Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 27 lok. 68-lok. 69 par. 2
  • Batombokelaki Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batombokelaki Yehova
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Lingenda ya Arona
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova ayebi yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Lolendo ememaka nsɔni
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 27 lok. 68-lok. 69 par. 2
Kora ná bato na ye batɛlɛmi liboso ya Moize mpe Arona

LITEYA 27

Batombokelaki Yehova

Mwa moke na nsima, wana Bayisraele bazalaki na esobe, Kora, Datane, Abirame ná bato mosusu 250 batombokelaki Moize. Balobaki na ye ete: ‘Tobaye bino! Mpo na nini yo nde ozali mokambi na biso mpe Arona azali nganga-nzambe monene? Yehova azali kaka elongo na yo ná Arona te, azali elongo na biso nyonso.’ Yehova asepelaki te na likambo wana. Amonaki ete bato yango batombokelaki nde ye!

Moize alobaki na Kora ná bato na ye ete: ‘Lobi bóya liboso ya tabernakle, mpe moto na moto amema eloko na ye ya kotya mɔtɔ ná mpaka ya malasi likoló na yango. Yehova akolakisa biso moto oyo ye aponi.’

Na ntɔngɔ, Kora ná bato 250 bakendaki kokutana na Moize na tabernakle. Batumbaki mpaka ya malasi lokola nde bazalaki banganga-nzambe. Mpe Yehova ayebisaki Moize ná Arona: ‘Bólongwa na kati ya Kora ná bato na ye.’

Kora akendaki esika Moize abengaki bango na tabernakle, kasi Datane, Abirame, ná mabota na bango baboyaki kokende. Yehova ayebisaki Bayisraele bálongwa pene na hema ya Kora, ya Datane, mpe ya Abirame. Bayisraele balongwaki mbala moko. Datane, Abirame, ná mabota na bango batɛlɛmaki na libándá ya bahema na bango. Na mbala moko mabele ekabwanaki mpe emɛlaki bango! Na tabernakle, mɔtɔ eutaki na likoló mpe etumbaki Kora ná bato na ye 250.

Mabele epasuki mpe emɛli Datane, Abirame, ná mabota na bango

Na nsima, Yehova alobaki na Moize: ‘Zwá lingenda ya nkumu ya libota mokomoko, mpe komá nkombo ya mokomoko likoló ya lingenda na ye. Na lingenda ya libota ya Levi, komá nkombo ya Arona. Tyá yango na kati ya tabernakle, mpe lingenda ya moto oyo naponi ekobimisa fololo.’

Mokolo oyo elandaki, Moize abimisaki mangenda yango mpe alakisaki bankumu. Lingenda ya Arona nde ebimisaki fololo mpe ebotaki mbuma ya amande oyo eteli. Na yango, Yehova amonisaki ete aponaki Arona azala nganga-nzambe monene.

“Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.”​—Baebre 13:17

Mituna: Mpo na nini Kora ná bato na ye batombokelaki Moize? Ndenge nini toyebi ete Yehova aponaki Arona azala nganga-nzambe monene?

Mitángo 16:1–17:13; 26:9-11; Nzembo 106:16-18

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto