Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/9 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ezali koyangela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Biblia—Buku ya masolo ya solo mpe ya bisakweli ya kotyela motema
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Zwá mateya na bisakweli ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/9 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini bisakweli ezali na Biblia?

Yesu azali kosolola na bayekoli na ye mosusu na Ngomba ya Olive

Mpo na nini Biblia elobeli makambo ya ntango na biso?​—Luka 21:10, 11.

Bisakweli mingi oyo elobeli ata makambo ya mikemike ezali na Biblia. Moto moko te akoki kolobela makambo oyo ekosalema ata na makambo na yango ya mikemike. Na yango, kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.​—Tángá Yosua 23:14; 2 Petro 1:20, 21.

Bisakweli ya Biblia oyo ekokisamá etindaka biso tózala na kondima epai ya Nzambe. (Baebre 11:1) Endimisaka biso mpe ete bilaka ya Nzambe oyo etali bomoi ya malamu na mikolo ezali koya ekokokisama. Na yango, bisakweli ya Biblia epesaka biso elikya ya solosolo.​—Tángá Nzembo 37:29; Baroma 15:4.

Ndenge nini bisakweli ya Biblia esalisaka biso?

Bisakweli mosusu ekebisaka basaleli ya Nzambe bálalisa mabɔkɔ te. Na ndakisa, ntango bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonaki kokokisama ya mwa bisakweli mosusu, balongwaki na Yerusaleme. Na nsima, ntango engumba yango ebebisamaki mpo mingi ya bato na yango baboyaki Yesu, bakristo yango bazalaki mosika, na esika moko ya libateli.​—Tángá Luka 21:20-22.

Lelo oyo, bisakweli oyo ekokisamá emonisaka ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosukisa biyangeli mpe baguvɛrnema ya bato. (Danyele 2:44; Luka 21:31) Yango wana, ebongi ete moto mokomoko asala na lombangu sikoyo mpo Yesu Kristo, mokonzi oyo Nzambe atye andima ye.​—Tángá Luka 21:34-36.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 2 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto