Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/10 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Milende mpo na kosilisa bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsango malamu mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bobola
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/10 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Bobola ekosila mokolo mosusu?

Mwasi oyo asimbi saani ya mpamba mpe ayambi mwana moke ya mwasi

Ndenge nini Nzambe akolongola bobola na mokili?​—Matai 6:9, 10.

Mbula nyonso bamilio ya bato bakufaka mpo na maladi mpe kozanga kolya malamu mpo bazali mpenza babola. Atako bikólo mosusu ezali na bomɛngo, ebele ya bato bazali kaka babola mpenza. Biblia emonisi ete bobola ezali likambo oyo enyokolaka bato ntango nyonso.​—Tángá Yoane 12:8.

Mpo bobola esila, ekosɛnga ete mokili mobimba ezala na guvɛrnema moko oyo ezali na likoki ya kokabola bomɛngo ya mabele na bosembo mpenza mpe ya kosilisa bitumba, likambo oyo esalaka mpenza ete bato bázala babola. Nzambe alaki nde guvɛrnema ya ndenge wana.​—Tángá Danyele 2:44.

Nani akoki kosilisa bobola?

Nzambe atye Mwana na ye, Yesu, ayangela bato nyonso. (Nzembo 2:4-8) Yesu akosikola babola mpe akosilisa minyoko mpe mobulu.​—Tángá Nzembo 72:8, 12-14.

Lokola Yesu azali “Nkumu ya Kimya” oyo Biblia esakolaki, akotya kimya na mokili. Bato nyonso bakofanda na bandako na bango moko, bakozala na misala ya malamu mpe bilei mingi.​—Tángá Yisaya 9:6, 7; 65:21-23.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto