Lisalisi mpo na mabota
1. Pɔsɔ na pɔsɔ, matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa mokolo ya Sabata?
1 Mokolo ya Sabata ezalaki ebongiseli moko ya bolingo oyo Yehova azwaki mpo na bolamu ya mabota. Bayisraele bazalaki kopema nsima ya kosala misala makasi mpe bazalaki kozwa ntango ya komanyola na bolamu oyo Yehova azalaki kosalela bango mpe mpo na boyokani na bango ná ye. Baboti bazalaki kosalela libaku yango mpo na kokɔtisa Mibeko ya Yehova na mitema ya bana na bango. (Mib. 6:6, 7) Pɔsɔ na pɔsɔ, mokolo ya Sabata ezalaki kotikela basaleli ya Yehova ntango ya kotya likebi na bango nyonso na makambo ya elimo.
2. Mokolo ya Sabata eteyaka biso nini na ntina ya Yehova?
2 Yehova asɛngaka lisusu te mabota ekanisa mokolo ya Sabata. Kasi, mobeko wana ezali koteya biso likambo moko na ntina ya Yehova. Ntango nyonso, Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na bolamu ya elimo ya bato na ye. (Yis. 48:17, 18) Lelo oyo, lolenge moko oyo Yehova amonisaka ete amibanzabanzaka mpo na biso ezali na nzela ya Losambo na libota.
3. Ntina ya Losambo na libota ezali nini?
3 Ntina ya Losambo na libota ezali nini? Kobanda Yanuali 2009, Boyekoli ya mokanda na lisangá ekómá kosalema mpokwa moko ná Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala. Moko ya bantina oyo mbongwana yango esalemaki ezalaki mpo na kopesa mabota libaku ya kolendisa boyokani na bango ná Yehova na nzela ya losambo na libota oyo bakosala na mpokwa moko oyo bakopona na kati ya pɔsɔ. Mabota nyonso elendisamaki na kosala boyekoli na libota na mpokwa oyo bazalaki kosala boyekoli ya mokanda kala, soki ebongi, mpe kosalela ntango yango mpo na koyekola Biblia elongo na libota na motema ya kokita mpe koyekola makambo oyo eyokani na bamposa ya libota.
4. Losambo na libota esengeli koumela kaka ngonga moko? Limbolá.
4 Mpo na koyangana na Boyekoli ya mokanda na lisangá ezalaki kosɛnga biso ntango ya kolata, kotambola kino na esika oyo boyekoli yango ekosalema mpe bongo na bongo. Mpo na mingi kati na biso, koyangana na likita wana ya ngonga moko ezalaki kozwa biso pene na mpokwa mobimba. Lokola programɛ na biso ya makita ebongwani, totikali na mpokwa wana mpo na kosambela Yehova libota mobimba elongo. Yango wana, Losambo na libota esengeli koumela kaka ngonga moko te. Tosengeli nde kotalela bamposa mpe makambo mosusu ya libota na biso mpo na koyeba ntango boni losambo yango ekoumela.
5. Tosengeli nde kolekisa mpokwa wana mobimba kaka elongo? Limbolá.
5 Tosengeli nde kolekisa mpokwa wana mobimba kaka elongo? Soki mwasi ná mobali to mpe mabota oyo ezali na bana bazali koyekola Biblia elongo, bakolendisana. (Rom. 1:12) Mabota na bango ekokóma na boyokani makasi. Yango wana, ntango tozali kosala Losambo na libota, tosengeli kolekisa ntango mingi nde na koyekola Biblia elongo. Nzokande, moto mokomoko ya libota akoki mpe koyekola ye moko. Na ndakisa, nsima ya koyekola elongo, tokoki kotikala kaka esika moko, kasi moto na moto azali kokoba koyekola ye moko; ntango mosusu kosilisa kobongisa makita to kotánga bazulunalo. Mabota mosusu emonaka malamu báfungola televizyo te mpokwa wana mobimba.
6. Ndenge nini Losambo na libota esengeli kosalema?
6 Ndenge nini Losambo na libota esengeli kosalema? Losambo na libota esengeli te kozala ntango nyonso lisolo ya mituna mpe biyano. Mpo losambo yango elɛmbisa te mpe esepelisa moto nyonso, mabota mingi esalaka yango ndenge tosalaka makita ya katikati ya pɔsɔ. Bakabolaka boyekoli yango na biteni mpe basalaka yango na lolenge ekeseni. Na ndakisa, bakoki kotánga Biblia elongo, kobongisa masolo mosusu oyo ekosalema na makita mpe kosala bilakiseli ya makambo oyo bakoloba na mosala ya kosakola. Lokasa 6 ezali kopesa mwa makanisi.
7. Baboti basengeli kosala nini mpo Losambo na libota ezala ntango ya esengo?
7 Baboti basengeli kosala nini mpo Losambo na libota ezala ntango ya esengo? Libota na yo ekoyekola malamu soki moto nyonso azali na esengo. Soki ebongi, mikolo mosusu bokoki koyekola libándá. Soki esengeli, bokoki mpe kopemaka mwa moke. Mabota mosusu bamɛlaka mwa masanga ya sukali nsima ya losambo yango. Atako baboti basengeli te kogangela bana to kopesa bango disiplini na ntango ya Losambo na libota, bakoki kozwa mwa miniti mpo na kopesa toli na likambo moko ya mabe oyo elingi kokɔta na libota to likambo moko oyo bamoni. Kasi, soki mwana azali na bolɛmbu moko, ekozala malamu kolobela yango mokolo mosusu mpe na esika oyo bana mosusu bazali te mpo na koboya koyokisa mwana yango nsɔni na miso ya bandeko na ye. Losambo na libota esengeli te kozala ntango moko ya malilimalili, kasi esengeli nde komonisa ete tosambelaka Nzambe ya esengo.—1 Tim. 1:11.
8, 9. Ndenge nini batata ya libota bakoki komibongisa?
8 Ndenge nini Tata ya libota akoki komibongisa? Libota ekozwa matomba mingi soki tata ya libota azali komibongisa pɔsɔ na pɔsɔ mpo na Losambo na libota mpo na koluka koyeba makambo nini esengeli koyekola mpe lolenge eleki malamu ya koyekola yango. (Mas. 21:5) Ekozala malamu mobali atunaka mwasi na ye makambo oyo basengeli kolobela na Losambo na libota. (Mas. 15:22) Batata ya mabota, mpo na nini te kotuna bana na bino na bantango mosusu bápesaka mpe makanisi na bango? Soki bosali bongo, yango ekosalisa bino bóyeba makambo oyo esepelisaka bango mpe oyo etungisaka bango.
9 Ezali na ntina te ete tata ya libota alekisaka ntango mingi na komibongisa pɔsɔ nyonso, mpamba te libota ezali na makambo ndenge na ndenge oyo emeseni kosala pɔsɔ na pɔsɔ na ntango ya boyekoli; yango wana ekosɛnga te ete asalaka programɛ ya sika ntango nyonso. Tata ya libota akoki komona ete ezali malamu abongisa programɛ ya pɔsɔ ezali koya soki kaka basilisi koyekola, ntango bamposa ya libota na ye ezali naino na makanisi. Batata mosusu bakomaka programɛ ya mokuse mpe batyaka yango na esika oyo libota mobimba ekoki komona yango malamu, na ndakisa babambaka yango na frigo. Kosala bongo esalaka ete libota ezela mokolo yango na mposa makasi mpe ezwa ntango ya komibongisa.
10. Ndenge nini ndeko oyo azali ye moko akoki kosalela mpokwa ya Losambo na libota?
10 Nakosala nini soki nazali kaka ngai moko? Ndeko oyo azali ye moko akoki kosalela mpokwa ya Losambo na libota mpo na koyekola ye moko. Programɛ malamu ya boyekoli esengeli kosangisa kotánga Biblia, kobongisa makita, mpe kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Longola wana, basakoli mosusu babakisaka makambo mosusu na programɛ na bango ya boyekoli. Na ntango mosusu, babengaka mosakoli mosusu to libota mosusu mpo báyekola Biblia elongo mpo na kolendisana.
11, 12. Tángá mwa matomba ya kosala Losambo na libota pɔsɔ na pɔsɔ?
11 Matomba nini tokozwa soki tozali kosala Losambo na libota pɔsɔ na pɔsɔ? Bandeko oyo bamipesaka na motema mobimba na losambo ya solo bapusanaka penepene na Yehova. Longola yango, mabota oyo basambelaka Yehova elongo bakómisaka boyokani na bango makasi. Mwasi moko ná mobali na ye bakomaki boye mpo na mapamboli oyo bazwi: “Lokola tozali babongisi-nzela mpe tozali na bana te, tozelaka mpokwa ya Losambo na libota na mposa makasi. Tomonaka ete ekómisaka boyokani na biso mpe boyokani na biso ná Yehova Tata na biso ya likoló makasi. Ntango tolamukaka na ntɔngɔ ya mokolo oyo toponá mpo na koyekola, totunanaka boye: ‘Oyebi nini tokosala na mpokwa ya lelo? Losambo na libota!’”
12 Ebongiseli ya kopona mpokwa moko mpo na Losambo na libota esalisaka mpe mabota oyo bazalaka na makambo mingi ya kosala. Ndeko mwasi moko oyo abɔkɔlaka ye moko bana na ye mibale ya mibali mpe azali mobongisi-nzela akomaki boye: “Kala, tozalaki mpenza te kosala boyekoli ya libota. Tozalaki kosala yango kaka mbala mokomoko mpe tozalaki na programɛ te mpo nazalaki kolɛmba soki nazongi ndako. Nazalaki koyeba te ndenge ya kozwa ntango ya kosala yango. Yango wana, nakomeli bino mpo na kopesa bino matɔndi mingi mpo na ebongiseli wana ya Losambo na libota. Tokómá kosala boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ mpe tozwi matomba mingi.”
13. Nini ekosala ete ebongiseli wana ememela libota na yo matomba mingi to te?
13 Lokola mokolo ya Sabata, Losambo na libota ezali likabo oyo euti epai ya Tata na biso ya likoló mpo na kosalisa mabota. (Yak. 1:17) Ndenge oyo mabota ya Bayisraele bazalaki kosalela mokolo ya Sabata nde ezalaki kosala ete bázwa matomba mingi to te na elimo. Ndenge moko mpe, ndenge oyo tosalelaka mpokwa oyo batikelá biso mpo na Losambo na libota nde ekosala ete libota na biso ezwa matomba mingi to te. (2 Ko. 9:6; Ga. 6:7, 8; Kol. 3:23, 24) Soki bosaleli malamu ebongiseli wana, libota na bino ekoloba mpe ndenge mokomi ya Nzembo alobaki: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.”—Nz. 73:28.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Losambo na libota esengeli te kozala malilimalili, kasi esengeli nde komonisa ete tosambelaka Nzambe ya esengo.
[Etanda na lokasa 6]
BATELÁ YANGO
Mwa makanisi mpo na kosala Losambo na libota
Biblia:
• Bótánga elongo mikapo ya Biblia oyo ebongisami mpo na pɔsɔ. Soki mikapo yango ezali kolobela bato ebele, moto moko atánga maloba ya molobi mpe basusu bátánga biteni oyo elobeli moto mokomoko.
• Ntango bozali kotánga eteni moko ya Biblia, bósala lokola drame.
• Sɛngá na moto mokomoko ya libota atánga mikapo ya Biblia oyo okopona liboso mpe akoma motuna moko to mibale na makambo oyo atángaki. Na nsima, bósala bolukiluki elongo mpo na kozwa biyano na mituna yango.
• Pɔsɔ na pɔsɔ bókoma vɛrsɛ moko ya Biblia na papye moko ya moke mpe bómeka kokanga yango na motó mpe kolimbola yango. Nsima ya bapɔsɔ, bózongela bapapye wana mpo na komona soki bozali komikundola bavɛrsɛ yango.
• Bólanda na Biblia na bino wana kasɛti to CD ya botángi ya Biblia ezali kobɛta.
Makita:
• Bóbongisa elongo masolo mosusu oyo ekosalema na makita.
• Bóyekola banzembo ya Bokonzi oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ezali koya.
• Soki moko na bino azali na lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi to elakiseli na Likita ya Mosala, bólobela ndenge oyo akoki kosala yango to ameka yango liboso ya libota.
Bamposa ya libota:
• Bótalela masolo oyo ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka to Yekolá epai ya moteyi monene.
• Bósala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge ya kolonga mokakatano moko oyo ekoki kobima na kelasi.
• Bósala elakiseli moko epai baboti bazwi esika ya bana mpe bana bazwi esika ya baboti. Bana bábongisa lisolo moko mpe na nsima básolola na baboti na bango.
Mosala ya kosakola:
• Bósala bilakiseli mpo na kobongisa masolo oyo bokosalela mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na mosala ya kosakola.
• Bólobela mikano oyo libota na bino ekoki komityela mpo na komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola na ntango ya Ekaniseli to na ntango ya konje.
• Bópesa moto mokomoko ya libota mwa miniti mpo na koluka biyano na mituna oyo ekoki kobima na mosala ya kosakola, na nsima bósala bilakiseli.
Makanisi mosusu:
• Bótánga elongo lisolo moko na bazulunalo ya sika.
• Mokomoko na bino atánga liboso lisolo moko oyo esepelisi ye mingi na bazulunalo na biso ya sika mpe na nsima abɛta lisolo ya makambo oyo atángaki.
• Na bantango mosusu bóbengaka mosakoli moko to ndeko moko oyo abalá ná mwasi na ye báyangana na bino na losambo na libota; bokoki mpe kosɛnga bango balobela makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola to ndenge bayebaki solo.
• Bótala video moko ya moombo ya sembo mpe bólobela makambo oyo bomoni.
• Bólobela elongo makambo oyo ezali na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka” to lisolo “Mpo na kosolola na libota” oyo ebimaka na Lamuká!
• Bólobela elongo lisolo “Teyá bana na yo” to lisolo “Mpo na bilenge” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
• Bótánga mpe bólobela mwa eteni ya Annuaire ya sika to mokanda moko oyo euti kobima na liyangani ya etúká oyo euti koleka.
• Nsima ya koyangana na liyangani ya etúká to mayangani mosusu, bózongela makambo minene oyo boyokaki.
• Bótala biloko oyo Yehova akelá mpe bólobela makambo oyo yango eteyi bino mpo na Yehova.
• Bósala elongo karte moko to liyemi moko.