nazalaki koyoka lokola Yehova ye moko azingi ngai na mabɔkɔ na ye mpe azali kobɔndisa ngai.

C. P., États-Unis

Mwana moko ya mama oyo azalaki katikati na ngai mpe lɛki na ngai ya mwasi akufaki. Na ntembe te, likambo yango esalaki ye mpenza motema mpasi koleka. Ntango natángaki etanda “Ndenge bandeko mpe baninga bakoki kosalisa,” mbala moko natindelaki ye mokanda.

M. Y., Japon

Bakɔntina ezali boni? Na lokasa 25 ya zulunalo na bino ya 8 Febwali 2002 (na Lifalanse), bolobaki ete Australie ezali kɔntina oyo eleki moke na kati ya bakɔntina mitano ya mokili.” Ngai nayebi ete bakɔntina ezali nsambo.

L. U., Canada

Eyano ya “Lamuká!”: Toboyi te, bakɔntina ezali nsambo: Azia, Afrika, Amerika ya Nɔrdi, Amerika ya Sudi, Antarktika, Mpoto mpe Ostralia. Kasi, bato mosusu oyo bamonaka ete Mpoto ná Azia ezali kaka kɔntina moko (Eurasie), balobaka ete bakɔntina ezali motoba. Basusu balobaka ete Antarktika ezali mpenza kɔntina te. Mbala mingi, mikanda ya Lifalanse ekabolaka mokili na bakɔntina mitano; elingi koloba biteni mitano: Mpoto, Azia, Afrika, Amerika mpe Oseania, mpe elimbolaka ete, mbala mosusu, batalelaka Antarktika lokola kɔntina.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto