Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/10 lok. 7
  • 4 Nzambe aponaka bilongi—Solo to lokuta?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 4 Nzambe aponaka bilongi—Solo to lokuta?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Osengeli kosala nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tyelá Yehova motema mpe zalá na bomoi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/10 lok. 7

4 Nzambe aponaka bilongi​—Solo to lokuta?

Liteya oyo mbala mosusu oyoká: “Nzambe nde azali kotambwisa mokili, mpe makambo nyonso oyo esalemaka ezali mokano na ye. Lokola mokili etondi na koponapona, kozanga bosembo, mpe monyoko, ezali foti ya Nzambe.”

Oyo Biblia eteyaka: Kozanga bosembo oyo ezali na mokili euti na Nzambe te. Biblia elobi boye mpo na Yehova: “Mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo.”​—Kolimbola Mibeko 32:4.

Nzambe asalisaka bato nyonso, ata baoyo emonanaka ete ebongi te asalisa bango. Na ndakisa, “abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Matai 5:45) Atalelaka bato ya mposo mpe bikólo nyonso ndenge moko, ndenge Misala 10:34, 35 emonisi yango ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”

Kasi, kozanga bosembo eutaka wapi? Bato mingi bazalaka sembo te mpo balandaka ndakisa ya Nzambe te. (Kolimbola Mibeko 32:5) Lisusu, Biblia emonisi ete Nzambe atiki nzela ete monguna na ye, Zabolo, ayangela mokili oyo.a (1 Yoane 5:19) Nzokande, ntango oyo Nzambe atiki mpo Satana ayangela ekosuka mosika te. Asili kozwa ebongiseli mpo na “kobukabuka misala ya Zabolo.”​—1 Yoane 3:8.

Ndenge oyo solo ekoki kosalisa yo: Bansango etali kanyaka, monyoko, mpe kozanga bosembo, oyo oyokaka mbala na mbala ekoki kobulunganisa yo. Kasi, koyeba soki mikakatano ya mokili eutaka wapi ekoki kosalisa yo oyeba ntina oyo makambo ezali kotambola malamu te mpe ntina oyo makambo ezali kobonga te na mokili atako bato bazali kosala milende. (Nzembo 146:3) Na esika ya kolekisa ntango mpe koboma nzoto mpo na koluka kobongisa makambo ya mokili, oyo ekoki kobonga kaka mpo na mwa ntango to mpe ekozala mosala ya mpunda, okoki kozala na elikya ya solosolo mpo na mikolo ekoya, elikya oyo euti na makambo oyo Nzambe alaki.​—Emoniseli 21:3, 4.

Koyeba nani asalaka ete bosembo ezala te ekoki kosalisa biso ntango tokutani na mikakatano. Ntango basaleli biso makambo na kozanga bosembo, tokoki kolela lokola mosakoli Habakuku ete: “Mobeko ezali kosila makasi, mpe bosembo ezali ata moke te.” (Habakuku 1:4) Nzambe apamelaki Habakuku te mpo alobaki bongo. Kutu, Nzambe ayebisaki ye ete atye ntango oyo akobongisa makambo mpe yango esalisaki Habakuku azala na esengo na ntango wana ya mpasi. (Habakuku 2:2-4; 3:17, 18) Ndenge moko mpe, kozala na elikya na elaka ya Nzambe ete akolongola kozanga bosembo ekoki kosalisa yo ozala na esengo mpe na kimya na kati ya mokili oyo ezangi bosembo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ndenge oyo Zabolo abandaki, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

Nzambe nde abimisaka bampasi mpe makambo ya kozanga bosembo?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]

© Sven Torfinn/​Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto