Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/9 nk. 30-31
  • Bakoselaki ye makambo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakoselaki ye makambo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolonga komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/9 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Bakoselaki ye makambo!

YOZEFE​—ETENI 2

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

Bato oyo balobeli: Yozefe, Potifare, ná mwasi na ye

Na mokuse: Yozefe akɔti bolɔkɔ na likambo oyo asali te, kasi Yehova atiki ye te.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 39:7, 10-23.

Okanisi ete mongongo ya mwasi ya Potifare ezalaki koyokana ndenge nini ntango azalaki kokosela Yozefe makambo?

․․․․․

Na makanisi na yo, ndako ya bolɔkɔ ezalaki ndenge nini?

․․․․․

Na ebandeli, makambo nini bazalaki kosala Yozefe na bolɔkɔ? (Lisalisi: Talá Nzembo 105:17, 18.)

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Soki Yozefe azalaki na kondima makasi te, makanisi nini ya mabe alingaki kokóma na yango ntango azalaki koumela na bolɔkɔ? (Lisalisi: Talá Yobo 30:20, 21.)

․․․․․

Ndenge nini toyebi ete Yozefe apesaki Yehova foti te mpo na bampasi na ye? (Lisalisi: Talá Ebandeli 40:8; 41:15, 16.)

․․․․․

Okanisi ete bizaleli nini esalisaki Yozefe ayika mpiko na ndenge akɔtaki bolɔkɔ mpo na makambo oyo bakoselaki ye? (Lisalisi: Tángá mpe kanisá na bavɛrsɛ oyo: Mika 7:7; Luka 14:11; Yakobo 1:4.)

․․․․․

Ntango oyo Yozefe alekisaki na bolɔkɔ ebongisaki ye na makambo nini, mpe ndenge nini esalisaki ye na bomoi na ye na nsima? (Lisalisi: Talá Ebandeli 39:21-23; 41:38-43.)

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Bolamu bato oyo bayikaka mpiko bazwaka.

․․․․․

Makambo oyo okoki koyekola ntango ozali komona mpasi.

․․․․․

Lisalisi ya Yehova na ntango ya mpasi.

․․․․․

MATEYA MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Osilá kokutana na likambo moko oyo etungisaki yo mingi mpe omiyokaki ete ozangi moto akosalisa yo? Ata ntango ozalaki na mokakatano yango, ndenge nini mbala mosusu Yehova azalaki kosalisa yo? (Lisalisi: Tángá mpe kanisá na 1 Bakorinti 10:13.)

․․․․․

4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na Biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na Internet na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto