Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/11 nk. 16-17
  • Ndenge nini kotosa mibeko ya Nzambe ememelaka biso matomba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kotosa mibeko ya Nzambe ememelaka biso matomba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Zwá bomoi na motuya mpo ezali likabo ya Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nzambe azwaka bomoi na motuya—Bongo yo?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Otalelaka bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/11 nk. 16-17

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Ndenge nini kotosa mibeko ya Nzambe ememelaka biso matomba?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo okoki komituna mpe emonisi epai okoki kotánga biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kosolola mituna yango na yo.

1. Mpo na nini tosengeli kotosa Nzambe?

Ezali na ntina ete tótosa Nzambe​—ye nde akelaki biso. Ata Yesu azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe. (Yoane 6:38; Emoniseli 4:11) Mibeko ya Nzambe esalisaka biso tómonisa ete tolingaka ye.​—Tángá 1 Yoane 5:3.

Mibeko nyonso ya Yehova Nzambe ezali mpo na bolamu na biso. Eteyaka biso ndenge ya kozala na bomoi oyo eleki malamu banda sikoyo mpe elakisaka lolenge oyo tokoki kozwa bolamu ya seko na mikolo ezali koya.​—Tángá Nzembo 19:7, 11; Yisaya 48:17, 18.

2. Ndenge nini mibeko ya Nzambe esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ?

Mobeko ya Nzambe oyo epekisi kolangwa masanga ebatelaka biso na bamaladi mabe mpe makama. Komɛla mingi ekómisaka moto moombo mpe etindaka ye na etamboli ya mabe. (Masese 23:20, 29, 30) Yehova apekisi biso komɛla masanga te, kasi alingi tólekisaka ndelo te.​—Tángá Nzembo 104:15; 1 Bakorinti 6:10.

Yehova azali mpe kokebisa biso na likambo etali zuwa, nkanda makasimakasi, mpe bizaleli mosusu ya mabe. Soki tosaleli toli na ye, tokozala nzoto kolɔngɔnɔ.​—Tángá Masese 14:30; 22:24, 25.

3. Ndenge nini mobeko ya Nzambe ekoki kobatela biso?

Nzambe apekisi kosangisa nzoto na moto oyo obalani na ye te. (Baebre 13:4) Babalani oyo batosaka mobeko yango bazalaka na matata mingi te mpe babɔkɔlaka bana na bango na kimya. Nzokande, mbala mingi, ekobo ememelaka moto maladi, ebomaka libala, ememaka bitumba, kotungisama na makanisi, mpe esalaka ete moto akóma kobɔkɔla bana ye moko.​—Tángá Masese 5:1-9.

Soki tozali koboya makambo oyo ekoki kotinda biso tókwea na pite, tokobatela boninga na biso na Nzambe. Tokoboya mpe koyokisa basusu mpasi.​—Tángá 1 Batesaloniki 4:3-6.

4. Kozwa bomoi na valɛrɛ ezali na litomba nini?

Bato oyo bazwaka na valɛrɛ bomoi oyo Nzambe apesá biso bazwaka matomba mingi na nzoto soki batiki bizaleli lokola komɛla makaya mpe biloko mosusu oyo ebebisaka nzoto. (2 Bakorinti 7:1) Nzambe azwaka na valɛrɛ mingi ata mwana oyo azali kokola na libumu. (Kobima 21:22, 23) Yango wana tosengeli te koboma na nko mwana oyo abotami naino te. Lisusu, baoyo batalelaka bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango basalaka te makambo oyo ekoki kobimisa makama na mosala, na ndako, mpe na motuka. (Mibeko 22:8) Lisusu, baboyaka masano oyo ekoki kotya bomoi na likama, mpamba te bomoi ezali likabo ya Nzambe.​—Tángá Nzembo 36:9.

5. Kotalela makila ete ezali mosantu ezali na litomba nini mpo na biso?

Makila ezali mosantu mpamba te Nzambe alobaki ete makila ezali bomoi. (Ebandeli 9:3, 4) Mobeko ya Nzambe, oyo emonisi ete makila ezali na valɛrɛ moko ná bomoi, ezali mpo na bolamu na biso. Na ndenge nini? Yango esalaka ete masumu elimbisama.​—Tángá Balevi 17:11-13; Baebre 9:22.

Makila ya Yesu ezalaki mpenza na motuya mingi mpamba te azalaki moto ya kokoka. Yesu apesaki Nzambe eloko moko oyo ezalaki komonisa bomoi na ye: makila na ye. (Baebre 9:12) Makila na ye oyo esopamaki esali ete tókoka kozwa bomoi ya seko.​—Tángá Matai 26:28; Yoane 3:16.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 12 mpe 13 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto