Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/5 lok. 10
  • Mikolo malamu ezali mosika te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikolo malamu ezali mosika te!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya
    Makambo mosusu
  • Mokili ya sika ya kitoko mingi oyo Nzambe akosala
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/5 lok. 10

Mikolo malamu ezali mosika te!

“Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—NZEMBO 37:10, 11.

OKOLINGA komona kokokisama ya esakweli oyo totángi awa na likoló? Na ntembe te, okolinga. Ezali na bantina mpenza ya kondima ete ekokokisama mosika te.

Masolo oyo euti koleka elobeli kaka mwa bisakweli ya Biblia oyo emonisi polele ete tozali na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Nzambe apesaki bakomi ya Biblia elimo na ye mpo básakola makambo yango mpo tózala na elikya. (Baroma 15:4) Kokokisama ya bisakweli yango elimboli ete etikali moke bampasi oyo tozali komona lelo esila.

Nini ekosalema na nsima ya mikolo ya nsuka? Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bato nyonso. (Matai 6:9, 10) Tótalela oyo Biblia elobi na ndenge makambo ekozala awa na mabele na ntango wana:

● Nzala ekosila. “Mbuma ekozala beboo na mabele; Na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

● Maladi ekolongolama. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

● Mabele ekozonga ya sika. “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

Wana ezali kaka mwa bisakweli ya kolendisa ya Biblia oyo ekokokisama mosika te. Mpo na nini te kotuna Batatoli ya Yehova bámonisa yo ntina oyo bazali mpenza kondima ete mikolo malamu ezali mosika te?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto