Tólanda Kristo, Mokambi ya kokoka
MBALA mingi, baoyo balandaka bato oyo bazali na bokonzi basukaka na nsɔni. Kasi, ezalaka bongo te mpo na baoyo balandaka litambwisi ya Kristo. Yesu alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.” (Mat. 11:28, 29) Litambwisi ya Yesu ekitisaka motema mpe epesaka makasi. Atyaka mpenza likebi na bato oyo bazangá mpe oyo bazali konyokwama, mpe azali kobenga bango bámema ekanganeli na ye ya pɛtɛpɛtɛ. Kasi, kolanda litambwisi ya Yesu esɛngi nini?
Ntoma Petro akomaki boye: “Kristo . . . anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Pe. 2:21) Kolanda matambe ya Kristo ezali na ntina nini? Tózwa ndakisa: kanisá ete ozali na kati ya etuluku ya bato oyo basengeli kokatisa esika moko oyo bakundákundá bamine mpe kaka moto moko kati na bino nde ayebi ndenge ya kokatisa yango kozanga likama. Okolanda malamumalamu matambe na ye te, mbala mosusu kutu konyata kaka na bisika oyo ye anyati? Ezali ndenge moko mpo na biso; bolamu na biso ya mikolo ekoya etaleli lolenge oyo tozali kolanda ndakisa ya Yesu na bomoi na biso. Kosala bongo esɛngi mpe koyoka ye, kotosa ye mpe kosala na bomoko ná bamonisi na ye.
Koyoka mpe kotosa
Na nsuka ya lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo ayokaka maloba na ngai oyo mpe atosaka yango akokokana na moto ya mayele, oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Mpe mbula enɔkaki makasi mpe mpela eyaki mpe mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango, kasi ebukanaki te, mpo moboko na yango ezalaki likoló ya mabanga.”—Mat. 7:24, 25.
Na yango, Yesu alobaki ete moto oyo ayokaka mpe atosaka maloba na ye azali “mayele.” Totosaka mitinda ya Yesu na motema moko mpo na komonisa ete tozwaka ndakisa na ye na motuya, to tolingaka nde kopona kaka mitinda oyo ezali mpasi te kotosa to kaka oyo esepelisi biso? Yesu alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka [Nzambe].” (Yoa. 8:29) Tósala makasi mpo na kolanda ndakisa wana.
Na ekeke ya liboso, bantoma bapesaki ndakisa ya malamu na oyo etali kolanda litambwisi ya Kristo. Mokolo moko, Petro ayebisaki Yesu ete: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo.” (Mrk. 10:28) Ya solo, bantoma bamonaki ete litambwisi ya Yesu ezali na motuya mingi mpenza kino bandimaki kotika biloko mosusu nyonso mpo na kolanda ye.—Mat. 4:18-22.
Kosala na bomoko ná bamonisi ya Kristo
Mwa moke liboso akufa, Yesu alobelaki ndenge mosusu oyo tokoki kolanda litambwisi na ye. Alobaki boye: “Oyo ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi mpe ngai.” (Yoa. 13:20) Kutu, Yesu abengaki bamonisi na ye oyo batyami mafuta na elimo “bandeko.” (Mat. 25:40) Ntango Yesu asekwaki mpe amataki na likoló, na nsima, “bandeko” na ye batyamaki mpo bázala bantoma “na esika ya Kristo” oyo bazali kobenga bato bázonga na boyokani elongo na Yehova Nzambe. (2 Ko. 5:18-20) Mpo tómonisa ete tondimaka litambwisi ya Kristo, tosengeli mpe komikitisa liboso ya “bandeko” na ye.
Ekozala malamu tótala ndenge oyo tosalaka ntango tozwi toli ya Makomami na ntango oyo ebongi na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Ntango tozali koyekola Makomami mpe koyangana na makita ya lisangá, bakundwelaka biso maloba ya Kristo. (2 Pe. 3:1, 2) Tokomonisa ete motema na biso esepelaka mpenza na bilei yango ya elimo soki tozali kolya yango mbala na mbala. Kasi, tosengeli kosala nini soki, na bantango mosusu, bazongeli toli moko boye? Na ndakisa, Liloba ya Nzambe epesi bakristo toli ete bábala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Masolo mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaka likambo yango banda mbula koleka 100. Bandeko ya Kristo bamonisaka mpenza ete bamibanzabanzaka mpo na bolamu na biso ya elimo na ndenge babimisaka masolo na likambo yango mpe batoli mosusu oyo euti na Biblia. Kotya likebi na batoli wana ezali lolenge moko oyo tokoki komonisa ete tozali kolanda Yesu Kristo, Mokambi na biso ya kokoka.
Masese 4:18 elobi boye: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Ya solo, litambwisi ya Yesu ezali kaka kokende liboso, etɛlɛmi esika moko te. Ndenge mosusu ya kosala na bomoko ná “bandeko” ya Kristo ezali ya kozala na makanisi malamu mpo na likambo nyonso oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisi mpo na kosembola boyebi na biso ya mateya ya Biblia.—Mat. 24:45.
Tomonisaka mpe ete tozali komikitisa liboso ya “bandeko” ya Kristo ntango tozali kosala na bomoko ná bakɛngɛli oyo batyami na lisangá ya bokristo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino.” (Ebr. 13:17) Na ndakisa, nkulutu moko akoki kolendisa biso tómona ntina ya kosala Losambo na libota pɔsɔ nyonso to kopesa biso makanisi na likambo moko boye oyo etali mosala na biso ya kosakola. Mokɛngɛli-motamboli akoki kopesa biso toli oyo euti na Biblia mpo na likambo moko oyo etali bomoi ya mokristo. Ntango tozali kondima kosalela toli yango tozali komonisa ete tozali kolanda Yesu, Mokambi na biso.
Mokili ezali mpenza na mawa mpo ezangi litambwisi ya malonga. Kasi, kolanda litambwisi ya Kristo oyo etondi na bolingo epesaka mpenza makasi! Ezala ndenge nini, tótosa Mokambi na biso mpe tósala na bomoko ná baoyo ye azali kosalela lelo.
[Bililingi na lokasa 27]
Ondimaka toli oyo Biblia epesi ya kokangama te na ekanganeli esika moko na moto oyo azali mondimi te?