Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/8 lok. 17
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Tosili komona Masiya”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Tomoni Masiya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bisakweli oyo elobelaki Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/8 lok. 17

Mituna ya batángi

Tokoki koyeba mpenza soki bisakweli boni na Makomami ya Ebre elobeli Masiya?

Koyekola Makomami ya Ebre na bozindo esalisaka biso tóyeba bisakweli mingi oyo ekokisamaki epai ya Yesu Kristo. Bisakweli yango elobelaki epai Masiya akouta, ntango oyo akobima, misala na ye, makambo oyo bakosala ye, mpe mokumba na ye na ebongiseli ya Yehova Nzambe. Bisakweli yango nyonso esalisaka biso tóyeba ete Yesu azali Masiya. Kasi, tosengeli kokeba ntango tozali koluka koyeba soki Makomami ya Ebre ezali mpenza na bisakweli boni oyo etali masiya.

Bato nyonso bazalaka na makanisi ndenge moko te mpo na bisakweli oyo etali Masiya. Na buku na ye (The Life and Times of Jesus the Messiah), Alfred Edersheim alobaki ete mikanda ya Barabi etángaki bisika 456 na Makomami ya Ebre ete ezali bisakweli oyo elobeli Masiya, atako mingi kati na yango elobeli mpenza polele Masiya te. Kotalela malamu bisika yango 456 etindaka bato bámituna soki bisika yango mosusu ezali mpenza bisakweli oyo etali Yesu Kristo. Na ndakisa, Edersheim alobaki ete Bayuda bamonaka ete Ebandeli 8:11 elobeli Masiya. Balobaka ete “lokasa ya olive oyo ebenga eyaki na yango eutaki na Ngomba ya Masiya.” Edersheim alobelaki mpe Kobima 12:42. Mpo na komonisa ndenge Bayuda bazalaki kolimbola vɛrsɛ yango na ndenge ya mabe, akomaki boye: “Ndenge kaka Moize abimaki na esobe, Masiya mpe akobima na Roma.” Bato mingi ya mayele mpe bato mosusu bakomona mpenza ete ezali mpasi koloba ete mikapo wana mibale ná bandimbola na yango ya lokuta etali Yesu Kristo.

Ata soki totye likebi nyonso na bisakweli oyo ekokisamaki mpenza epai ya Yesu Kristo, ezali mpasi tóyeba soki ezali mpenza boni. Tózwa na ndakisa, Yisaya mokapo 53, oyo ezali na bisakweli ebele oyo etali Masiya. Yisaya 53:2-7 esakolaki boye: “Azali engambe te . . . Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye . . . Amemaki nde bamaladi na biso . . . Atɔbɔlamaki mpo na misala na biso ya kobuka mibeko . . . Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei kobomama.” Tosengeli komona ete bavɛrsɛ yango nyonso ya Yisaya 53 ezali esakweli moko oyo elobeli Masiya, to tosengeli nde komona ete vɛrsɛ mokomoko ezali esakweli oyo etali Masiya?

Tózwa mpe ndakisa ya Yisaya 11:1, oyo elobi boye: “Mwa etape ekobima mpenza na ekumu ya Yese; mpe mwa nzete ya sika oyo ekobima na misisa na ye ekobota.” Na vɛrsɛ 10, esakweli yango ebimi lisusu, na maloba oyo ekokani na oyo wana. Tosengeli komona ete bavɛrsɛ yango mibale ezali bisakweli mibale oyo ekeseni, to ezali kaka esakweli moko oyo bazongeli lisusu? Ndenge oyo tozali kotalela Yisaya 53 mpe Yisaya 11 ekobongola mpenza ndenge na biso ya kotánga bisakweli nyonso oyo elobeli Masiya.

Na yango, ekozala malamu te tóloba mpenza ete Makomami ya Ebre ezali na bisakweli boye to boye oyo etali Masiya. Ebongiseli ya Yehova ebimisá baliste ya bisakweli ebele oyo etali Yesu mpe ndenge ekokisamaki.a Baliste yango ekoki kosalisa biso mpe kolendisa biso na boyekoli na biso moko, na boyekoli ya libota, mpe na mosala ya kosakola. Longola yango, bisakweli ebele oyo elobeli Masiya, ata soki ezali boni, endimisaka biso mpenza ete Yesu azali Kristo, to Masiya.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Étude perspicace des Écritures, Volimi 1 lokasa 1210; Volimi 2, lokasa 272; “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” nkasa 343-344; Biblia eteyaka mpenza nini? lokasa 200.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto