Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto
‘Nazwi monzube kati na nzoto, yango ntoma ya Satana, ete etungisaka ngai.’—2 BAKOLINTI 12:7.
1. Tángá mwa mikakatano oyo bato bazali na yango lelo oyo.
SOKI ozali na mokakatano moko oyo ezali kotika yo te, yebá ete ozali yo moko te. Na “ntango ya mpasi” oyo tozali, baklisto ya sembo bazali kokutana na mikakatano mingi: bazali kotɛmɛla bango makasi, bazali na mikakatano na kati ya mabota, bazali kobɛla, bazali na mikakatano ya mbongo, bazali konyokwama na makanisi, bazali kokufela bato, mpe mikakatano mosusu ndenge na ndenge. (2 Timote 3:1-5) Na mikili mosusu, ebele ya bato bazali kozanga bilei mpe bamosusu bafandi na mikili oyo ezali na bitumba.
2, 3. Wapi makanisi mabe oyo mikakatano ekoki kopesa moto, mpe na ndenge nini yango ekoki kozala likama?
2 Moto akoki komona lokola nde mikakatano ya ndenge yango ezali koleka ye motó, mingimingi soki eyeli ye ebele na mbala moko. Kasi, yoká oyo Masese 24:10 (NW) elobi: “Olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Makasi na yo ekozala moke.” Ya solo, soki tolɛmbi nzoto ntango tozali na mikakatano, tokoki kozanga makasi oyo tosengeli na yango mpe ekoki kolɛmbisa mokano na biso ya koyika mpiko tii na nsuka. Na ndenge nini?
3 Na ntango oyo tolɛmbi nzoto, tokoki kobanda kotalela makambo na ndenge oyo ebongi te. Na ndakisa, tokoki kobanda komona ete mikakatano na biso eleki makasi mpe tokoki kokóma mawamawa. Moto mosusu kutu akoki kobanda kolelela Nzambe ete: “Mpo na nini ozali kotika ete makambo ya boye eyela ngai?” Soki makanisi mabe ndenge wana ebandi kokola na motema ya moto, akoki kobungisa esengo na ye mpe elikya na ye. Moto oyo azali kosalela Nzambe akoki ata kolɛmba nzoto mpe kotika kobunda “etumba malamu ya kondima.”—1 Timote 6:12.
4, 5. Ntango mosusu Satana asalaka nini soki tozali na mikakatano, kasi tokoki kozala na elikya nini?
4 Ezali Yehova Nzambe te nde amekaka biso. (Yakobo 1:13) Komekama mosusu eyelaka biso mpo tozali kosala makasi ete tókangama kaka na ye. Monguna monene ya Nzambe, Satana Zabolo nde alingaka kotika nyɛɛ te bato nyonso oyo bazali kosalela Yehova. Lokola atikali na mwa ntango moke, “nzambe ya mokili oyo” azali koluka ete moto nyonso oyo alingaka Yehova atika kosala mokano na Ye. (2 Bakolinti 4:4) Satana azali konyokola mpenza bandeko na biso na mokili mobimba. (1 Petelo 5:9) Tolobi te ete Satana nde abimiselaka biso mikakatano nyonso oyo eyelaka biso; kasi, akoki kosalela mikakatano na biso mpo na kolɛmbisa biso lisusu koleka.
5 Kasi, ata soki Satana azali na makasi ndenge nini to bibundeli na ye ezali makasi ndenge nini, tokoki kolonga ye! Nini ezali kondimisa biso yango? Mpamba te Yehova Nzambe azali kobundela biso. Amonisi basaleli na ye polele mayele nyonso oyo Satana asalelaka. (2 Bakolinti 2:11) Liloba ya Nzambe elimbweli biso makambo mingi mpo na oyo etali komekama oyo baklisto ya solo bazali kokutana na yango. Biblia esaleli maloba “monzube kati na nzoto” mpo na mikakatano oyo ntoma Paulo akutanaki na yango. Mpo na nini? Tótalela naino ndenge oyo Liloba ya Nzambe elimboli maloba yango. Na nsima tokomona ete tozali biso moko te oyo tozali na mposa ete Yehova asalisa biso mpo na kolonga komekama na biso.
Ntina oyo bakokanisi komekama na nzube
6. Paulo alingaki koloba nini na maloba “monzube kati na nzoto,” mpe mbala mosusu monzube yango ezalaki nini?
6 Paulo amekamaki makasi; na nsima, apemamaki na elimo santu mpe akomaki ete: ‘Nazwi monzube kati na nzoto, yango ntoma ya Satana, ete etungisaka ngai ete namitombola na koleka te.’ (2 Bakolinti 12:7) Monzube oyo Paulo azalaki na yango na kati ya nzoto ezalaki nini? Soki monzube ekɔti moto na nzoto, esalaka mpasi mingi. Na yango, maloba ya elilingi oyo Paulo asaleli ezali komonisa eloko moko oyo ezalaki kosala ye mpasi, ezala na nzoto, na makanisi, to na ndenge nyonso mibale. Ekoki kozala ete Paulo azalaki na maladi ya miso to azalaki na kwokɔsɔ mosusu na nzoto. To mpe, ekoki kozala ete monzube yango ezalaki nde bato oyo bazalaki koboya kondima ete azali ntoma mpe bazalaki komona ete mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya ezalaki na ntina te. (2 Bakolinti 10:10-12; 11:5, 6, 13) Ata soki monzube yango ezalaki nini, etikalaki na nzoto ya Paulo; elongwaki te.
7, 8. (a) Maloba ‘ete etungisaka ngai’ ezali komonisa nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi tóbunda na nzube nyonso oyo ezali kotungisa biso na nzoto?
7 Tóbosana te ete monzube ya Paulo ezalaki kotungisa ye ntango nyonso. Likambo moko oyo esimbi likebi na biso ezali ete verbe ya Grɛki oyo Paulo asaleli na vɛrsɛ yango euti na liloba oyo, na Lingala elimboli “matonga ya misapi.” Liloba yango mpenza nde basaleli na Matai 26:67 mpe basaleli yango lokola elilingi na 1 Bakolinti 4:11. Bavɛrsɛ yango mibale, ezali kopesa likanisi ya kobɛtama. Lokola Satana ayinaka mpenza Yehova na basaleli na Ye, ntembe ezali te ete azalaki kosepela lokola monzube ezalaki ntango nyonso kotungisa Paulo. Lelo oyo mpe, Satana asepelaka ntango monzube ezali kotungisa biso na nzoto.
8 Yango wana, lokola Paulo, tosengeli koyeba ndenge ya kobunda na nzube yango. Soki tosali bongo nde tokobikisa bomoi na biso! Tóbosana likambo oyo te: Yehova alingi ete tózala na bomoi ya seko na mokili ya sika epai tokozala lisusu na mikakatano te oyo ezali lokola nzube na kati ya nzoto. Mpo na kosalisa biso tózwa mbano yango, Nzambe apesi biso bandakisa ebele na kati ya Biblia; bandakisa yango ezali komonisa ete basaleli na ye ya sembo babundaki na nzube na nzoto mpe balongaki. Bato yango bazalaki bato ya kozanga kokoka lokola biso. Soki totaleli makambo oyo bamosusu kati na bato wana oyo babengi bango ‘lipata monene ya batatoli’ bakutanaki na yango, ekoki kosalisa biso na ‘kopota na etingya na emekaneli ya mbangu etyami liboso na biso.’ (Baebele 12:1) Soki tozwi ntango ya kokanisa likoló ya makambo oyo bayikelaki mpiko, yango ekoki kopesa biso elikya ete biso mpe tokoki kobunda ata na nzube nini oyo Satana akoki kosalela mpo na kolɛmbisa biso.
Nzube oyo etungisaki Mefibosete
9, 10. (a) Ndenge nini Mefibosete azwaki monzube kati na nzoto? (b) Ndenge nini Mokonzi Davidi asalelaki Mefibosete boboto, mpe ndenge nini biso mpe tokoki kosala lokola Davidi?
9 Tótalela ndakisa ya Mefibosete, mwana ya Yonatana, moninga ya Davidi. Ntango Mefibosete azalaki na mbula mitano, nsango eyaki na mboka ete tata na ye Yonatana, na nkɔkɔ na ye, Mokonzi Saulo, bakufi na etumba. Mwasi oyo azalaki kobatela mwana yango abangaki mingi. “Akamataki ye. . . . Wana epotaki ye mbangu mpo na kokima, mwana akweaki mpe akómaki motɛngumi.” (2 Samwele 4:4) Na ntembe te, kobukana makolo ezalaki monzube oyo Mefibosete ayikelaki yango mpiko ntango azalaki kokola.
10 Nsima ya bambula, lokola Mokonzi Davidi alingaki Yonatana mingi, asalelaki Mefibosete boboto. Davidi apesaki Mefibosete bilanga nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe atyaki mosaleli moko ya Saulo, nkombo na ye Siba, mokɛngɛli ya bilanga yango. Longola wana, Davidi alobaki na Mefibosete ete: ‘Okobanda kolya limpa na mesa na ngai libela.’ (2 Samwele 9:6-10, NW) Na ntembe te boboto ya Davidi ebɔndisaki Mefibosete mpe ekitisaki mpasi oyo azalaki koyoka na motema mpo makolo na ye ebukaná. Likambo oyo ezali mpenza liteya mpo na biso! Biso mpe tosengeli kozalaka na boboto epai ya baoyo bazali kobunda na monzube na nzoto.
11. Siba alobaki makambo nini mpo na Mefibosete, kasi nini emonisi biso ete ezalaki lokuta? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
11 Na nsima, Mefibosete abundaki na monzube mosusu na nzoto. Ntango Mokonzi Davidi akimaki Yelusaleme mpo mwana na ye Abesaloma abimisaki botomboki mpo na kobɔtɔla ye bokonzi, Siba akendaki kokosela nkolo na ye Mefibosete makambo epai ya Mokonzi Davidi. Siba ayebisaki Davidi ete Mefibosete atikali na Yelusaleme mpo aponaki kozala na ngámbo ya Davidi te mpe azalaki na elikya ete ye nde akokóma mokonzi.a Davidi andimaki maloba ya Siba mpe apesaki ye bilanga nyonso oyo ezalaki ya Mefibosete!—2 Samwele 16:1-4.
12. Mefibosete asalaki nini na makambo oyo akutanaki na yango, mpe na ndenge nini azali ndakisa malamu mpo na biso?
12 Ntango Mefibosete akutanaki lisusu na Davidi, alimbwelaki ye makambo ndenge mpenza elekaki. Mefibosete alingaki kolanda Davidi; kasi, Siba nde akosaki ye; alobaki na Mefibosete ete atikala mpe ye Siba akende na esika na ye. Davidi abongisaki mabe basalaki Mefibosete? Abongisaki, kasi na ndenge mpenza oyo esengelaki te. Azongiselaki Mefibosete ndambo ya bilanga na ye mpe mosusu atikelaki yango Siba. Yango mpe ekokaki kozala monzube mosusu na nzoto ya Mefibosete. Mefibosete alɛmbaki nzoto? Alobaki ete Davidi atalelaki likambo na bosembo te? Te, andimaki oyo mokonzi amonaki malamu. Atyaki makanisi na ye na makambo ya malamu, asepelaki lokola mokonzi ya solosolo ya Yisalaele azongaki malamu. Mefibosete atikaki ndakisa malamu mpenza na ndenge ayikelaki mokakatano ya nzoto mpiko, ayikaki mpiko na ndenge oyo bakoselaki ye makambo mpe na ndenge oyo batalelaki likambo na ye na bosembo nyonso te.—2 Samwele 19:24-30.
Nehemia abundaki na komekama
13, 14. Nzube nini Nehemia ayikelaki mpiko ntango azongaki mpo na kotonga lopango ya Yelusaleme?
13 Kanisá mikakatano oyo ezali lokola nzube oyo Nehemia ayikelaki mpiko na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango azongaki na Yelusaleme, mboka oyo lopango na yango nyonso ekweaki. Akutaki engumba yango polele, banguna bakokaki kozala na mokakatano moko te mpo na kokɔta kati na yango; lisusu, Bayuda oyo bautaki boombo, oyo bazongaki liboso na ye, babongisaki ata likambo moko te, bango nyonso balɛmbaki nzoto mpe bazalaki pɛto te na miso ya Yehova. Atako Mokonzi Alatazelezese apesaki ye ndingisa ya kotonga lisusu lopango ya Yelusaleme, Nehemia aumelaki te mpo na komona ete baguvɛrnɛrɛ ya bamboka oyo ezalaki zingazinga balingaki ata moke te ete asala mosala wana. “Basilikaki mingi ete moto ayei mpo na koluka malamu ya bana ya Yisalaele.”—Nehemia 2:10.
14 Banguna wana basalaki nyonso mpo na kopekisa mosala ya Nehemia. Nyonso oyo bazalaki kosala, ezala makaneli na bango, makambo oyo bazalaki kokosela ye, mangungu na bango; ata mpe bato oyo bazalaki kotinda mpo na kolɛmbisa ye, ezalaki lokola nzube na nzoto na ye. Mayele mabe ya banguna wana ezongisaki Nehemia nsima? Eloko te! Atyaki elikya na ye mobimba epai ya Nzambe mpe alɛmbaki te. Na bongo, ntango basilisaki kotonga lopango ya Yelusaleme, emonanaki polele ete Yehova asungaki Nehemia.—Nehemia 4:1-12; 6:1-19.
15. Makambo nini ezalaki kati na Bayuda oyo etungisaki mpenza Nehemia?
15 Na mokumba na ye ya guvɛrnɛrɛ, Nehemia asengelaki mpe kosilisa mikakatano mingi na kati ya bato oyo bazalaki libota ya Nzambe. Mikakatano yango ezalaki lokola nzube oyo ezalaki kopesa ye mpasi mingi mpamba te ezalaki kobebisa boyokani ya bato yango na Yehova. Soki bato ya bozwi badefisi bandeko na bango oyo bazali babola mbongo, bazalaki kosɛnga ete bázongisa yango na matabisi mingi; yango wana, mpo babola yango bákoka kofuta banyongo oyo bakɔtaki mpe báfuta mpako ya mokonzi ya Perse, bazalaki kopesa mabele na bango mpe kotɛkisa bana na bango na boombo. (Nehemia 5:1-10) Bayuda mingi bazalaki kotosa Sabata te mpe bazalaki kosunga Balevi te, bazalaki mpe kopesa makabo te mpo na misala ya tempelo. Longola yango, bamosusu babalaki “basi ya Asedode mpe ya Amona mpe ya Moaba.” Likambo yango epesaki Nehemia mpasi mpenza! Kasi, moko te kati na nzube yango ezongisaki ye nsima. Mbala ebele asalaki makambo na molende mpo na kotosisa mibeko ya sembo ya Nzambe. Biso mpe tólanda ndakisa ya Nehemia, tótika te ete bato mosusu oyo bazali kosala makambo na kozanga bosembo bázongisa biso nsima mpo tótika kosalela Yehova.—Nehemia 13:10-13, 23-27.
Bato mosusu ya sembo babundaki na nzube
16-18. Ndenge nini mikakatano ya libota ezwaki Yisaka na Lebeka, Hana, Davidi, mpe Hosea?
16 Biblia elobeli bato mingi mosusu oyo babundaki na mikakatano oyo ezalaki lokola nzube. Mbala mingi, moko na makambo yango oyo ezalaki lokola nzube ezalaki nde mikakatano na kati ya libota. Basi mibale oyo mwana na bango Esau abalaki “batungisaki Yisaka na Lebeka mingi.” Kutu, Lebeka alobaki ete alɛmbaki bomoi mpo na basi wana. (Genese 26:34, 35; 27:46) Kanisá mpe ndakisa ya Hana; mbanda na ye Penina “atungisaki ye mingi mpenza” mpo Hana azalaki ekomba. Ekoki kozala ete Hana azalaki mbala na mbala kotungisama na kati ya ndako na bango. Kasi, Penina azalaki mpe kotungisa ye na miso ya bato, na ntembe te na miso ya bandeko mpe baninga na bango, ntango bazalaki kokende na fɛti na Silo. Ezali lokola nde bazalaki kofina mpenza mosapi na esika oyo Hana azalaki na monzube.—1 Samwele 1:4-7.
17 Kanisá mpasi oyo Davidi amonaki mpo na likunya oyo bokilo na ye, Mokonzi Saulo, azalaki koyokela ye. Mpo na kobatela bomoi na ye, Davidi akómaki kofanda na madusu na kati ya mabanga na esobe ya Ene-gedi, azalaki kotambola na banzela oyo ezalaki na makama na kati ya mabanga mpe mabwaku. Na ntembe te likambo wana oyo ezali sembo te ezalaki mpenza kotungisa ye, mpamba te asalaki Saulo mabe moko te. Atako bongo, Davidi alekisaki bambula mingi na bomoi wana ya kokimakima; nyonso wana mpo na likunya ya Saulo.—1 Samwele 24:14, 15; Masese 27:4.
18 Kanisá mokakatano oyo mosakoli Hosea azalaki na yango na kati ya libota na ye. Mwasi na ye akómaki kosala ekobo. Na ntembe te, likambo mabe wana ezalaki lokola nzube oyo ezalaki koswa Hosea na motema. Kanisá sikoyo mpasi oyo ayokaki ntango mwasi yango abotaki bana mibale mobimba na ekobo!—Hosea 1:2-9.
19. Mosakoli Mikaya anyokwamaki na likambo nini?
19 Monyoko mpe ezalaka monzube na nzoto. Tótalela likambo oyo mosakoli Mikaya akutanaki na yango. Na ntembe te Mikaya azalaki kotungisama mingi ndenge mokonzi mabe Ahaba atondisaki basakoli ya lokuta pembeni na ye mpe azalaki kondima makambo na bango ya lokuta. Na nsima, ntango Mikaya ayebisaki Ahaba ete basakoli yango nyonso bazali koloba na ‘elimo ya lokuta,’ mokonzi ya basakoli yango ya lokuta asalaki nini? “Abɛtaki Mikaya na elongi”! Ahaba abakisaki lisusu mabe ntango Mikaya ayebisaki ye maloba ya Yehova mpo na kokebisa ye ete soki akei etumba mpo na kobɔtɔla Lamoto-gilada, akolonga te. Ahaba apesaki mitindo ete bátya Mikaya na bolɔkɔ mpe bápesaka ye mwa bilei moke mpenza. (1 Mikonzi 22:6, 9, 15-17, 23-28) Tókanisa lisusu Yilimia mpe ndenge oyo bato oyo balukaki koboma ye banyokolaki ye.—Yilimia 20:1-9.
20. Naomi ayikelaki nzube nini mpiko, mpe mbano nini azwaki?
20 Kokufela ndeko to moninga ezali mpe mokakatano oyo ekoki kozala lokola monzube na nzoto. Naomi ayokaki mpasi ya kokufela mobali mpe bana mibale ya mibali. Azongaki na Beteleme na mpasi wana na motema. Ayebisaki baninga na ye ete bátika kobenga ye Naomi, kasi bábengaka ye Mala, nkombo oyo ezalaki komonisa mpasi na ye mpo na makambo oyo akutanaki na yango. Kasi, nsukansuka Yehova apesaki ye mbano mpo ayikaki mpiko: azwaki nkɔkɔ oyo, Masiya abimaki na kati ya bakitani na ye.—Luta 1:3-5, 19-21; 4:13-17; Matai 1:1, 5.
21, 22. Yobo abungisaki nini na mbala moko, mpe asalaki nini mpo na yango?
21 Kanisá mpasi oyo Yobo ayokaki ntango bamemelaki ye nsango ete bana na ye zomi bakufi liwa ya mbalakaka mpe ya nsɔmɔ; lisusu ebele ya bibwele na ye nyonso mpe basaleli na ye bakufaki. Na mbala moko, atikalaki mabɔkɔ mpamba! Na nsima, ntango Yobo azalaki naino na mobulungano mpo na makambo yango, Satana apesaki ye maladi. Ekoki kozala ete Yobo akanisaki ete akokufa na maladi mabe wana. Mpasi elekaki, yango wana amonaki malamu akufa mpo makambo nyonso esila.—Yobo 1:13-20; 2:7, 8.
22 Longola nyonso wana, mwasi na ye abakisaki likambo mosusu; lokola mwasi yango azalaki koyoka mpasi mingi mpe azalaki komitungisa mingi, alobaki na ye ete: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Ezalaki mpenza monzube na nzoto na ye oyo ezalaki koyoka mpasi! Na nsima, baninga misato ya Yobo, na esika bábɔndisa ye, batungisaki ye na makanisi na bango etɛngamá, balobaki ete mpasi wana eyelaki ye mpo asalaki masumu oyo aboyaki koloba. Lokola bazalaki na libunga na makambo oyo bazalaki koloba, ezalaki lokola nde bazali kofina lisusu nzube oyo azali na yango na nzoto. Tóbosana te ete Yobo ayebaki te ntina oyo makambo mabe wana ezalaki koyela ye; ayebaki mpe te ete akokufa te. Kasi, “na kati na oyo nyonso, Yobo asalaki lisumu te mpe afundi Nzambe na ntina na mabe te.” (Yobo 1:22; 2:9, 10; 3:3; 14:13; 30:17) Atako ebele ya nzube etungisaki ye na mbala moko, atikalaki sembo. Ndakisa na ye ezali mpenza kolendisa biso!
23. Ndenge nini bato ya sembo oyo tolobeli na lisolo oyo balongaki nzube ndenge na ndenge kati na nzoto?
23 Bandakisa oyo tolobeli ezali kaka mwa ndambo kati na ebele ya bandakisa oyo ezali na Biblia. Basaleli ya sembo nyonso wana babundaki moto na moto na nzube na ye. Makambo oyo mokomoko akutanaki na yango ekeseni mpenza na oyo ya basusu! Kasi, bango nyonso bakokanaki na likambo moko. Moko te na kati na bango atikaki kosalela Yehova. Atako bakutanaki na komekama makasi, Yehova apesaki bango makasi mpe balongaki Satana. Na ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango mpe ekomonisa biso ndenge oyo biso mpe tokoki kobunda na eloko nyonso oyo ezali lokola monzube kati na nzoto na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mefibosete azalaki moto oyo azalaki kondima bolamu oyo basaleli ye mpe azalaki na komikitisa; mayele mabe ya ndenge wana mpo na kozwa bokonzi eyokani ata moke te na bizaleli na ye. Tokanisi mpenza ete ayebaki bosembo ya tata na ye Yonatana. Atako Yonatana azalaki mwana ya Mokonzi Saulo, andimaki ete Yehova aponi Davidi azala mokonzi ya Yisalaele. (1 Samwele 20:12-17) Ezali mpasi tókanisa ete Yonatana, moto oyo azalaki kobanga Nzambe mpe moninga ya sembo ya Davidi, ateyaki mwana na ye mposa ya kozala mokonzi.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini mikakatano oyo tozali kokutana na yango ezali lokola nzube na kati ya nzoto?
• Yebisá ndambo ya mikakatano oyo etungisaki Mefibosete mpe Nehemia.
• Na kati ya bato oyo tolobeli oyo Makomami emonisi ete bayikaki mpiko na nzube ndenge na ndenge na kati ya nzoto, nani oyo atikali mpenza na makanisi na yo, mpe mpo na nini?
[Bililingi na lokasa 15]
Mefibosete ayikelaki mokakatano ya nzoto mpiko, ayikaki mpiko na ndenge bakoselaki ye makambo, mpe na ndenge oyo batalelaki likambo na ye na bosembo mpenza te
[Elilingi na lokasa 16]
Nehemia azongaki nsima te atako bazalaki kotɛmɛla ye