Pusaná penepene na Nzambe
Abosanaka te ete “tozali putulu”
NDEKO mwasi moko mokristo oyo asalaká lisumu kala akomaki boye: “Nandimaki te ete Yehova akolimbisa ngai mpenza, mpe nakanisaki ete nakomema kilo oyo bomoi na ngai mobimba.” Ya solo, lisosoli oyo etungisami ezali lokola mokumba ya kilo. Nzokande, Biblia ezali kopesa libɔndisi oyo ekoki kokitisa mpasi ya moto oyo abongoli motema. Tótalela maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 103:8-14.
Davidi ayebaki ete “Yehova azali na motema mawa”, mpe alukaka te “komonisa mabunga” na biso. (Vɛrsɛ 8-10) Ntango Nzambe amoni likambo oyo asengeli komonisela motema mawa, asalaka yango mpenza mpe na motema mobimba. Davidi, moto oyo akomaki maloba kitoko mpenza, asalelaki bandakisa misato mpo na komonisa bonene ya motema mawa ya Nzambe.
“Se ndenge likoló etombwaná koleka mabele, motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene.” (Vɛrsɛ 11) Ntango tozali kotala likoló na butu, tokoki te koyeba ntaka boni ekaboli mabele na mapata. Na yango, Davidi alingi tómona mpenza bonene ya motema mawa ya Yehova, oyo ezali lolenge moko oyo amonisaka bolingo na ye ya sembo. Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete motema mawa yango ezali mpo na “baoyo bazali kobanga” Nzambe, oyo bazali “komemya Bokonzi na ye na motema ya komikitisa mpenza.”
“Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.” (Vɛrsɛ 12) Babiblia mosusu ebongoli yango na “ndenge ɛsti ezali mosika na wɛsti.” Yango ezali mosika ndenge nini? Ezali na ntaka oyo tokoki kutu kokanisa te. Ɛsti, epai moi ebimaka, ezalaka solo mosika na wɛsti, epai moi elalaka. Ɛsti ezalaka ntango nyonso mosika mpenza na wɛsti; yango mibale ekoki kokutana ata mokolo moko te. Na vɛrsɛ yango, Davidi amonisi biso ete ntango Yehova alimbisi masumu na biso, abwakaka yango mosika mpenza.
“Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa.” (Vɛrsɛ 13) Lokola azalaki tata, Davidi ayebaki ndenge oyo tata ya bolingo ayokaka. Motema ya tata ya ndenge wana etindaka ye ayokela bana na ye mawa, mingimingi ntango bazali na mpasi. Davidi amonisi biso mpenza ete Tata na biso ya likoló ayokelaka bana na ye oyo bazali awa na mabele mawa, mingimingi ntango mitema na bango “ebukani mpe etutami” mpo na masumu na bango.—Nzembo 51:17.
Nsima ya kopesa bandakisa wana misato, Davidi amonisi oyo etindaka Yehova ayokela bato ya kozanga kokoka mawa: “Ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.” (Vɛrsɛ 14) Yehova ayebi ete tokelamá na putulu, tozali na bolɛmbu mpe na ndelo. Lokola Yehova ayebi ete tozali bato ya masumu, ‘asepelaka kolimbisa’ biso soki tobongoli mpenza motema.—Nzembo 86:5.
Maloba ya Davidi mpo na motema mawa ya Yehova esimbi mpenza motema na yo? Mwasi oyo tolobelaki na ebandeli ayekolaki oyo Biblia elobi mpo na motema mawa ya Nzambe, mpe yango etindaki ye aloba boye: “Nakómi komona ete nakoki mpenza kopusana penepene na Yehova, mpe nayoki lokola nde kilo moko elongwe na motó na ngai.”a Mpo na nini te koyekola makambo mingi oyo etali motema mawa ya Nzambe mpe oyo okoki kosala mpo amonisela yo yango? Ntango mosusu yo mpe okoyoka lokola nde kilo moko elongwe na motó na yo.
Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Augusto:
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 26, “Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe,’” na buku Pusaná penepene na Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
“Nakómi komona ete nakoki mpenza kopusana penepene na Yehova, mpe nayoki lokola nde kilo moko elongwe na motó na ngai”