Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/9 lok. 10
  • Armagedone ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Armagedone ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Armagedon ekoya ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Etumba ya Armagedone ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/9 lok. 10

Mituna ya batángi . . .

Armagedone ezali nini?

▪ Mpo na bato mingi, liloba “Armagedone” elimbolaka kobomama ya ebele ya bato na etumba ya nikleere to na likama monene oyo ekosalema na mokili mobimba. Nzokande, makanisi wana nyonso euti na Biblia te. Kasi, liloba Armagedone na Biblia elimboli nini?

Liloba “Armagedone,” to “Har-Magedone” ezali na Biblia, na mokanda ya Emoniseli. Elobelaka “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” oyo “bakonzi ya mabele mobimba” bakosangana mpo na kobunda na Nzambe na etumba oyo akosukisa bango libela. Mikapo mosusu mpe elobeli etumba yango.​—Emoniseli 16:14-16; Ezekiele 38:22, 23; Yoele 3:12-14; Luka 21:34, 35; 2 Petro 3:11, 12.

Etumba yango ekosalema ndenge nini? Mokanda ya Emoniseli eyebisi biso yango na maloba oyo: “Bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe limpinga na ye.” “Moto oyo afandi likoló ya mpunda” ezali Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, oyo Nzambe aponi mpo atambwisa ebele ya baanzelu oyo bakobunda mpo na kolonga banguna ya Nzambe. (Emoniseli 19:11-16, 19-21) Yirimia 25:33 emonisi ndenge ebele ya bato ya mabe bakobomama: “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.”

Mpo na nini esengeli Armagedone eya? Bato ya mokili bazali koboya kondima boyangeli ya Nzambe kasi bazali nde kokumisa oyo ya bango moko. (Nzembo 24:1) Nzembo 2:2 elobeli ndenge oyo bazali komonisa motó makasi: “Bakonzi ya mabele bazali kotɛlɛma, mpe bankumu bayangani lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe kotɛmɛla moto na ye oyo atyami mafuta.”

Na maloba mosusu, batomboki yango bazali lokola bato oyo bayei kofanda na motó makasi na lopango oyo ezali ya bango te mpe bazali kobebisa yango. Lelo oyo, bato bazali kobebisa mabele, mai mpe mopɛpɛ. Liloba ya Nzambe esakolaki likambo mabe yango boye: “Bikólo basilikaki, mpe nkanda na yo [Nzambe] eyaki.” Nsukansuka, Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Armagedone ezali etumba oyo Nzambe akosalela mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki mpo na koyeba nani azali na lotomo ya koyangela bato nyonso.​—Nzembo 83:18.

Armagedone ekoya mokolo nini? Mwana ya Nzambe amonisaki polele ete: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:36) Atako bongo, ntango Yesu Kristo, mokonzi oyo akobunda etumba alobelaki Armagedone, apesaki mpe likebisi oyo: “Talá! Nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo alali mpɔngi te.” (Emoniseli 16:15) Na yango, etumba wana oyo ekosalema na mokili mobimba ekoya na ntango ya kozala ya Kristo, oyo bisakweli ya Biblia emonisi ete esilaki kobanda.

Armagedone ekoboma kaka bato mabe oyo baboyi kobongola motema, mpe “ebele mpenza ya bato” bakobika. (Emoniseli 7:9-14) Bakomona ndenge maloba oyo ekokokisama: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto