Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/6 nk. 26-27
  • Osilá komiyoka lokola balingaka yo te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osilá komiyoka lokola balingaka yo te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Davidi amonisaki bolingo ya sembo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Mokanda ya Biblia nimero 10—2 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/6 nk. 26-27

Teyá bana na yo

Osilá komiyoka lokola balingaka yo te?

MBALA mingi moto akoki komiyoka ete bato balingaka ye te soki baninga bazali koboya ye na etuluku na bango. Ekoki kozala mpo azali moto ya mposo to ya ekólo mosusu, to mpe mpo alobaka to asalaka makambo oyo ekeseni na baninga. Omiyokaka ete balingaka yo te?—a

Tólobela moto moko oyo amiyokaki ndenge wana. Nkombo na ye Mefiboshete. Tóluka koyeba soki azalaki nani mpe mpo na nini amiyokaki ndenge wana. Soki omiyokaka lokola balingaka yo te, okoki kozwa liteya monene epai ya Mefiboshete.

Mefiboshete azalaki mwana ya Yonatana, moninga ya Davidi ya motema. Liboso Yonatana akufa na etumba moko, alobaki na Davidi boye: ‘Zalá malamu ná bana na ngai.’ Davidi akómaki mokonzi. Bambula na nsima, akanisaki lisusu maloba ya Yonatana, mpe Mefiboshete azalaki naino na bomoi. Ntango azalaki naino moke, azwaki likama moko monene. Akómaki motɛngumi bomoi na ye mobimba. Omoni sikoyo ntina oyo akokaki komiyoka lokola balingaka ye te?—

Mposa ya Davidi ezalaki azala malamu ná mwana ya Yonatana. Yango wana, Davidi asalaki ete Mefiboshete azala na ndako pene na oyo ya ye na Yerusaleme, mpe bábombela ye esika na mesa oyo Davidi alyaka. Moto moko na nkombo Ziba elongo na bana mpe basali na ye, basengelaki kozala basali ya Mefiboshete. Davidi apesaki mpenza mwana ya Yonatana kilo! Oyebi nini esalemaki na nsima?—

Davidi akómaki na mikakatano na ndako na ye. Abisalome, moko ya bana ya Davidi, abalukelaki ye mpe alukaki kozala mokonzi. Davidi asengelaki kokima mpo abatela bomoi na ye. Mefiboshete alingaki akende ná Davidi ntango ebele ya bato mosusu bakendeki na ye. Baninga wana ya Davidi bayebaki ete azali mokonzi oyo abongi mpenza. Kasi Mefiboshete akokaki kokende te mpo azalaki na mokakatano ya kotambola.

Na nsima, Ziba ayebisaki Davidi ete Mefiboshete atikali mpo azalaki mpenza na mposa ya kokóma mokonzi. Davidi andimaki lokuta wana! Na yango, apesaki Ziba biloko ya Mefiboshete nyonso. Eumelaki te, Davidi alongaki etumba ya Abisalome mpe azongaki na Yerusaleme. Sikoyo Davidi ayokaki mpe maloba ya Mefiboshete. Davidi azwaki ekateli ete Mefiboshete ná Ziba bákabola biloko. Okanisi ete Mefiboshete asalaki nini?—

Amilelaki te ete ekateli ya Davidi ezali sembo te. Mefiboshete ayebaki ete mokonzi azali na mposa ya kimya mpo akoka kosala mosala na ye malamu. Na yango, alobaki ete Ziba azwa biloko nyonso. Likambo oyo ezalaki na ntina mingi epai ya Mefiboshete ezali ete Davidi, mosaleli ya Yehova, azongi na Yerusaleme lokola mokonzi.

Mefiboshete anyokwamaki mingi. Mbala mingi, amiyokaki lokola balingaka ye te. Kasi, Yehova alingaki ye mpe amibanzabanzaki mpo na ye. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?— Ata soki tosali oyo ezali malamu, bato mosusu bakoki kokosela biso makambo. Yesu alobaki ete: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino.” Bato babomaki kutu Yesu! Tokoki mpenza kondima ete soki tosali oyo ezali malamu, Yehova, Nzambe ya solo, akolinga biso mpe Yesu, Mwana na ye akolinga biso.

Tángá na biblia na yo

  • 1 Samwele 20:15-17, 41, 42

  • 2 Samwele 4:4; 9:1-10; 19:24-30

  • Yoane 15:18

a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto