Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/9 nk. 11-15
  • Otikaka Yehova azala likabo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otikaka Yehova azala likabo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóluka liboso Bokonzi ya Nzambe
  • Tóluka liboso boyengebene ya Nzambe
  • Tózala na botɔndi mpo na bibongiseli oyo Yehova azwá
  • Kobala na kati ya Nkolo kaka
  • Yehova azali likabo na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Bókoba koluka liboso bokonzi”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Batatoli Baklisto oyo mboka na bango ezali na likoló
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Yisraele na Nzambe” mpe “Ebele monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/9 nk. 11-15

Otikaka Yehova azala likabo na yo?

“Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”​—MAT. 6:33.

1, 2. (a) “Yisraele ya Nzambe” oyo Bagalatia 6:16 elobeli, ezali banani? (b) Na Matai 19:28, “mabota zomi na mibale ya Yisraele” ezali banani?

NTANGO otángaka nkombo Yisraele na Biblia, nini eyelaka yo na makanisi? Okanisaka mwana ya Yisaka, Yakobo, oyo nkombo na ye ekómaki Yisraele? To okanisaka nde bakitani na ye, ekólo ya Yisraele ya kala? Bongo Yisraele ya elimo? Ntango basaleli liloba Yisraele na ndenge ya elilingi, mbala mingi ezalaka mpo na kolobela “Yisraele ya Nzambe,” bato 144 000, oyo batyami mafuta na elimo mpo na kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. (Gal. 6:16; Em. 7:4; 21:12) Kasi Matai 19:28 elobeli mabota 12 ya Yisraele na ndenge mosusu ya ntina mingi.

2 Na vɛrsɛ yango, Yesu alobaki boye: “Ntango biloko nyonso ekokóma ya sika, ntango Mwana ya moto akofanda na kiti ya bokonzi na ye ya nkembo, bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi zomi na mibale, bokosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.” Na vɛrsɛ yango, “mabota zomi na mibale ya Yisraele” ezali bato oyo bakozwa bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. Bayekoli ya Yesu 144 000 oyo batyami mafuta na elimo bakozala basambisi mpe banganga-nzambe mpo na bango.

3, 4. Ndakisa nini ya malamu bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bapesaka biso?

3 Ndenge moko na banganga-nzambe mpe Balevi ya ntango ya kala, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonaka ete mosala na bango ezali lokumu monene. (Mit. 18:20) Bakristo yango balikyaka te kozwa eteni ya mabele to esika moko boye awa na nse. Kasi, ndenge elobelami na Emoniseli 4:10, 11, bakokoba kosalela Yehova na likoló, epai bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Yesu Kristo.​—Ezk. 44:28.

4 Awa na mabele, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na bomoi oyo emonisi ete Yehova azali likabo na bango. Mokumba na bango ya kosalela Nzambe ezali likambo oyo eleki ntina mpo na bango. Bamonisaka kondima na mbeka ya lisiko ya Kristo mpe balandaka ye ntango nyonso; na ndenge yango ‘babatelaka kobengama mpe koponama na bango.’ (2 Pe. 1:10) Bomoi na bango mpe makoki na bango ezali ndenge moko te. Atako bongo, batikaka te mikakatano na bango epekisa bango kosala nyonso oyo bakoki na mosala ya Nzambe. Batyaka mosala ya Nzambe na esika ya liboso; basalaka nyonso oyo bakoki. Mpe bazali ndakisa malamu mpo na baoyo bazali na elikya ya kofanda na paradiso awa na mabele.

5. Ndenge nini bakristo nyonso bakoki kotika Yehova azala likabo na bango? Mpo na nini yango ekoki kozala mpasi?

5 Tózala na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, tosengeli ‘komiboya mpe komema nzete na biso ya mpasi mpe kolanda Kristo ntango nyonso.’ (Mat. 16:24) Bamilio ya bato oyo bazali na elikya ya kofanda na Paradiso awa na mabele bazali kosambela Nzambe mpe kolanda Kristo ndenge wana. Basukaka te kaka na kosala mwa moke soki bamoni ete bakoki kosala mingi. Mingi bayeisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpe bakómi babongisi-nzela ya sanza na sanza. Basusu basalaka makasi mpo bázala babongisi-nzela basungi basanza mosusu na kati ya mbula. Bandeko mosusu mpe oyo bazali na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela te, basalaka makasi básakolaka mingi. Bandeko yango bazali lokola Maria, oyo asopelaki Yesu mafuta ya nsolo kitoko na nzoto. Yesu alobaki boye: “Asaleli ngai likambo moko ya malamu. . . . Asali oyo ekoki na ye.” (Mrk. 14:6-8) Lokola tofandi na mokili oyo etambwisami na Satana, ekoki kozala mpasi tósala nyonso oyo tokoki. Kasi, tosengeli kosala makasi mpenza mpe kotyela Yehova motema. Tótala ndenge tokoki kosala yango na makambo minei.

