LISOLO YA BOYEKOLI 37
LOYEMBO 114 “Tózala na motema molai”
Osengeli kosala nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
“Azalaki kolikya ete bosembo ekokoba, kasi talá! Kozanga bosembo nde ezalaki.”—YIS. 5:7.
NA MOKUSE
Ndenge oyo ndakisa ya Yesu emonisi oyo tosengeli kosala mpo na makambo ya kozanga bosembo mpo tósepelisa Yehova.
1-2. Bato mingi basalaka nini mpo na makambo ya kozanga bosembo, mpe mituna nini tokotalela?
BATO mingi lelo basalelaka basusu makambo ya kozanga bosembo. Basalaka yango mpo na bantina mingi, na ndakisa mpo bazali babola, bazali basi to mibali, mpo na esika oyo bautá, to mpo na loposo na bango. Bato bazali komona mpasi mpo na makambo mabe ya bato ya mombongo ya lokoso to bakonzi oyo balingá kanyaka. Makambo yango mpe makambo mosusu ya kozanga bosembo ezali konyokola biso moko to bato oyo toyebi.
2 Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato mingi bazali kosilika mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo bazali komona lelo na mokili. Biso nyonso tolingaka kofanda na kimya mpe na esika oyo bazali kosalela biso makambo na bosembo. Bato mosusu bazali kokɔta na bituluku ya baoyo balukaka kobongisa makambo. Bazali kotɛmɛla mibeko ya Leta, kotambola na babalabala, mpe kopona bakonzi ya politiki oyo balaki kosilisa makambo ya kozanga bosembo. Nzokande, biso bakristo tosengeli kozala “bato ya mokili te” mpe tozelaka Bokonzi ya Nzambe eya kolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo. (Yoa. 17:16) Atako bongo, ntango tomoni ete bazali kosalela moto makambo ya kozanga bosembo, toyokaka mawa, ata mpe nkanda. Mbala mosusu tomitunaka: ‘Nasengeli kosala nini? Ezali na likambo oyo nakoki kosala sikoyo mpo na makambo ya kozanga bosembo?’ Mpo na koyanola na mituna wana, tótalela liboso ndenge oyo Yehova ná Yesu batalelaka makambo ya kozanga bosembo.
YEHOVA NÁ YESU BAYINAKA KOZANGA BOSEMBO
3. Mpo na nini tosilikaka mpo na makambo ya kozanga bosembo? (Yisaya 5:7)
3 Biblia eyebisi biso ntina oyo tolingaka te makambo ya kozanga bosembo. Elobi ete Yehova akelaki biso na elilingi na ye mpe ete “alingaka boyengebene mpe bosembo.” (Nz. 33:5; Eba. 1:26) Asalaka ata moke te makambo ya kozanga bosembo, mpe alingaka moto moko te asala yango! (Mib. 32:3, 4; Mika 6:8; Zak. 7:9) Na ndakisa, na mikolo ya mosakoli Yisaya, Yehova ayokaki “koganga mpo na mpasi” ya Bayisraele mingi oyo bato mosusu ya ekólo bazalaki konyokola. (Tángá Yisaya 5:7.) Yehova apesaki etumbu na baoyo bazalaki mbala na mbala kobuka Mobeko na ye mpe kosalela basusu makambo ya kozanga bosembo.—Yis. 5:5, 13.
4. Ndenge nini lisolo moko na Baevanzile emonisi ndenge oyo Yesu atalelaka kozanga bosembo? (Talá mpe elilingi.)
4 Lokola Yehova, Yesu mpe alingaka bosembo mpe ayinaka kozanga bosembo. Na libaku moko ntango azalaki awa na mabele, amonaki mobali moko oyo lobɔkɔ ekauká. Mawa etindaki Yesu asalisa ye, kasi bakonzi ya mangomba oyo bazangá mawa basepelaki te. Bazalaki kotya makanisi na koluka bato bátosa mibeko ya kolekisa ndelo oyo babakisaki mpo na Sabata na esika ya kosalisa mobali oyo azalaki na mpasi. Ezaleli na bango wana esalaki Yesu nini? “Ayokaki mpenza mawa mingi mpo na motema makasi na bango.”—Mrk. 3:1-6.
Na bokeseni na bakonzi ya Lingomba ya Bayuda, Yesu azalaki komitya na esika ya baoyo bazalaki na mposa ya lisalisi (Talá paragrafe 4)
5. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango toyoki nkanda mpo na makambo ya kozanga bosembo?
5 Lokola Yehova ná Yesu bayokaka nkanda mpo na makambo ya kozanga bosembo, ezali mabe te ndenge biso mpe toyokaka bongo. (Ef. 4:26) Kasi, tosengeli kobosana te ete nkanda nyonso oyo toyoki, ata soki tozali na ntina ya koyoka bongo, ekosilisa te makambo ya kozanga bosembo. Kutu, nkanda oyo eumeli to ya makasi ekoki kopesa biso maladi, to konyokola biso na makanisi. (Nz. 37:1, 8; Yak. 1:20) Na yango, tosengeli kosala nini liboso ya makambo ya kozanga bosembo? Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Yesu.
NDENGE OYO YESU ASALAKI MPO NA MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO
6. Makambo nini ya kozanga bosembo ezalaki ntango Yesu azalaki awa na mabele (Talá mpe elilingi.)
6 Yesu amonaki makambo ebele ya kozanga bosembo ntango azalaki awa na mabele. Amonaki ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki konyokola bato mpamba. (Mat. 23:2-4) Ayebaki mpe ndenge bakonzi ya Roma bazalaki kosalela bato makambo na nkanza. Bayuda mingi bazalaki kolinga kolongwa na nse ya boyangeli ya Baroma. Basusu, na ndakisa Bazelote, bazalaki pene ya kobunda mpo na yango. Atako bongo, Yesu abandisaki te to apesaki mabɔkɔ te na bituluku ya bato oyo bazalaki koluka mbongwana. Ntango ayebaki ete bato balingaki kotya ye mokonzi, Yesu alongwaki mpe akendaki.—Yoa. 6:15.
Yesu alongwe esika bato bazali ntango balingi kotya ye mokonzi (Talá paragrafe 6)
7-8. Mpo na nini Yesu alukaki te kosilisa kozanga bosembo ntango azalaki awa na mabele? (Yoane 18:36)
7 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alukaki te kopesa mabɔkɔ na makambo ya politiki mpo na kosilisa makambo ya kozanga bosembo. Mpo na nini? Ayebaki ete bato bazali na lotomo te to likoki te ya komiyangela. (Nz. 146:3; Yir. 10:23) Bakokoka mpe te kosilisa makambo oyo ebimisaka kozanga bosembo. Mokili oyo eyangelami na Satana Zabolo, ekelamu ya elimo ya motema mabe oyo asalelaka bokonzi na ye mpo na kotinda bato na makambo ya kozanga bosembo. (Yoa. 8:44; Ef. 2:2) Lisusu, ezaleli na biso ya kozanga kokoka esalaka ete ata bato oyo bazali na makanisi ya malamu mpenza bákoka te kosala ntango nyonso oyo ezali sembo.—Mos. 7:20.
8 Yesu ayebaki ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekolongola makambo nyonso oyo ebimisaka kozanga bosembo. Yango wana apesaki ntango mpe makasi na ye na “koteya mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Ayebisaki baoyo “bazali na nzala mpe na mposa ya bosembo” ete makambo ya mabe mpe kozanga bosembo ekosila. (Mat. 5:6; Luka 18:7, 8) Nzokande, yango ekosalema na nzela ya guvɛrnema ya bato te, kasi nde na boyangeli ya guvɛrnema ya Nzambe oyo ezali na likoló, oyo “ezali ya mokili oyo te.”—Tángá Yoane 18:36.
MEKOLÁ YESU NTANGO OKUTANI NA MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO
9. Nini endimisaka yo ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa kozanga bosembo?
9 Lelo oyo tozali komona kutu makambo ya kozanga bosembo mingi koleka oyo Yesu amonaki. Kasi na “mikolo ya nsuka” oyo, Satana ná bato ya kozanga kokoka oyo balandaka makanisi na ye nde bazali kobimisa makambo ya kozanga bosembo. (2 Tim. 3:1-5, 13; Em. 12:12) Lokola Yesu, toyebi ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo oyo ebimisaka kozanga bosembo. Lokola topesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na motema mobimba, tosanganaka te na bato oyo batambolaka na babalabala mpo na koluka kobongola makambo, oyo batombokaka, mpe topesaka mabɔkɔ te na makambo mosusu oyo basalaka mpo na kosilisa kozanga bosembo. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Stacy.a Liboso ayeba solo, Stacy azalaki kotambola na babalabala elongo na bato oyo batɛmɛlaka kozanga bosembo. Kasi akómaki komituna soki azalaki kosala likambo ya malamu. Alobi boye: “Ntango tozalaki kotambola ndenge wana, nazalaki komituna soki nazali na ngámbo oyo ebongi. Sikoyo lokola nakómi kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ, nayebi ete nazali na ngámbo oyo ebongi. Nayebi ete Yehova akosilisa mpenza mpasi oyo moto mokomoko azali komona, kasi ngai nakokoka te kosala yango.”—Nz. 72:1, 4.
10. Na ndenge nini makanisi ya bato ya bituluku oyo elukaka mbongwana eyokani te na toli ya Yesu oyo ezali na Matai 5:43-48? (Talá mpe elilingi.)
10 Mbala mingi bato ya bituluku oyo elukaka mbongwana bazalaka na elimo ya lipanda mpe na makanisi ya mabe, mpe yango eyokani te na ndakisa mpe mateya ya Yesu. (Ef. 4:31) Ndeko mobali moko na nkombo Jeffrey alobi boye: “Nayebi ete bato oyo bazali kotambola na kimya mpo na koluka mbongwana bakoki mbala moko kobimisa mobulu mpe kobanda kopunza.” Nzokande, Yesu ateyaki biso tósalelaka bato nyonso makambo na bolingo, ata baoyo batɛmɛlaka biso to banyokolaka biso. (Tángá Matai 5:43-48.) Lokola tozali bakristo, tosalaka nyonso tóboya eloko nyonso oyo eyokani te na ndakisa oyo Yesu atikelá biso.
Tosengeli kozala na ekateli makasi ya koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe ya politiki lelo oyo (Talá paragrafe 10)
11. Nini ekoki komeka ekateli na biso ya koboya kokɔta na bituluku ya bato oyo balukaka mbongwana?
11 Atako toyebi ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa kozanga bosembo mpo na libela, tokoki komona ete ezali mpasi komekola Yesu ntango basali biso makambo ya kozanga bosembo. Tótalela oyo ekómelaki ndeko mwasi Janiya, oyo basalelaki ye makambo na kopona bilongi. Alobi boye: “Nasilikaki mpenza. Lisusu, nayokaki mpasi mpe nalingaki ete bato oyo basalaki makambo yango bázwa etumbu. Na nsima, nakanisaki kokɔta na bituluku ya bato oyo batɛmɛlaka likambo ya konyokola bato mpo na loposo na bango mpe ya kopona bilongi. Namonaki ete kosala bongo ezalaki lolenge ya malamu ya komonisa nkanda na ngai.” Kasi kendekende, Janiya ayaki komona ete asengelaki kobongola makanisi na ye. Alobi boye: “Nakómaki kondima makanisi ya bato mpe kotyela bango motema na esika ya Yehova. Nazwaki ekateli ya kokata boyokani nyonso na bato ya etuluku yango.” Tosengeli kokeba ete tótika te nkanda oyo makambo ya kozanga bosembo epesi biso etinda biso tókɔta na makambo ya politiki to na bituluku ya bato oyo balukaka mbongwana.—Yoa. 15:19.
12. Mpo na nini tosengeli kopona bansango oyo tokoki kolanda?
12 Nini ekoki kosalisa biso tópekisa nkanda mpo na makambo ya kozanga bosembo? Bato mingi bamoni ete kopona makambo ya kotánga, koyoka to kotala esalisaka mingi. Basite mosusu ya kosolola na bato etyaka mpe makambo mingi ya kozanga bosembo oyo epesaka nkanda mpe etindaka bato báluka kokɔta na bituluku ya bato oyo balukaka mbongwana. Mbala mingi, bapanzi-nsango balobaka makambo oyo ekobimisa ngámbo mosusu mabe. Ata soki toyoki nsango ya likambo ya kozanga bosembo oyo esalemaki mpenza, kokoba kokanisa yango ekosalisa biso mpenza? Soki tozali kolekisa ntango mingi na kolanda bansango ya ndenge wana, tokoki kokóma na mitungisi ebeleebele mpe tokolɛmba nzoto mpamba. (Mas. 24:10) Ya mabe koleka, tokoki kobosana ete Bokonzi ya Nzambe nde ekobongisa makambo nyonso.
13. Ndenge nini momeseno malamu ya kotánga Biblia mpe komayola ekoki kosalisa biso?
13 Kozala na momeseno malamu ya kotánga Biblia mpe komanyola ekoki kosalisa biso tókanga motema na makambo ya kozanga bosembo. Ndeko mwasi moko na nkombo Alia azalaki komitungisa mingi mpo na mpasi oyo bato mosusu ya mboka na bango bazalaki komona. Ezalaki komonana ete baoyo bazalaki konyokola basusu bazalaki kozwa etumbu te. Alobi boye: “Nasengelaki kofanda mpe komituna, ‘Nandimaka mpenza ete Yehova akosilisa mikakatano oyo nyonso?’ Ezalaki na ntango yango nde natángaki Yobo 34:22-29. Bavɛrsɛ yango ekundwelaki ngai ete moto moko te akoki komibomba na miso ya Yehova. Kaka ye nde azali na bosembo ya kokoka, mpe kaka ye nde akosembola makambo nyonso.” Wana tozali kozela Bokonzi ya Nzambe etya bosembo ya solosolo, tosengeli koyeba ndenge ya kokanga motema na makambo ya kozanga bosembo. Ndenge nini?
OYO TOKOKI KOSALA SIKOYO MPO NA MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO
14. Tokoki kosala nini lelo oyo mpo tópesa mabɔkɔ te na makambo ya kozanga bosembo ya mokili oyo? (Bakolose 3:10, 11)
14 Tokokoka te kopekisa basusu kosala makambo ya mabe, kasi tokoki komipekisa biso moko. Ndenge touti komona yango, tomekolaka Yesu ntango tomonisaka bolingo. Bolingo yango ekoki kotinda biso tómonisaka limemya epai ya basusu, ata mpe baoyo basalaka makambo ya kozanga bosembo. (Mat. 7:12; Rom. 12:17) Yehova asepelaka ntango tosalelaka moto nyonso makambo na boboto mpe na bosembo.—Tángá Bakolose 3:10, 11.
15. Koteya bato mateya ya Biblia ekoki kosala nini na makambo ya kozanga bosembo?
15 Likambo ya ntina mingi oyo tokoki kosala mpo na makambo ya kozanga bosembo ezali ya koyebisa basusu mateya ya Biblia. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo “boyebi ya Yehova” ekoki kosala ete moto oyo liboso azalaki na nkanza mpe mobulu akóma moto ya boboto, ya kimya mpe oyo alingaka basusu. (Yis. 11:6, 7, 9) Tózwa ndakisa ya mobali moko na nkombo Jemal, oyo liboso ayeba solo akɔtaki na etuluku ya batomboki mpo na kokweisa guvɛrnema ya ekólo na bango mpo amonaki ete ezalaki konyokola bato. Alobi boye: “Tokoki te kobongola bato na makasi. Ngai mpe babongolaki ngai na makasi te, kasi nabongwanaki mpo na mateya ya Biblia oyo nazalaki koyekola.” Makambo oyo Jemal ayekolaki etindaki ye atika kobunda. Na yango, soki toteyi bato ebele solo ya Biblia mpe babongwani, bakokitisa motángo ya baoyo basalaka makambo ya kozanga bosembo.
16. Mpo na nini osepelaka koyebisa basusu elikya ya Bokonzi ya Nzambe?
16 Lokola Yesu, tosepelaka mingi koyebisa bato ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo ya kozanga bosembo mpo na libela. Elikya yango ekoki kolendisa baoyo bazali konyokola bango. (Yir. 29:11) Stacy, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Koyekola solo esalisi ngai nakanga motema mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo namoná mpe nakutaná na yango. Yehova azali kosalela nsango ya Biblia mpo na kobɔndisa bato.” Mpo na koyebisa basusu elikya oyo Biblia epesi mpo na makambo ya kozanga bosembo, osengeli komibongisa malamu. Soki ondimi mpenza ete makanisi ya Biblia oyo totaleli na lisolo oyo ezali solo, okoyeba mpe ndenge ya kolobela likambo yango na mayele ntango ozwi libaku na eteyelo to na mosala.b
17. Ndenge nini Yehova asalisi biso tókanga motema mpo na makambo ya kozanga bosembo?
17 Toyebi ete tokokutana na makambo ya kozanga bosembo ntango nyonso oyo Satana akozala “mokonzi ya mokili oyo.” Kasi tozangi makasi te, tozangi mpe elikya te wana tozali kozela ete ‘abwakama libándá.’ (Yoa. 12:31) Na nzela ya Biblia, Yehova amonisi biso kaka te ntina oyo makambo ya kozanga bosembo etondi na mokili, kasi mpe ndenge oyo amiyokaka mpo na mpasi oyo yango ememelaka biso. (Nz. 34:17-19) Lisusu na nzela ya Mwana na ye, Yehova ateyi biso ndenge oyo tosengeli kosala mpo na makambo ya kozanga bosembo. Ateyi biso mpe ete mosika te Bokonzi na ye ekosilisa makambo ya kozanga bosembo mpo na libela. (2 Pe. 3:13) Tiká ete tókoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango na molende, wana tozali kozela na mposa makasi ntango oyo mabele ekotonda na “bosembo mpe na boyengebene.”—Yis. 9:7.
LOYEMBO 158 “Ekoleka te!”
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Talá mpe apɛndisi A pwɛ 24-27 na mwa buku Lingá bato—Kómisá bango bayekoli.