Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/9 nk. 25-29
  • Yehova ayebi yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova ayebi yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tata ya bato oyo bazali na kondima
  • Kozela Yehova emonisaka ete tozali na kondima
  • Ndakisa moko ya komikitisa mpe mosusu ya lolendo
  • Kotosa Yehova esɛngaka komikitisa
  • Yehova ayebi bato na ye
  • Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • ‘Tozali kotambola na kondima kasi na komona te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Batombokelaki Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/9 nk. 25-29

Yehova ayebi yo?

“Yehova ayebi bato na ye.”​—2 TIM. 2:19.

1, 2. (a) Yesu azalaki komibanzabanza mpo na likambo nini? (b) Mituna nini tosengeli kotalela?

MOKOLO moko, Mofarisai moko ayaki epai ya Yesu mpe atunaki ye boye: “Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Yesu azongiselaki ye ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Mat. 22:35-37) Yesu alingaki mingi Yehova Tata na ye ya likoló mpe amonisaki yango na bomoi na ye. Azalaki mpe komibanzabanza mpo na ndenge oyo Yehova akomona ye; amonisaki yango na ndenge atikalaki sembo bomoi na ye mobimba. Na yango, mwa moke liboso akufa, amonisaki ete Nzambe ayebi ye lokola moto oyo atosaki mibeko nyonso ya Nzambe; alobaki boye: “Natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.”​—Yoa. 15:10.

2 Lelo oyo, bato mingi balobaka ete balingaka Nzambe. Na ntembe te, biso mpe tolobaka bongo. Kasi, tosengeli kotalela mituna oyo ya ntina mingi: ‘Yehova ayebi ngai? Amonaka ngai ndenge nini? Ayebi ete ngai nazali moto na ye?’ (2 Tim. 2:19) Ezali mpenza lokumu monene koyeba ete tokoki kozala na boninga ya ndenge wana na Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba!

3. Mpo na nini bato mosusu bandimaka te ete bakoki kozala bato ya Yehova? Nini ekoki kosalisa bango bálongola makanisi wana?

3 Kasi, ata bato mosusu oyo balingaka Yehova bakakatanaka kondima ete Nzambe akoki kozala moninga na bango. Bato mosusu bamonaka ete bazali na ntina te, yango wana bandimaka te ete bakoki kozala bato ya Yehova. Nzokande, ezali mpenza esengo koyeba ete Nzambe amonaka biso bongo te! (1 Sa. 16:7) Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bakristo boye: “Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani na ye.” (1 Ko. 8:3) Mpo Nzambe ayeba yo, osengeli libosoliboso kolinga ye. Kanisá naino: Mpo na nini ozali kotánga zulunalo oyo? Mpo na nini ozali kosala milende mpo na kosalela Yehova na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi mpe makasi na yo nyonso? Soki omipesá na Nzambe mpe ozwá batisimo, nini etindaki yo osala yango? Biblia emonisi ete Yehova, ye oyo atalatalaka na mitema, abendaka bato oyo bazali lokola “biloko kitoko.” (Tángá Hagai 2:7; Yoane 6:44.) Na yango, okoki kondima ete ozali kosalela Yehova mpo abendaki yo. Asundolaka soki moke te bato oyo ye abendaki soki batikali sembo. Nzambe azwaka bango na motuya mingi, mpe alingaka bango mingi.​—Nz. 94:14.

4. Mpo na nini tosengeli kokoba kokanisa boninga na biso na Yehova?

4 Lokola Yehova abendi biso, tosengeli kosala makasi ete tótikala na kati ya bolingo na ye. (Tángá Yuda 20, 21.) Kobosana te ete Biblia emonisi ete tokoki komemama mosika na nzela mpe kotika Nzambe. (Ebr. 2:1; 3:12, 13) Na ndakisa, mwa moke liboso aloba maloba oyo ezali na 2 Timote 2:19, Paulo alobelaki Himene mpe Filete. Emonani ete mibali yango mibale bazalaki liboso bato ya Yehova, kasi na nsima batikaki solo. (2 Tim. 2:16-18) Na masangá ya Galatia mpe bato mosusu oyo liboso bazalaki bato ya Yehova, bakobaki te na losambo ya solo. (Gal. 4:9) Tótyola soki moke te boninga na biso na Yehova.

5. (a) Wapi bizaleli mosusu oyo Nzambe asepelaka na yango mingi? (b) Tokotalela bandakisa nini?

5 Bizaleli mosusu esepelisaka Yehova mingi. (Nz. 15:1-5; 1 Pe. 3:4) Kondima mpe komikitisa ekesenisaki bato oyo Yehova ayebaki ná bato mosusu. Tótalela ndakisa ya mibali mibale oyo Yehova alingaki mingi mpo bazalaki na bizaleli yango. Tokolobela mpe mobali mosusu oyo akanisaki ete azali moto ya Yehova kasi azalaki na lolendo mpe mpo na yango, Nzambe aboyaki ye. Bandakisa yango ekoki koteya biso makambo mingi.

Tata ya bato oyo bazali na kondima

6. (a) Ndenge nini Abrahama amonisaki kondima na bilaka ya Yehova? (b) Ndenge nini Yehova ayebaki Abrahama?

6 Abrahama azali moto moko oyo “andimelaki Yehova.” Kutu, abengami “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.” (Eba. 15:6; Rom. 4:11) Lokola Abrahama azalaki na kondima, atikaki mboka na ye, baninga na ye mpe biloko na ye mpe akendeki na mokili moko ya mosika. (Eba. 12:1-4; Ebr. 11:8-10) Kondima ya Abrahama ezalaki kaka makasi, ata nsima ya bambula ebele. Emonanaki polele ntango, “tokoki koloba ete akabaki [mwana na ye] Yisaka mbeka,” mpo na kotosa etinda ya Yehova. (Ebr. 11:17-19) Abrahama amonisaki kondima na bilaka ya Yehova, mpe mpo na yango Nzambe asepelaki na ye mingi; ayebaki mpenza Abrahama. (Tángá Ebandeli 18:19.) Yehova asukaki te kaka na koyeba ete Abrahama azali; alingaki ye mingi mpe azalaki moninga na ye.​—Yak. 2:22, 23.

7. Abrahama ayebaki nini mpo na bilaka ya Yehova, mpe ndenge nini amonisaki kondima na ye?

7 Toyebi ete Abrahama azwaki te libula ya mabele oyo Yehova alakaki ye. Amonaki mpe te ndenge momboto na ye ekómaki “lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu.” (Eba. 22:17, 18) Atako bilaka yango ekokisamaki te na ntango azalaki na bomoi, Abrahama azalaki kaka na kondima makasi epai ya Yehova. Ayebaki ete bilaka ya Yehova ezangaka te kokokisama. Ya solo, makambo oyo Abrahama asalaki na bomoi na ye emonisaki ete azalaki na kondima ya ndenge wana. (Tángá Baebre 11:13.) Yehova ayebi biso ete tozali na kondima lokola oyo ya Abrahama?

Kozela Yehova emonisaka ete tozali na kondima

8. Wapi makambo mosusu oyo bato mosusu bakoki kozela banda kala ete ekokisama?

8 Tokoki kozala na makambo oyo tozelaka banda kala ete ekokisama. Na ndakisa, kobala, kobota bana mpe kozala na nzoto kolɔngɔnɔ. Kolinga makambo yango ezali mabe te. Nzokande, ekoki kozala ete makambo yango mosusu ekokisami naino te. Soki ezali bongo mpo na biso, ndenge oyo tozali kotalela likambo yango ekoki komonisa ndenge kondima na biso ezali.

9, 10. (a) Bato mosusu balukaki kosala nini mpo na kokokisa bamposa na bango? (b) Okanisi nini mpo na kokokisama ya bilaka ya Yehova?

9 Ekozala mpenza bozoba koluka kokokisa bamposa yango na ndenge oyo eyokani te na toli ya Nzambe. Kosala bongo ekoki kobebisa boninga na biso na Nzambe. Na ndakisa, bandeko mosusu bandimaki kosalisa nzoto na ndenge oyo eyokani te na batoli ya Biblia. Bamosusu bandimaki misala oyo ekabolaka bango na mabota na bango to epekisaka bango koyangana na makita ya lisangá. Bamosusu balinganaki mpo na libala na moto oyo asambelaka Yehova te. Soki mokristo asali bongo, tokoloba ete azali mpenza koluka Yehova ayeba ye? Yehova alingaki koyoka ndenge nini soki Abrahama akómaki motema likoló mpo bilaka ya Nzambe ezali kokokisama te? Bongo soki Abrahama alobaki ete malamu atonga ndako mpo na kofanda kuna libela mpe amisalela nkombo ya lokumu na esika azela Yehova? (Talá mpe Ebandeli 11:4.) Yehova alingaki kaka koyeba ye lokola moninga na ye?

10 Makambo nini ozelaka mpenza ete ekokisama? Kondima na yo ezali makasi mpenza mpo ozela Yehova? Ye alaki ete akokokisa “mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (Nz. 145:16) Ndenge ezalaki mpo na Abrahama, ntango mosusu bilaka mosusu ya Nzambe ekokokisama noki te ndenge tolingi. Kasi, Yehova asepelaka soki tomonisi kondima lokola oyo ya Abrahama, mpe soki tozali na bomoi oyo eyokani na kondima yango. Soki tosali bongo, akopesa biso mbano.​—Ebr. 11:6.

Ndakisa moko ya komikitisa mpe mosusu ya lolendo

11. Ekoki kozala ete Kora asalaki nini na boumeli ya bambula ebele?

11 Tólobela ndakisa ya Moize ná Kora, bato mibale oyo bakesanaki mpenza na likambo etali kotosa ebongiseli ya Yehova mpe bikateli na ye. Yehova atalelaki bango na kolanda ndenge oyo mokomoko na bango asalaki. Kora azalaki Molevi ya libota ya Bakohate mpe azalaki na mikumba mingi mpe amonaki makambo mingi ya malamu. Na ndakisa, mbala mosusu amonaki ndenge Yehova abikisaki ekólo ya Yisraele na Mai motane, atosaki ekateli oyo Yehova azwaki na Ngomba Sinai, ete báboma Bayisraele oyo batombokaki, mpe azalaki na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki komema ya sanduku ya kondimana. (Kob. 32:26-29; Mit. 3:30, 31) Emonani ete azalaki sembo epai ya Yehova bambula mingi, mpe mpo na yango Bayisraele mingi bazalaki komemya ye.

12. Ndenge elilingi ya lokasa 28 emonisi yango, mpo na lolendo ya Kora, boninga na ye na Yehova esukaki ndenge nini?

12 Kasi, ntango Bayisraele bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka, Kora amonaki lokola ete makambo mosusu ezali kotambola malamu te na ebongiseli ya Yehova. Na nsima, bankumu 250 balandaki ye mpo na koluka kobongola makambo. Kora ná bato wana mosusu bazalaki mpenza komona ete bazali na boyokani malamu na Yehova. Bayebisaki Moize ná Arona boye: “Tobaye bino, mpamba te liyangani oyo mobimba, bango nyonso bazali basantu mpe Yehova azali na kati na bango.” (Mit. 16:1-3) Ezalaki mpenza lolendo! Moize ayebisaki bango boye: “Yehova akoyebisa nani azali moto na ye.” (Tángá Mitángo 16:5.) Na nsuka ya mokolo oyo elandaki, Kora mpe bato nyonso oyo balandaki ye na botomboki bakufaki.​—Mit. 16:31-35.

13, 14. Ndenge nini Moize amonisaki ete azali moto ya komikitisa?

13 Na bokeseni na Kora, Moize azalaki “na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Amonisaki komikitisa na ye na ndenge alandaki malamumalamu malako ya Yehova. (Kob. 7:6; 40:16) Eloko moko te emonisi ete mbala mingi, Moize aboyaki kolanda ndenge oyo Yehova azalaki kosala makambo, to ete asilikaki mpo asɛngelaki kolanda malako ya Yehova. Na ndakisa, ntango Yehova apesaki mitindo bátonga tabernakle, apesaki malako ya sikisiki ata na makambo ya mikemike, lokola langi ya nsinga mpe motángo ya miso oyo basengelaki kosala na yango bilamba ya hema. (Kob. 26:1-6) Soki mokɛngɛli moko na lisangá apesi yo malako ya sikisiki ata na makambo ya mikemike mpo na kosala likambo moko, okoki kolɛmba nzoto. Kasi Yehova azali mokɛngɛli oyo aleki malamu. Apesaka basaleli na ye mosala mpe atyaka motema ete bakosala yango malamu. Soki apesi malako ata na makambo ya mikemike, apesaka yango mpamba te. Tósimba ete Moize asilikaki te to akanisaki te ete Yehova azangi limemya epai na ye na ndenge apesaki ye malako ebeleebele, ata na makambo ya mikemike. Moize asilikaki te mpe alobaki te ete Yehova apekisi ye abimisa mayele na ye moko mpo na kosala makambo. Nzokande, Moize alandelaki makambo malamu mpo basali básala “kaka bongo,” na kolanda malako ya Yehova. (Kob. 39:32) Oyo nde komikitisa! Moize ayebaki ete mosala ezali ya Yehova mpe ete ye azali kaka esaleli mpamba na mabɔkɔ ya Yehova.

14 Komikitisa ya Moize emonanaki mpe ntango ye moko akutanaki na mikakatano. Na ndakisa, ntango bato babandaki komilelalela mpo na mai, Moize asilikelaki bango makasi mpe apesaki Nzambe nkembo te. Mpo na yango, Yehova ayebisaki Moize ete akokɔtisa bato na Mokili ya Ndaka te. (Mit. 20:2-12) Ye ná ndeko na ye Arona bamonaki mpasi mpo na koyimayima ya Bayisraele na boumeli ya bambula mingi. Kasi lokola Moize asalaki libunga na mbala wana, asengelaki te kozwa eloko oyo azelaki banda kala! Moize ayokaki ndenge nini? Ya solo, esalaki ye mpasi, kasi na komikitisa nyonso, andimaki ekateli ya Yehova. Ayebaki ete Yehova azali Nzambe ya boyengebene, mpe ete “epai na ye kozanga bosembo ezali te.” (Mib. 3:25-27; 32:4) Soki okanisi Moize, omonaka te ete azalaki moto oyo Yehova ayebaki?​—Tángá Kobima 33:12, 13.

Kotosa Yehova esɛngaka komikitisa

15. Lolendo ya Kora ekoki koteya biso nini?

15 Yehova akondima biso kaka soki tozali kondima bambongwana oyo ezali kosalelama na lisangá mpe bikateli ya bandeko oyo azali kosalela mpo na kotambwisa lisangá. Kora ná baninga na ye babebisaki boninga na bango na Nzambe mpo bamityelaki motema koleka ndelo, bazalaki na lolendo mpe bazangaki kondima. Kora azalaki komona ete mobange Moize nde azalaki kokata makambo mokolo na mokolo, kasi abosanaki ete Yehova nde azalaki kotambwisa ekólo. Kora azangaki komonisa bosembo epai ya bato oyo Yehova azalaki kosalela. Kora asengelaki kozela Yehova asala. Yehova akokaki kosalisa ye asosola mpo na nini makambo ezalaki ndenge wana to kobongola yango soki esengeli. Nsukansuka, mpo na lolendo na ye, Kora abebisaki nyonso oyo asalaki na bosembo na mosala ya Nzambe!

16. Ndenge nini ndakisa ya komikitisa ya Moize ekoki kosalisa biso?

16 Likambo oyo ekómelaki Kora ezali likebisi mpo na bankulutu mpe bandeko mosusu na lisangá lelo oyo. Mpo tózela Yehova asala mpe tólanda malako ya bandeko oyo bazali kokamba, tosengeli kozala na komikitisa. Tomonisaka ete tozali na komikitisa mpe na boboto lokola Moize? Toyebaka mpe tondimaka ete Yehova azali kosalela bato mpo na kotambwisa lisangá mpe totosaka malako na bango? Tokokaka kolongola makanisi ya mabe ntango tolɛmbi nzoto na likambo moko boye? Soki ezali bongo, Yehova akoyeba biso mpe akondima biso. Soki tozali na komikitisa mpe na botosi, akosepela na biso mingi.

Yehova ayebi bato na ye

17, 18. Nini ekoki kosala ete Yehova akoba kondima biso?

17 Ebongi tókanisa bato oyo Yehova abendaki mpe bazalaki baninga na ye. Abrahama mpe Moize bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe bazalaki na mabunga lokola biso. Kasi, Yehova ayebaki bango ete bazali bato na ye. Nzokande, ndakisa ya Kora emonisi ete tokoki komemama mosika na Yehova mpe kotika kozala baninga na ye. Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Yehova amonaka ngai ndenge nini? Bandakisa ya bato wana oyo Biblia elobeli ekoki koteya ngai nini?’

18 Ezali esengo mingi koyeba ete Yehova amonaka basaleli na ye ya sembo ete bazali bato na ye. Na yango, kobá kosala makasi mpo na komonisa kondima, komikitisa mpe bizaleli mosusu oyo ekosala ete Nzambe asepela na yo mingi koleka. Soki Nzambe ayebi yo, ezali mpenza lokumu. Ekopesa yo esengo mingi sikoyo, mpe mapamboli mingi na mikolo oyo ezali koya.​—Nz. 37:18.

Ozali koyeba lisusu?

• Kozala moto oyo Yehova ayebi elimboli nini?

• Ndenge nini okoki komekola kondima ya Abrahama?

• Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Kora mpe ya Moize?

[Elilingi na lokasa 26]

Lokola Abrahama, biso mpe tozali na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso?

[Elilingi na lokasa 28]

Kora aboyaki litambwisi ya Nzambe mpo azangaki komikitisa

[Elilingi na lokasa 29]

Yehova ayebi yo lokola moto oyo alandaka malako na komikitisa nyonso?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto