Makanisi mpo na losambo na libota mpe boyekoli ya moto ye moko
NA EBANDELI ya 2009, masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ebongolaki programɛ ya makita na yango. Makita mibale oyo ezalaki kosalema na kati ya pɔsɔ ekómaki kosalema mokolo moko, mpe balendisaki Batatoli nyonso básalela mpokwa oyo etikali mpamba mpo na losambo na libota to boyekoli ya moto ye moko. Ozali kosalela ebongiseli yango malamu? Ozali mpenza kozwa matomba na yango?
Bato mosusu batunaki soki makambo nini basengeli kotalela na losambo na libota. Lisangani ya Mikóló-Bakambi balingi te kotya modɛlɛ moko boye mpo na mabota nyonso. Mabota nyonso ezali ndenge moko te. Ebongi ete mokonzi ya libota mokomoko atalela ndenge nini bakosalela mokolo yango na ndenge oyo eleki malamu. Moto na moto mpe akoki kotala ndenge nini akoki kosalela mokolo yango malamu.
Bato mosusu babongisaka makita ya lisangá, kasi losambo na libota esengeli kosuka kaka wana te. Bamosusu batángaka Biblia to makambo oyo ezali na mikanda na biso mpe basololaka mpo na yango. Basusu basalaka lisano ya lisolo moko ya Biblia, mingimingi mpo na kosalisa bana mike. Na yango, esɛngi te ete losambo na libota ezala lokola likita moko ya lisangá, epai batángaka baparagrafe mpe batunaka mituna. Losambo na libota esengeli kozala ntango oyo tokoki kosolola mpe koloba makambo oyo euti na motema. Kosala bongo esalisaka bato bábimisa makanisi ya sika, mpe ekoki kosala ete boyekoli etikala na makanisi mpe esepelisa moto nyonso.
Tata moko ya bana misato akomi boye: “Oyo tosalaka eutaka mingimingi na botángi ya Biblia. Moto na moto atángaka mikapo liboso, bana bazwaka mwa makambo mpo na kosala bolukiluki, mpe na nsima bayebisaka makambo oyo bayekoli. Mbala mingi, Michael [mbula 7] ayemaka elilingi to akomaka mwa makambo oyo etali lisolo yango. David mpe Kaitlyn [mbula 13 mpe 15] bakoki kokoma lisolo moko ya Biblia na ndenge moto akoki komonela yango. Na ndakisa, ntango tozalaki kotánga ndenge Yozefe alimbolaki bandɔtɔ ya mosali-mampa mpe ya mopesi-masanga ya Farao, Kaitlyn akomaki lisolo yango na ndenge oyo moto moko na bolɔkɔ akokaki komona likambo yango.”—Eba., mok. 40.
Ya solo, makambo ya bato ekeseni. Mbala mosusu, likambo oyo ebongi malamu mpo na libota to moto moko ekobonga te mpo na basusu. Etanda oyo ezali na lokasa oyo elandi epesi mwa makanisi oyo bokoki kosalela mikolo mosusu na losambo na libota to na boyekoli ya moto ye moko. Na ntembe te, yo mpe okoki kozala na makanisi mosusu.
[Etanda/Elilingi na nkasa 6, 7]
Mpo na mabota oyo ezali na bilenge:
• Bótánga mpe bólobela mokapo moko na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo bibongi.
• Bósala lokola bato oyo balobelami na Biblia. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1996, lokasa 14, paragrafe 17-18.)
• Bólobela mikano ya kokokisa nsima ya ntango mokuse mpe ya ntango molai.
• Mikolo mosusu, bótala mpe bólobela video moko ya moombo ya sembo.
• Bóyekola lisolo “Mpo na bilenge,” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
Mpo na mabota oyo ezali na bana te:
• Bóyekola mokapo 1, 3, 11-16 ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
• Bótánga Biblia mpe bólobela makambo oyo moto na moto ayekoli na nsima ya botángi.
• Bóbongisa elongo Boyekoli ya Biblia na lisangá to Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
• Bólobela ndenge bino mibale bokoki kosala mingi na mosala ya kosakola.
Mpo na minzemba to baoyo bazali kaka bango moko Batatoli na libota:
• Yekolá mikanda ya sika oyo ebimaki na mayangani ya etúká.
• Tángá Annuaire ya mbula oyo mpe ya bambula eleká.
• Yekolá ndenge ya koyanola na mituna oyo bato ya teritware na bino batunaka.
• Bongisá ndenge okobanda masolo na bato na mosala ya kosakola.
Mpo na mabota oyo ezali na bana mike:
• Bósala lisano na lisolo moko ya Biblia.
• Bósala lisano ya kotuna mituna, na ndakisa oyo ezalaka na lokasa 30 mpe 31 ya Lamuká!
• Mikolo mosusu, bóluka mayele mosusu. (Talá lisolo “Étudier la Bible au zoo!” na Lamuká! ya 8 Marsi 1996, nkasa 16-19, na Lifalanse.)
• Bótalela lisolo “Teyá bana na yo,” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.