Basilá kokosa yo?
ESALAKA mpasi mingi soki oyoki ete moto oyo otyelaka motema akosaki yo. Na ntango wana, moto amimonaka zoba, ayokaka nkanda, mpe amonaka ete batɛki ye. Lokuta ekabolaka baninga mpe ebomaka mabala; bato babungisaka mbongo mingi mpo bakosaka bango.
Sikoyo, kanisá ndenge oyo okoyoka soki oyebi ete makambo ya Nzambe oyo bateyá yo ezali lokuta. Soki ozali moto oyo asambelaka, yango ekoki mpenza kolɛmbisa yo nzoto, ndenge mpe esalemaki epai ya bandimi oyo:
● “Namonaki ete lingomba ekosaki ngai.”—DEANNE.
● “Nayokaki nkanda. Namonaki ete bakosaki ngai; bilikya mpe mikano na ngai nyonso ekendaki na mai.”—LUIS.
Mbala mosusu ekoki kozala mpasi ondima ete makambo ya Nzambe oyo bateyá yo ezali lokuta. Ekoki kozala ete makambo oyo ondimaka bateyá yo yango na moto oyo otyelaka motema, oyo akoki soki moke te kokosa yo na nko; ekoki kozala baboti na yo, sango, pastɛrɛ, to moninga moko ya motema. Mbala mosusu ondimaka mateya yango banda bomwana. Kasi, ekoki mpe kozala ete likambo oyo bato mingi bandimaka ezali solo te, boye te? Franklin Roosevelt, prezida ya kala ya États-Unis, andimaki likambo yango mpo alobaki boye: “Ezali te mpo likambo moko ya lokuta elobamaka mingi nde ekokóma solo.”
Ndenge nini okoki koyeba ete bakosaki yo? Mokolo moko Yesu abondelaki Nzambe boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Ya solo, Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali na makambo nyonso oyo ekoki kosalisa biso tókesenisa solo na lokuta.
Tótalela Biblia mpo na koyeba mateya mitano ya lokuta oyo eteyamaka mpo na Nzambe. Okomona ndenge oyo solo na makambo yango ekoki kobongola bomoi na yo.