Tóluka liboso Bokonzi ya Nzambe

6. (a) Ndenge nini bato ya mokili bamonisaka ete likabo na bango ezali kaka na bomoi oyo? (b) Mpo na nini eleki malamu nde komekola Davidi?

6 Yesu ateyaki bayekoli na ye báluka liboso Bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe. Mbala mingi, bato ya mokili balukaka liboso bolamu na bango moko. Biblia ebengi bango “bato ya ntango oyo, baoyo likabo na bango ezali na bomoi oyo.” (Tángá Nzembo 17:1, 13-15.) Lokola bakipaka Mozalisi te, bato mingi bamipesaka na koluka kokóma na bomoi ya malamu, kobota bana, mpe kotikela bango libula. Likabo na bango ezali kaka na bomoi oyo. Nzokande, Davidi alukaki libosoliboso nde kozala na “nkombo malamu” na miso ya Yehova; na nsima, mwana na ye Salomo alendisaki moto nyonso asala yango. (Mos. 7:1) Ndenge moko na Asafe, Davidi amonaki ete kozala moninga ya Yehova nde likambo oyo eleki ntina na bomoi na ye. Yango ezalaki kopesa ye esengo. Lelo mpe, bakristo mingi batyaka makambo ya elimo liboso ya mosala na bango ya mosuni.

7. Mbano nini ndeko moko azwaki mpo atyaki Bokonzi na esika ya liboso?

7 Tózwa ndakisa ya Jean-Claude, na République centrafricaine. Azali nkulutu oyo abalá mpe azali na bana misato. Na mboka na bango, ezalaka mpasi kozwa mosala, mpe bato mingi bakoki kondima kosala nyonso mpo na kobatela mosala na bango. Mokolo moko, mokonzi oyo atalelaka biloko oyo izini ebimisaka ayebisaki Jean-Claude abanda kosala na butu​—kobanda na ngonga ya 18:30, pɔsɔ mobimba. Jean-Claude ayebisaki ye ete longola kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye, asengeli mpe kosalisa bango bázala na boyokani malamu na Nzambe. Alobaki mpe ete azali na mokumba ya kosalisa lisangá. Mokonzi yango ayebisaki ye boye: “Soki ozwi libaku malamu ya kozwa mosala, osengeli kobosana makambo mosusu nyonso, ezala mwasi, bana, mpe makambo na yo. Osengeli komipesa mobimba na mosala na yo, kasi na eloko mosusu te. Poná: lingomba na yo to mosala.” Soki yo, olingaki kosala nini? Jean-Claude ayebaki ete soki alongwe mosala, Nzambe akokokisa bamposa na ye. Akozala kaka na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe mpe Yehova akosalisa ye mpo akokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Na yango, akendaki na makita oyo elandaki na kati ya pɔsɔ. Nsima na yango, amibongisaki mpo na kokende mosala, kozanga ayeba soki akozala kaka na mosala yango. Na ntango yango, babengaki ye na telefone, mpe bayebisaki ye ete balongoli mokonzi yango na mosala; kasi ndeko na biso azalaki kaka na mosala na ye.

8, 9. Na ndenge nini tokoki komekola banganga-nzambe ná Balevi mpe komona ete Yehova azali likabo na biso?

8 Ekoki kozala ete likambo ya ndenge wana ekómelaki bato mosusu. Mbala mosusu bamitunaki boye: ‘Ndenge nini nakokoka kosalisa libota na ngai soki nabungisi mosala na ngai?’ (1 Tim. 5:8) Ezala okutaná na likambo ya ndenge wana to te, mbala mosusu yo mpe oyebi ete okoyoka mawa te soki Nzambe azali likabo na yo, mpe soki ozali kotya mosala na ye na esika ya liboso. Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákoba koluka liboso bokonzi, apesaki bango elaka oyo: “Bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu,” na ndakisa biloko ya kolya, ya komɛla, to ya kolata.​—Mat. 6:33.

9 Kanisá Balevi; bazwaki libula ya mabele te. Lokola losambo ya pɛto ezalaki na esika ya liboso na bomoi na bango, basengelaki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango ya mosuni, mpo ayebisaki bango ete: “Ngai nazali likabo na [bino].” (Mit. 18:20) Atako tozali kosala na tempelo mpenza te lokola banganga-nzambe mpe Balevi, tokoki komekola bango mpe kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na biso. Awa tozali kopusana pene na nsuka, tosengeli mpenza kotyela Yehova motema ete akokokisa bamposa na biso.​—Em. 13:17.

Tóluka liboso boyengebene ya Nzambe

10, 11. Ndenge nini bandeko mosusu batyelaki Yehova motema na likambo etali mosala? Pesá ndakisa.

10 Yesu alendisaki mpe bayekoli na ye ete ‘bákoba koluka liboso boyengebene ya Nzambe.’ (Mat. 6:33) Yango elimboli kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe liboso ya mibeko ya bato. (Tángá Yisaya 55:8, 9.) Mbala mosusu oyebi bato mosusu oyo kala, bazalaki kolona makaya to kotɛka yango, bazalaki kolakisa bato mosusu kobunda bitumba, to kosala mpe kotɛka bibundeli. Nsima ya koyeba solo, mingi balukaki mosala mosusu; na yango bakokisaki masɛngami mpe bazwaki batisimo.​—Yis. 2:4; 2 Ko. 7:1; Gal. 5:14.

11 Tózwa ndakisa ya Andrew. Ntango ye ná mwasi na ye bayebaki Yehova, bazwaki ekateli ya kosalela ye. Andrew azalaki kosepela mingi na mosala na ye, kasi atikaki yango. Mpo na nini? Mpo azalaki kosala na kompanyi moko oyo ezalaki na boyokani na mosala ya soda mpe azalaki na mposa ya kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe. Ntango Andrew alongwaki mosala, azalaki na bana mibale, azalaki na esika ya kozwa mbongo te mpe atikalaki kaka na mbongo moke mpo na mwa basanza. Na miso ya bato, ekokaki komonana ete azali na ‘libula’ te. Alukaki mosala mosusu mpe atyelaki Nzambe motema. Soki bakanisi makambo oyo eleká, ye ná libota na ye bandimaka mpenza ete lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te. (Yis. 59:1) Lokola batikalaki na bomoi ya pɛpɛlɛ, Andrew ná mwasi na ye bakómaki babongisi-nzela. Andrew alobi boye: “Na bantango mosusu, tomitungisaki mpo na mbongo, ndako, kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe mpo bambula na biso ezali kopusana. Kasi Yehova azalaki ntango nyonso kosalisa biso. . . . Tokoki koloba kozanga kokakatana ete kosalela Yehova epesaka litomba mpe ezali lokumu monene oyo moto akoki kozwa.”a​—Mos. 12:13.

12. Mpo tótosa mibeko ya Nzambe, tosengeli kozala na ezaleli nini? Pesá bandakisa ya epai bozali.

12 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende, mpe ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.” (Mat. 17:20) Okondima kotosa mibeko ya Nzambe ata soki kosala yango ekoki komemela yo mikakatano? Soki oyebi mpenza te soki okoki kondima to te, sololá na bandeko mosusu ya lisangá. Ntango bakoyebisa yo makambo oyo Yehova asalelá bango, na ntembe te, okolendisama.

Tózala na botɔndi mpo na bibongiseli oyo Yehova azwá

13. Soki tomipesi na kosalela Yehova, tokoki koyeba ete akosala nini?

13 Soki osepelaka mpenza na libaku oyo ozwá ya kosalela Yehova, yebá ete akoki kopesa yo biloko nyonso oyo ozali na yango mposa, kaka ndenge asalaki mpo na Balevi. Kanisá lisusu Davidi. Atako azalaki na kati ya mobenga, ayebaki ete Nzambe akoki kosalisa ye. Biso mpe tokoki kotyela Yehova motema ata ntango tomoni ete tosuki. Kobosana te ete ntango Asafe ‘akɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe,’ asosolaki likambo oyo ezalaki kotungisa ye. (Nz. 73:17) Biso mpe tosengeli kobondela Yehova mpo asalisa biso tózala na kondima makasi. Na bongo, tokomonisa ete tosepelaka ndenge tozali kosalela Nzambe, ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo. Na ndenge wana nde tokotika Yehova azala likabo na biso.

14, 15. Tosengeli kosala nini soki basemboli mateya mosusu ya Biblia, mpe mpo na nini?

14 Osalaka ndenge nini soki Yehova asalisi biso tósosola lisusu malamu “makambo mozindo ya Nzambe” oyo ezali na Biblia? (1 Ko. 2:10-13) Ntoma Petro azali ndakisa malamu mpo na biso na likambo yango. Mokolo moko, Yesu ayebisaki Bayuda ete: “Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi na kati na bino te.” Lokola bayekoli mingi bakanisaki ete Yesu alobi mpo na nzoto mpe makila na ye mpenza, balobaki boye: “Liloba oyo ezali makasi; nani akoki koyoka yango?” Mpe “bazongelaki biloko ezalaki na nsima.” Kasi Petro alobaki ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”​—Yoa. 6:53, 60, 66, 68.

15 Petro akangaki ntina mpenza te ya maloba ya Yesu. Kasi atyaki motema ete Nzambe akongɛngisa pole ya elimo. Ntango basemboli liteya moko ya Biblia, osalaka makasi oyeba ntina oyo basali bongo, na kolanda Makomami? (Mas. 4:18) Bato ya Beroya na ekeke ya liboso “bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo.” (Mis. 17:11) Soki omekoli bango, okosepela lisusu mingi na mosala oyo ozali kosalela Yehova. Okozala na botɔndi mingi ndenge azali likabo na yo.

Kobala na kati ya Nkolo kaka

16. Ndenge nini bakristo oyo bazali minzemba bakoki kotika Nzambe azala likabo na bango, na kolanda 1 Bakorinti 7:39?

16 Ndenge mosusu oyo mokristo akomonisa ete abosani mokano ya Nzambe te, ezali kotosa toli ya Biblia ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Mingi baponi kotikala minzemba na esika ya kobuka mobeko wana ya Nzambe. Nzambe abosanaka bato ya ndenge wana te. Davidi asalaki nini soki ayoki ete azali kaka ye moko mpe amoni ete azangi moto oyo akoki kosalisa ye? Alobaki boye: “Nazalaki kosopa motungisi na ngai liboso [ya Nzambe]; nakobaki koyebisa ye mpasi na ngai, ntango elimo na ngai elɛmbaki makasi na kati na ngai.” (Nz. 142:1-3) Yirimia asalelaki Nzambe na bosembo bambula mingi mpe azalaki monzemba. Mbala mosusu ye mpe azalaki koyoka ete azali kaka ye moko. Okoki koyekola ndakisa na ye ndenge ezali na mokapo 8 ya buku Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia.

17. Ndenge nini ndeko mwasi moko oyo azali monzemba asalaka ntango ayoki ete azali kaka ye moko?

17 Ndeko mwasi moko na États-Unis alobi boye: “Nazwá ekateli ya kotikala monzemba te. Soki nakutani na moto oyo abongi na ngai, nakobala. Mama na ngai oyo azali Motatoli te azalaki kotinda ngai nabala kaka moto nyonso oyo amonani. Natunaki ye soki akondima ete ezala foti na ye soki libala yango esimbi te. Nsima ya mikolo, amonaki ete nazali na mosala ya malamu, nazali kobatela nzoto na ngai malamu, mpe nazali na esengo. Atikaki kotya ngai mbamba.” Na bantango mosusu ndeko mwasi yango ayokaka ete azali kaka ye moko. Alobi boye: “Na bantango yango, nasalaka makasi natyela Yehova motema. Asundolaka ngai te.” Nini esalisaka ye atyela Yehova motema? Alobi boye: “Libondeli esalisaka ngai namona ete Nzambe azali mpenza mpe ete nazali kaka ngai moko te. Oyo-Aleki-likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba ayokaka ngai, bongo ndenge nini nayoka ete nazali na ntina te mpe nazanga esengo?” Lokola ndeko mwasi yango andimaka ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa,” alobi boye: “Nasalaka makasi namipesa na kosalisa basusu, mpe nazelaka te ete bango bázongisela ngai. Ntango nakanisi boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalisa moto oyo?’ nayokaka esengo na motema.” (Mis. 20:35) Ya solo, ndeko mwasi yango atiká Yehova azala likabo na ye, mpe azali na esengo ndenge asalelaka ye.

18. Ndenge nini okoki kokóma likabo ya Yehova?

18 Ata soki ozali na bomoi ya ndenge nini, okoki kotika Nzambe azala likabo na yo. Soki osali bongo, okozala moko ya basaleli na ye oyo bazali na esengo. (2 Ko. 6:16, 17) Mpo na yango, yo mpe okoki kokóma likabo ya Yehova, ndenge bato mosusu na ntango ya kala bazalaki. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:9, 10.) Kaka ndenge Yisraele ekómaki likabo ya Nzambe na kati ya bikólo, Nzambe akoki mpe kopona yo ozala likabo na ye mpe kobatela yo na bolingo nyonso.​—Nz. 17:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya Novɛmbɛ 2009, nkasa 12-14 (na Lifalanse).

Okopesa eyano nini?

Ndenge nini okoki kotika Yehova azala likabo na yo

• na kolukáká liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye?

• na komonisáká botɔndi mpo na bilei ya elimo?

• na kotosáká mobeko ya Nzambe ya kobala na kati ya Nkolo kaka?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

Yehova akozala likabo na biso soki totye mosala na ye na esika ya liboso

[Elilingi na lokasa 15]

Ndakisa ya Yirimia ekoki kolendisa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto