Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/5 nk. 11-15
  • Mabota ya bakristo—“Bómilɛngɛla”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota ya bakristo—“Bómilɛngɛla”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bóbatela liso na bino “alima”
  • Bóluka kokokisa mikano ya elimo
  • Bókoba kosala losambo na libota pɔsɔ nyonso
  • “Bózala ekɛngɛ” mpe “bómilɛngɛla”
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/5 nk. 11-15

Mabota ya bakristo​—“Bómilɛngɛla”

“Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—LUKA 12:40.

1, 2. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na toli oyo Yesu apesaki ete “bómilɛngɛla”?

“NTANGO Mwana ya moto akoya na nkembo na ye” mpe akokabola “bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo,” yo ná libota na yo bokozala ndenge nini? (Mat. 25:31, 32) Lokola likambo yango ekosalema na ngonga oyo tozali mbala mosusu kokanisa te, ezali mpenza na ntina tótya likebi na toli oyo Yesu apesaki ete “bómilɛngɛla”!​—Luka 12:40.

2 Lisolo oyo eleki elobelaki ndenge moto mokomoko na libota akoki kosalisa libota mobimba ezala ekɛngɛ na elimo soki azali kozwa mokumba na ye na lisɛki te. Tótala sikoyo makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kosalisa libota na biso ezala malamu na elimo.

Bóbatela liso na bino “alima”

3, 4. (a) Mabota ya bakristo basengeli kokeba na nini? (b) Kobatela liso “alima” elimboli nini?

3 Mpo mabota bázala bamilɛngɛli mpo na koya ya Kristo, basengeli kokeba ete eloko moko te elongola likebi na bango na makambo etali losambo ya solo. Basengeli kotika te ete makambo mosusu etinda bango bátya losambo ya solo pembeni. Lokola elimo ya konduka biloko ya mokili ezali motambo oyo ekweisá mabota ebele, tótala makambo oyo Yesu alobaki na oyo etali kobatela liso na biso “alima.” (Tángá Matai 6:22, 23.) Kaka ndenge mwinda ekoki kongɛngisa nzela na biso mpo tótambola malamu mpe tókwea te, makambo oyo tozali kokɔtisa na makanisi na nzela ya ‘miso ya motema na biso’ ya elilingi ekoki kongɛngisa biso mpe kosalisa biso tómitambwisa kozanga kobɛta mabaku.​—Ef. 1:18.

4 Mpo liso emona polele, esengeli emonaka malamu mpe ekoka kotala kaka eloko oyo yango ezali kotala. Ezali mpe bongo mpo na miso ya motema. Kozala na liso alima elimboli kotya makanisi na biso kaka na mokano moko. Na esika tómipesa mobimba na koluka biloko ya mokili mpe komitungisa koleka ndelo kaka mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na biso, totyaka miso na biso na makambo ya elimo. (Mat. 6:33) Elingi koloba ete tosepelaka na biloko ya kobikela oyo tozali na yango mpe totyaka mosala ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso.​—Ebr. 13:5.

5. Ndenge nini elenge mwasi moko amonisaki ete atyaki “liso” na ye kaka na mosala ya Nzambe?

5 Koteya bana bázala na liso alima ekoki kobota mbuma malamu mpenza! Tózwa ndakisa ya elenge mwasi moko na ekólo Éthiopie. Azalaki mayele mingi na kelasi na boye ete ntango asilisaki kelasi ya ntei, bapesaki ye bourse mpo akende kokoba kelasi na mboka mosusu. Nzokande, lokola azalaki kotya miso na ye kaka na mosala ya Yehova, aboyaki bourse yango. Mwa moke na nsima, bapesaki ye mosala oyo bakobanda kofuta ye dolare 4 200 na sanza​—mbongo mingi mpenza soki totali lifuti ya bato mingi na ekólo na bango. Kasi elenge mwasi yango atyaki “liso” na ye kaka na mosala ya mobongisi-nzela. Esɛngaki kutu te ete atuna baboti na ye mpo aboya mosala yango. Baboti na ye bayokaki ndenge nini ntango bayebaki likambo oyo mwana na bango ya mwasi asalaki? Basepelaki mingi mpe bayebisaki ye ete apesi bango esengo!

6, 7. Tosengeli ‘kofungola miso na biso’ na likama nini?

6 Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:22, 23 ezali mpe na likebisi mpo na likambo etali lokoso. Yesu alobaki ete liso oyo ezali “alima” te, ezali “mabe.” “Liso oyo ezali mabe” ebendamaka na makambo ya mabe mpe ezali na bilulela, elingi koloba lokoso. (Mat. 6:23) Yehova ayokaka ndenge nini mpo na bilulela to lokoso? Biblia elobi boye: “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso [to “bilulela”] etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu.”​—Ef. 5:3.

7 Ekoki kozala pɛtɛɛ komona ete basusu bazali na lokoso, kasi mpasi komona ete biso moko tozali na yango. Na yango, ezali malamu tólanda toli oyo Yesu apesaki ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela.” (Luka 12:15) Mpo na kosala bongo, tosengeli komitala mpo tóyeba soki totyaka mitema na biso na makambo nini. Mabota ya bakristo basengeli kokanisa malamu mpenza mpo na ntango mpe mbongo oyo babimisaka mpo na masano, kominanola, mpe koluka biloko ya mosuni.

8. Na oyo etali kosomba biloko, ndenge nini tokoki ‘kofungola miso na biso’?

8 Liboso ya kosomba eloko, osengeli kosuka kaka te na kotala soki ozali na mbongo oyo ekoki mpo na kosomba yango. Omituna mituna lokola oyo: ‘Nakozala na ntango ya kosalelaka eloko yango mpe kobatela yango? Ekozwa ngai ntango boni mpo na koyekola ndenge ya kosalela yango malamu?’ Bino bilenge, bóndima te bapiblisite nyonso oyo mokili ezali kosala mpo na biloko, bongo bóya kosɛnga mbongo ebeleebele mpo na kosomba bilamba ya ntalo to biloko mosusu. Bózala na komipekisa. Bókanisa mpe soki kosomba eloko yango oyo bolingi ekosalisa libota emilɛngɛla mpo na koya ya Mwana ya moto. Bózala na kondima na elaka oyo Yehova apesi ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—Ebr. 13:5.

Bóluka kokokisa mikano ya elimo

9. Koluka kokokisa mikano ya elimo ekoki kosalisa libota na nini?

9 Ndenge mosusu oyo bato ya libota bakoki kokómisa kondima na bango makasi mpe kosalisa libota mobimba ezala malamu na elimo ezali nde komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango. Kosala bongo ekoki kosalisa mabota báyeba ndenge nini bazali kosalela Yehova mpe makambo nini basengeli kotya na esika ya liboso na bomoi na bango.​—Tángá Bafilipi 1:10.

10, 11. Na libota na bino, mikano nini bozali koluka kokokisa, mpe mikano mosusu nini bokolinga komityela mpo na mikolo ekoya?

10 Ata komityela mikano ya mikemike oyo moto nyonso na libota akoki kokokisa yango ekoki kopesa matomba mingi. Tózwa na ndakisa mokano ya kotalela mikolo nyonso mokapo ya mokolo. Bakomantɛrɛ oyo bato ya libota bapesaka ekoki kosalisa tata ya libota ayeba ndenge oyo mokomoko na bango alingaka Yehova mpe solo. Komityela mokano ya kotánga Biblia elongo mbala na mbala na libota epesaka bana libaku ya kokolisa makoki na bango ya kotánga mpe kosalisa bango bákanga malamu ntina ya nsango oyo euti na Biblia. (Nz. 1:1, 2) Mpe tosengeli te komityela mokano ya kobongisa mabondeli na biso? Mokano mosusu ya malamu oyo tokoki koluka kokokisa ezali nde kolona malamumalamu bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22, 23) Bongo koluka ndenge ya komitya na esika ya bato oyo tozali kokutana na bango na mosala ya kosakola? Ntango libota mobimba ezali kosala milende mpo na kokokisa mikano ya ndenge wana, bana bakoki koyeba koyokela basusu mawa, mpe mbala mosusu kokolisa mposa ya kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza to bamisionɛrɛ.

11 Mpo na nini te kotalela mikano mosusu oyo yo ná libota na yo bokoki koluka kokokisa? Libota na bino ekoki nde komityela mokano ya kobakisa ntango oyo bolekisaka na mosala ya kosakola? Bokoki nde kosala makasi mpo na kolongola kobanga kosakola na telefone, na balabala, mpe na bisika ya mimbongo? Bongo kokende kosala na esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi? Moto moko ya libota na bino akoki nde koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bauti na bikólo mosusu?

12. Batata ya mabota bakoki kosala nini mpo na kosalisa mabota na bango ekola na elimo?

12 Soki ozali tata ya libota, luká koyeba na makambo nini libota na yo ekoki kokende liboso na elimo. Na nsima, bómityela mikano ya sikisiki mpo bókokisa makambo yango. Mikano oyo bomityeli na libota esengeli kozala makambo oyo bokokoka kosala na kolanda bomoi mpe makoki na bino. (Mas. 13:12) Ya solo, komipesa mpo na kokokisa mokano moko ya ntina esɛngaka ntango. Na yango, bósomba ntango oyo bolekisaka na kotala televizyo mpe bósalela yango mpo na kokokisa mikano ya elimo. (Ef. 5:15, 16) Bósala makasi mpo na kokokisa mikano oyo bomityeli na libota. (Gal. 6:9) Soki libota ezali koluka kokokisa mikano ya elimo ‘bato nyonso bakomona polele’ ete ezali kokende liboso.​—1 Tim. 4:15.

Bókoba kosala losambo na libota pɔsɔ nyonso

13. Mbongwana nini bakɔtisaki na manaka ya makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ, mpe tosengeli komituna mituna nini?

13 Ebongiseli moko kitoko oyo ezwamaki mpo na kosalisa mabota ‘bámilɛngɛla’ mpo na koya ya Mwana ya moto ezali mbongwana oyo ekɔtaki na manaka ya makita ya lisangá banda mokolo ya 1 Yanuali 2009. Ntina ya kokutana lisusu na kati ya pɔsɔ kaka mpo na likita oyo tozalaki kobenga Boyekoli ya mokanda ezalaki lisusu te mpo bakɔtisaki likita yango na mokolo oyo tosalaka Eteyelo ya mosala ya teokrasi mpe Likita ya mosala. Mbongwana yango esalemaki mpo na kopesa mabota libaku ya kokómisa boyokani na bango na Yehova makasi, mpo bakozala na mpokwa moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosala losambo na libota. Sikoyo lokola mwa mikolo eleki banda mbongwana wana ekɔtá, tokoki komituna boye: ‘Ntango oyo batikelá biso, nazali mpenza kosalela yango na Losambo na libota to na boyekoli ya ngai moko? Nalongi kokokisa mokano ya ebongiseli yango?’

14. (a) Ntina ya libosoliboso ya kokoba kosala Losambo na libota to koyekola biso moko ezali nini? (b) Mpo na nini kotya mpokwa moko mpo na koyekola ezali na ntina mingi?

14 Ntina ya libosoliboso ya kokoba kosala Losambo na libota to koyekola biso moko ezali ya kopusana penepene na Nzambe. (Yak. 4:8) Soki tozali kolekisa ntango na koyekola Biblia mbala na mbala mpe kokolisa boyebi na biso ya Mozalisi, boyokani na biso na ye ekokóma makasi. Soki tokómi penepene mingi na Yehova, mposa na biso ekozala ya kolinga ye ‘na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso.’ (Mrk. 12:30) Ya solo, tozali na mposa makasi ya kotosa Nzambe mpe kokóma bamekoli na ye. (Ef. 5:1) Na yango, kokoba kosala Losambo na libota ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bato nyonso ya libota ‘bámilɛngɛla’ na elimo wana tozali kozela ‘bolɔzi monene’ oyo esakolamaki. (Mat. 24:21) Ezali na ntina mingi mpo na kozwa lobiko.

15. Losambo na libota ekoki kosala nini epai ya bato ya libota moko?

15 Ebongiseli ya Losambo na libota ezali mpe na ntina mosusu​—kosalisa bato ya libota bákóma na boyokani makasi. Kolekisa ntango elongo mpo na kosolola makambo ya elimo pɔsɔ nyonso esalisaka bato ya libota bálingana. Babalani bakómaka na bomoko mpenza ntango bazali komona ndenge moninga azali kosepela na makambo ya sika oyo bayekoli na Biblia! (Tángá Mosakoli 4:12.) Baboti oyo basalaka losambo elongo na bana na bango bazalaka mbala mingi na bomoko na kati ya bolingo, “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Kol. 3:14.

16. Monisá ndenge bandeko basi misato bazali kozwa matomba na ndenge batyá mpokwa moko mpo na koyekola Biblia.

16 Tótala ndenge bandeko basi misato bazwi matomba na ebongiseli ya kozala na mpokwa moko mpo na koyekola Biblia. Atako bazali bandeko ya libota moko te, mibange yango misato oyo mibali bakufá bafandaka na engumba moko mpe bazali baninga malamu banda bambula mingi. Lokola bazalaki na mposa bákutanaka mingi mpe lokola balingaki ete ntango yango ezala mpe mpo na makambo ya elimo kasi kaka mpo na kobɛta masolo mpamba te, bazwaki ekateli ya kotya mpokwa moko mpo na kokutana mpe koyekola Biblia elongo. Babandaki kosala yango na buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe. Moko na bango alobi boye: “Tosepelaka na ntango yango mingi na boye ete mbala mingi boyekoli na biso eumelaka koleka ngonga moko. Tolukaka komona na makanisi makambo oyo bandeko na biso ya ekeke ya liboso bakutanaki na yango mpe kolobela soki tolingaki kosala nini na makambo ya ndenge wana. Na nsima, ntango tobimi na mosala ya kosakola, tolukaka kosalela makambo oyo toyekolaki. Lokola tosalaka bongo, mosala na biso ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ekómá kopesa biso esengo mingi mpe kobota mbuma mingi koleka ndenge ezalaki liboso.” Longola kolendisa bango na elimo, ebongiseli yango esalisi baninga wana misato bálingana makasi mingi koleka. Balobi boye: “Tosepelaka mpenza na ebongiseli yango.”

17. Makambo nini esalisaka mpo Losambo na libota elonga?

17 Bongo bino? Mpokwa oyo botyá mpo na losambo na libota to mpo na koyekola bino moko ezali kosalisa bino na nini? Soki ezali kosalema kaka ntango libaku ezwami, ebongiseli yango ekokokisa te bantina oyo basalaki yango. Moto nyonso na libota asengeli komilɛngɛla mpo na koyekola na ntango oyo etyamá. Esengeli te kotika makambo mikemike epekisa bino kosala Losambo na libota na mpokwa wana. Lisusu, makambo oyo bokopona koyekola esengeli kozala makambo oyo ekoki kosalisa libota na bomoi ya mokolo na mokolo. Bokoki kosala nini mpo ntango yango ya boyekoli esepelisaka bino? Bósalela mayele ya koteya oyo ekoki kosimba, mpe ntango bozali koyekola, bósala ete limemya mpe kimya ezala.​—Yak. 3:18.a

“Bózala ekɛngɛ” mpe “bómilɛngɛla”

18, 19. Koyeba ete mosika te Mwana ya moto akoya esengeli kotinda yo ná libota na yo bósala nini?

18 Ndenge oyo makambo ya mokili ezali kobeba emonisi polele ete banda 1914 mokili mabe ya Satana ekómi na mikolo na yango ya nsuka. Mbula ya mopɛpɛ makasi, elingi koloba Armagedone, ekómi pene. Mosika te Mwana ya moto akoya kokweisa bitumbu ya Yehova likoló ya bato oyo batyolaka Nzambe. (Nz. 37:10; Mas. 2:21, 22) Koyeba likambo yango esengeli te kotinda yo ná libota na yo bómilɛngɛla?

19 Bozali kolanda toli oyo Yesu apesaki ya kobatela liso na bino “alima”? Wana bato ya mokili oyo bazali koluka bozwi, lokumu, to bokonzi, na libota na bino bozali koluka kokokisa mikano ya elimo? Ebongiseli ya Losambo na libota to ya boyekoli ya moto ye moko ezali kotambola malamu epai na bino? Bozali mpenza kokokisa mikano ya ebongiseli yango? Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, moto mokomoko ya libota​—mobali, mwasi, to bana—​azali kokokisa mokumba oyo Biblia epesi ye, mpe na ndenge yango kosalisa libota mobimba ‘ezala ekɛngɛ’? (1 Tes. 5:6) Soki ezali bongo, bozali ‘komilɛngɛla’ mpo na koya ya Mwana ya moto.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo oyo bokoki koyekola mpe ndenge ya kosala mpo boyekoli yango esalisa bato ya libota mpe esepelisa, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2009, nkasa 29-31.

Oyekoli makambo nini?

• Limbolá ndenge oyo mabota ya bakristo bakoki ‘komilɛngɛla’ soki . . .

bazali na liso “alima.”

bazali komityela mpe koluka kokokisa mikano ya elimo.

bazali kokoba kosala Losambo na libota pɔsɔ nyonso.

[Elilingi na lokasa 13]

Kozala na liso “alima” ekosalisa biso tótika te makambo ya mokili ebenda biso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto