Likita oyo tokobosana te
“NTANGO likita oyo ekosila, bokoloba ete, ‘Oyo ezali mpenza likita ya nsuka ya mbula oyo tokobosana te!’” Na maloba wana nde Ndeko Stephen Lett, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alamwisaki mposa ya bayangani ebele oyo bazalaki kozela makambo oyo bakoyoka na likita yango. Bayanganaki mpo na likita ya nsuka ya mbula ya mbala ya 126 ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Esalemaki mokolo ya 2 Ɔkɔtɔbɛ 2010, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na Jersey City, na etúká ya New Jersey, na États-Unis. Wapi mwa makambo ya minene oyo balobelaki na likita yango?
Diskur ya ebandeli oyo Ndeko Lett asalaki ezalaki lisolo moko ya kafukafu oyo etalaki likalo ya Yehova na likoló, ndenge elobelami na mokanda ya Ezekiele. Likalo yango monene mpe ya nkembo ezali elilingi ya ebongiseli ya Nzambe, oyo Yehova azali kotambwisa na makambo nyonso. Ndeko Lett alobaki ete eteni na yango ya likoló oyo esalemi na bikelamu ya elimo etambolaka mbangu lokola mokalikali, mbangu na kolanda makanisi ya Yehova. Eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali mpe kotambola. Ndeko Lett alobaki ete na bambula oyo euti koleka, makambo mingi ya esengo esalemi na eteni ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele.
Na ndakisa, bazali kosangisa Babetele mosusu esika moko mpe na bongo Babetele mosusu ezali kokóma minene; yango ekosalisa bandeko mingi oyo bazalaki kosala na Babetele ya bikólo yango bámipesa na mosala ya kosakola. Ndeko Lett alendisaki bayangani ete bákoba kosambela mpo Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ezali momonisi ya moombo ya sembo, ekoba kozala kaka sembo te, kasi mpe na bwanya, to mayele.—Mat. 24:45-47.
Balapolo ya kolendisa mpe mituna-lisolo oyo esimbaki motema
Ndeko Tab Honsberger, oyo asalaka na Komite ya filiale ya Haïti, apesaki lapolo moko ya kosimba motema mpo na makambo oyo esalemaki nsima ya koningana ya mabele ya mokolo ya 12 Yanuali 2010, oyo ebomaki bato soki 300 000 na ekólo yango. Amonisaki ete bakonzi ya mangomba bazalaki koyebisa bato ete Nzambe nde abomi bato wana mpo bazangaki kondima, mpe abatelaki bato malamu. Nzokande, basali-mabe ebele oyo bazalaki na bolɔkɔ bazwaki bonsomi ntango bifelo ya bolɔkɔ moko ekweaki na koningana ya mabele yango. Na yango, bato mingi ya mitema sembo na Haïti bazali kobɔndisama na koyeba ntina oyo mikolo na biso ezali ya mpasi mingi boye. Ndeko Honsberger ayebisaki ete ndeko moko ya sembo na Haïti oyo mwasi na ye akufaki na likama yango alobaki boye: “Tii lelo nazali kotangisa mpisoli. Nayebi te soki mawa na ngai ekokoba tii ntango nini, kasi nazali na esengo ya komona bolingo oyo ezali na ebongiseli ya Yehova. Nazali na elikya mpe nakosala nyonso mpo nayebisa yango bato mosusu.”
Ndeko Mark Sanderson, oyo azali lelo kosala na Betele ya Brooklyn, apesaki lapolo mpo na ekólo Philippines. Lokola kala azalaki na Komite ya filiale ya kuna, azalaki na esengo mpenza ntango azalaki kolobela ndenge motángo ya basakoli ya Bokonzi na ekólo yango emataki mbala 32 mpe ndenge motángo ya bayekoli ya Biblia eleki mosika motángo ya basakoli. Alobelaki ndeko moko na nkombo Miguel, oyo babomaki nkɔkɔ na ye. Miguel asalaki nyonso mpo na kofunda mpe kokangisa mobomi yango. Na nsima, ntango azalaki kosakola na bolɔkɔ oyo mobomi wana azalaki, Miguel akutanaki na ye. Atako Miguel azalaki motema likoló, asololaki na ye na kimya mpe na boboto. Na nsima, ayekolaki Biblia na mobali yango, oyo abongolaki bomoto mpe akómaki kolinga Yehova. Lelo, azwá batisimo. Miguel akómi moninga na ye ya motema mpe azali koluka ndenge ya kobimisa moto yango na bolɔkɔ liboso mikolo oyo bakatelaki ye ekoka, mpo akómi ndeko na ye.a
Na nsima, Ndeko Mark Noumair, molakisi moko na Departema ya biteyelo ya Teokrasi, atambwisaki mituna-lisolo mpo na koyeba bandeko malamu. Asololaki na Ndeko Alex Reinmueller ná mwasi na ye Sarah, Ndeko David Schafer ná mwasi na ye Krista, mpe Ndeko Robert Ciranko ná mwasi na ye Ketra. Alex Reinmueller, oyo azali mosungi na Komite ya kobimisa mikanda, ayebisaki ndenge afandisaki solo na motema na ye wana azalaki mobongisi-nzela na Canada ntango azalaki na mbula 15 mpamba, mpe mbala mingi azalaki kosakola ye moko. Ntango batunaki Ndeko Reinmueller soki ndakisa ya banani esalisá ye mingi na Betele, atángaki bandeko misato ya sembo, mpe amonisaki ndenge mokomoko na bango asalisaki ye akola na elimo. Mwasi na ye Sarah alobelaki boninga na ye ná ndeko mwasi moko oyo ayikaki mpiko bambula mingi na babolɔkɔ na Chine mpo na kondima na ye. Sarah alobaki ete ayekolá kotyela Yehova motema na nzela ya mabondeli ya ye moko.
David Schafer, oyo azali mosungi na Komite ya Mateya, akumisaki mama na ye mpo na kondima na ye makasi mpe alobelaki bandeko mosusu oyo bazalaki kosala mosala ya kokata banzete mpe basalisaki ye akóma mobongisi-nzela mosungi na bolenge na ye. Mwasi na ye Krista alobelaki na esengo ndenge oyo bandeko ya Betele oyo bakómi mikóló basalisaki ye mingi; bandeko yango bamonisaki ete bazali “sembo na likambo ya moke,” ndenge Yesu apesaki etinda.—Luka 16:10.
Ndeko Robert Ciranko, mosungi na Komite ya Bokomi, alobelaki na esengo bankɔkɔ na ye minei, oyo bautaki na Hongrie mpe bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na bomwana na ye, asepelaki mingi ntango azalaki kokende na mayangani minene na bambula ya 1950 mpe amonaki ete ebongiseli ya Yehova ezali monene mingi mpenza koleka lisangá na bango. Ketra, mwasi na ye, alobelaki ndenge ayekolaki kozala sembo ntango azalaki mobongisi-nzela na lisangá moko oyo ezalaki na mikakatano mpo na lipɛngwi mpe makambo mosusu. Ayikaki mpiko mpe nsukansuka batindaki ye mobongisi-nzela monene na lisangá mosusu oyo bomoko na yango esimbaki mpenza motema na ye.
Na nsima, Ndeko Manfred Tonak, apesaki lapolo ya Éthiopie. Ekólo yango oyo ebandá kala mpe Biblia elobeli yango, ezali lelo na basakoli ya nsango malamu koleka 9 000. Mingi na bango bafandaka na Addis-Abeba, mboka-mokonzi to pene na yango. Na yango, bitúká ya mosika ezali na bosɛnga ya basakoli. Mpo na yango, basɛngaki Batatoli ya Éthiopie oyo bafandi na bikólo mosusu bákende kuna mpo na kosakola na bitúká mosusu ya mosika na ekólo yango. Mingi bayaki, balendisaki Batatoli ya kuna, mpe bato mingi bandimaki koyoka bango.
Likambo mosusu ya ntina mingi ezalaki diskur ya biteni ebele oyo elobelaki Batatoli ya Yehova ya Russie mpe etumba na bango na batribinale. Aulis Bergdahl, ndeko moko ya Komite ya filiale ya Russie, alobelaki lisolo ya monyoko ya Batatoli na Russie, mingimingi na Moscou. Philip Brumley, ndeko moko oyo azali na Departema ya makambo ya mibeko na Betele ya États-Unis, alobelaki makambo ya esengo oyo euti kosalema na basanza eleki ntango Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme) etalelaki bifundeli libwa oyo bafundaki Batatoli ya Yehova. Bazuzi nyonso ya tribinale yango bamonaki ete na makambo libwa oyo bafundaki Batatoli, ata moko te ezalaki na ntina, mpe tribinale esalaki makasi ya komonisa ntina bifundeli ya makambo mosusu ezalaki ya lokuta. Atako esengeli tózela mpo na komona soki nini ekobima na nsima na Russie, Ndeko Brumley alobaki na elikya nyonso ete ekateli ya tribinale yango ekoki kosalisa na makambo ya kosambisa na bikólo mosusu.
Nsima ya nsango wana ya kosepelisa, Ndeko Lett ayebisaki ete Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato endimi kotalela likambo oyo eumelá mingi, oyo etali mpako oyo guvɛrnema ya France efutisaka Batatoli ya Yehova. Ezalaka mpasi tribinale yango ya lokumu mingi endima kotalela likambo oyo bamemi kuna. Tii na moi ya lelo, tribinale yango esambisá makambo 39 oyo etali Batatoli ya Yehova, mpe elongisaki biso na makambo 37. Ndeko Lett alendisaki basaleli nyonso ya Nzambe bákoba kotya likambo yango na mabondeli epai ya Yehova Nzambe.
Lapolo ya nsuka epesamaki na Ndeko Richard Morlan, oyo azali molakisi na Eteyelo mpo na bankulutu ya lisangá, kasi afandaka na Betele te. Alobelaki eteyelo yango na esengo mpenza mpe ndenge bankulutu oyo balandaki formasyo yango basepelaki.
Badiskur mosusu ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
Guy Pierce, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur moko ya kosimba motema oyo elobelaki mingimingi mokapo ya mobu 2011, ‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova.’ (Sef. 3:12) Amonisaki ete atako oyo ezali ntango ya esengo na makambo mingi mpo na basaleli ya Yehova, ezali mpe ntango ya kozwa makambo na lisɛki te, mpe ya kokanisa mingi. Mokolo monene ya Yehova ekómi pene; kasi bato bazali kokoba koluka libateli na mangomba ya lokuta, na masangá ya politiki, na biloko ya mokili, na makanisi lokola “kipe ya yo,” mpe bongo na bongo. Mpo tózwa ekimelo ya solosolo, tosengeli kobelela nkombo ya Yehova, elingi koloba koyeba ye malamu mpe komemya ye makasi, kotyela ye motema, mpe kolinga ye na nyonso oyo tozali na yango.
Na nsima, David Splane ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki diskur moko ya kafukafu, oyo etindaki bato bákanisa, mpe ezalaki na motó ya likambo “Okɔtá na kopema ya Nzambe?” Alobaki ete kopema ya Nzambe elimboli te kokanga mabɔkɔ, mpo Yehova ná Mwana na ye bazali “kokoba kosala” na boumeli ya mokolo wana ya kopema mpo na kokokisa malamumalamu mokano ya Nzambe na oyo etali biloko oyo azalisaki awa na mabele. (Yoa. 5:17) Na yango, ndenge nini tokoki kokɔta na kopema ya Nzambe? Kotika masumu mpe kondimela Kristo ná mbeka oyo apesaki ezali kaka ndambo ya eyano na motuna yango. Tosengeli kozala na kondima mpe kobosana mokano ya Yehova te na bomoi na biso, mpe tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo mokano yango ekokisama. Na bantango mosusu, ekoki kozala etumba mpenza, kasi tosengeli kondima toli mpe kolanda litambwisi ya ebongiseli ya Yehova. Ndeko Splane asɛngaki bayangani básala nyonso mpo na kokɔta na kopema ya Nzambe.
Diskur ya nsuka, oyo Anthony Morris, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki, ezalaki na motó ya likambo “Tozali kozela nini?” Ndeko Morris amonisaki ete mikolo etikali ya kotánga mpe, lokola tata ya bolingo, akundwelaki bayangani bisakweli oyo ekokokisama mosika te, oyo bato nyonso ya sembo bazali kozela na mposa makasi. Na ndakisa, tozali kozela bato báganga “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” mpe kobebisama ya mangomba ya lokuta. (1 Tes. 5:2, 3; Em. 17:15-17) Ndeko Morris akebisaki ete tosengeli te koloba ete: “Oyo mpenza Armagedone,” ntango toyoki bansango ya makambo oyo ekokisi bisakweli yango te. Alendisaki bayangani bázela na esengo mpe na motema molai ndenge Mika 7:7 elobi. Kasi, alendisaki mpe bato nyonso bázala na bomoko na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, lokola basoda oyo bazali kokɔta na etumba. Alobaki boye: “Motema na bino ezala makasi, bino nyonso baoyo bozali kozela Yehova.”—Nz. 31:24.
Mpo na kosukisa, bapesaki mwa mayebisi oyo etikaki nsango. Ndeko Geoffrey Jackson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ayebisaki ete bibongiseli ezwami mpo bámeka kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ mpo na bato oyo bayebi kotánga Lingelesi malamu te. Na nsima, Ndeko Stephen Lett ayebisaki ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekozwa bibongiseli mpo, na États-Unis, bandeko mosusu bákendeke kotala bakɛngɛli ya etúká ná basi na bango mpo na kolendisa bango. Na nsima, alobaki ete Eteyelo mpo na kobongisa basungi ekobanda kobengama Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba. Alobaki mpe ete ekozala na eteyelo mosusu oyo ebengami Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá. Eteyelo yango ekopesa babalani formasyo mosusu mpo báyeba kokokisa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. Ndeko Lett ayebisaki mpe ete Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango mpe Eteyelo mpo na bandeko ya Bakomite ya filiale ná basi na bango ekobanda kosalema mbala mibale mbula nyonso na Patterson, mpe bandeko oyo basilá kokɔta yango bakoki kokɔta mpo na mbala mibale.
Programɛ yango esukaki na libondeli oyo esimbaki mitema, oyo Ndeko John Barr, oyo azali na mbula 97, asalaki. Ndeko Barr oyo aumeli mingi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki libondeli moko ya komikitisa mpe oyo eutaki na motema.b Na nsuka, moto nyonso amonaki mpenza ete likita yango ekotika nsango.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Bomoi ya Ndeko Barr awa na mabele esukaki na mokolo na 4 Desɛmbɛ 2010.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Mituna-lisolo mpo na koyeba bandeko malamu esepelisaki bayangani nyonso
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Yehova apamboli mosala ya kosakola na Éthiopie