Ndenge nini batata bakoki koyokana malamu ná bana na bango ya mibali?
“PAPA, ndenge nini oyebi makambo ebele boye?” Mwana na yo ya mobali asilá kotuna yo motuna ya ndenge wana? Na ntembe te, na ntango yango oyokaki esengo ya kozala tata. Kasi, soki mwana na yo asukaki wana te, elingi koloba ete asalelaki batoli na yo mpe azwelaki yango bolamu, na ntembe te oyokaki esengo mingi lisusu na motema.a—Masese 23:15, 24.
Kasi, ntango mwana na yo azali kokola, azali kaka komona ete oyebi makambo mingi to ezali komonana ete azali kokipe yo lisusu mpenza te? Ndenge nini okoki kobatela boyokani malamu ná mwana na yo ntango azali kokola? Ya liboso, tótalela naino mwa mikakatano oyo batata bakutanaka na yango.
Mikakatano misato oyo emonanaka mingi
1. KOZANGA NTANGO: Na mikili mingi, batata nde basalaka mpo na koleisa libota. Mbala mingi, mosala na bango esɛngaka ete bázala na ndako te mokolo mobimba. Na bisika mosusu, batata balekisaka ntango moke mpenza ná bana na bango. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na France emonisi ete na ekólo yango, batata balekisaka miniti ata 12 te na mokolo elongo na bana na bango.
LIKAMBO YA KOTALELA: Ntango boni olekisaka ná mwana na yo? Na boumeli ya pɔsɔ moko to mibale oyo ezali koya, komá na papye ntango oyo okolekisa ná mwana na yo mokolo na mokolo. Ntango mosusu likambo oyo okomona ekokamwisa yo.
2. KOZANGA NDAKISA YA MALAMU: Bato mosusu oyo bazali batata lelo oyo balekisaki ntango mingi te ná batata na bango. Jean-Marie, oyo afandaka na France, alobi boye: “Nazalaki kokutana mpenza te na tata na ngai.” Likambo yango esalaki Jean-Marie nini? Alobi boye: “Etyá ngai na mokakatano oyo nakokaki kokanisa te. Na ndakisa, nazalaka na mokakatano ya kobɛta mpenza masolo ná bana na ngai ya mibali.” Bato mosusu, atako bayebi batata na bango malamu, kasi boyokani ya tata ná mwana ezalaka lisusu te. Philippe, mobali moko ya mbula 43, alobi boye: “Tata azalaki kolakisa te ete alingaka ngai. Yango wana, esengelaki nasala milende mingi mpo nalakisa bana na ngai ya mibali ete nalingaka bango.”
LIKAMBO YA KOTALELA: Omonaka ete boyokani oyo ozalaka na yango ná mwana na yo ya mobali ezali ndenge moko na oyo ozalaki na yango ná tata na yo? Omonaka ete olandaka bizaleli malamu to mabe ya tata na yo? Soki ezali bongo, na makambo nini?
3. KOZANGA TOLI YA MALAMU: Na mikili mosusu, bamonaka ete mosala ya koteya bana etali mpenza tata te. Luca, oyo akolá na mokili moko ya Mpoto, alobi boye: “Epai nakolá, bato bazalaki komona ete kobatela bana ezali mokumba ya basi.” Na bamboka mosusu, balendisaka batata bázala kaka bato oyo bapesaka bana disiplini. Na ndakisa, George oyo akolá na ekólo moko ya Afrika, alobi boye: “Na mboka na biso, batata basakanaka na bana te; bakanisaka ete soki bazali kosakana na bango, bana bakobanga bango lisusu te. Yango wana, nazalaka ntango nyonso na mokakatano ya kolekisa ntango ná mwana na ngai.”
LIKAMBO YA KOTALELA: Na mboka na bino, bato bamonaka ete batata basengeli kosala makambo nini? Bamonaka ete koteya bana ezali mosala ya basi? Balendisaka batata bálakisa bana na bango ete balingaka bango, to bamonaka ete ebongi te kosala bongo?
Soki ozali tata mpe ozali na mokakatano moko to mikakatano mingi oyo tolobeli, ndenge nini okoki kolonga yango? Talelá makanisi oyo.
Banda ntango mwana azali naino moke
Emonani ete bana mibali babotamaka na mposa ya komekola batata na bango. Na yango, ntango mwana na yo azali naino moke, kolisá mposa yango. Ndenge nini okoki kosala yango? Mpe ndenge nini okoki kozwa ntango oyo okoki kolekisaka elongo na ye?
Mbala nyonso oyo likoki ezali, saláká misala elongo na mwana na yo. Na ndakisa, soki ozali kosala misala na ndako, luká ete apesa yo mabɔkɔ. Pesá mwana na yo nkɔmbɔ to pau ya moke. Na ntembe te akosepela kosala elongo na yo, mpo ozali moto oyo ye amonaka ete ayebi makambo nyonso mpe alukaka kolanda ndakisa na ye! Ntango mosusu, kosala bongo ekozwa yo mwa ntango mingi mpo na kosilisa mosala; kasi ekokómisa boyokani na yo ná ye makasi, mpe ekopesa yo libaku ya koteya ye ntina ya kosala mosala. Banda kala Biblia elendisaki batata básalaka misala na bango ya mokolo na mokolo elongo na bana na bango mpe na ntango yango, básololaka na bango mpe báteyaka bango. (Kolimbola Mibeko 6:6-9) Toli yango ezali na ntina tii lelo oyo.
Longola kosala elongo na mwana na yo, zwáká mpe ntango ya kosakana elongo na ye. Kosakana elongo ezalaka kaka te mpo na kolekisa ntango malamu. Bato ya mayele bamoni ete ntango batata bazali kosakana ná bana na bango, balendisaka bana bázala na mpiko mpe bábangaka te kosala makambo ya sika.
Kosakana ná mwana na yo ezali mpe na litomba mosusu ya ntina mingi. Michel Fize, moto moko ya mayele, alobi ete: “Ezali na ntango ya masano nde mwana mobali asololaka malamu ná tata na ye.” Na ntango yango, tata akoki kolakisa mwana, na maloba mpe na misala, ete alingaka ye. Na ndenge yango, mwana mpe akoyekola ndenge oyo akoki kosala yango. André, tata moko oyo afandaka na Allemagne, alobi boye: “Ntango mwana na ngai azalaki moke, mbala mingi tozalaki kosakana elongo. Nazalaki koyamba ye, mpe ayekolaki ndenge ya kolakisa ete alingaka ngai.”
Ntango ya kokende kolala ezali mpe libaku mosusu oyo tata akoki kosalela mpo na kokolisa bolingo na ye ná mwana na ye. Mbala na mbala, tángeláká ye lisolo moko, mpe yokáká ye ntango azali koyebisa yo makambo ya esengo to ya mawa oyo akutanaki na yango. Soki ozali kosala bongo, ekozala mpasi te mpo mwana na yo asololaka na yo ata ntango azali kokola.
Kobá koluka makambo oyo yo ná ye bosepelaka na yango
Ekoki komonana ete bilenge mosusu ya mibali bakipaka te milende oyo batata na bango basalaka mpo na kosolola na bango. Soki omoni ete mwana na yo azali kokima mituna na yo, kokanisa mbala moko te ete alingi kosolola na yo te. Akoki kofungolela yo motema soki obongoli ndenge na yo ya kosolola na ye.
Jacques, tata moko oyo afandaka na France, azalaki ntango mosusu na mokakatano mpo na kosolola ná mwana na ye Jérôme. Kasi, na esika alobisa mwana na ye na makasi, abongolaki ndenge na ye ya kosala: akómaki kobɛta bale ná ye. Jacques alobi boye: “Nsima ya kobɛta bale, tozalaki kofanda na peluze mpe kopema moke. Mbala mingi, mwana na ngai azalaki kosolola na ngai malamu na ntango wana. Lokola tozalaki esika moko, mpe nakanisi ete, lokola tozalaki kaka biso mibale na ntango wana, boyokani na biso ekómaki makasi.”
Ezali boni soki mwana na yo alingaka kobɛta bale te? André azalaka na esengo soki azali kolobela ntango oyo azalaki kolekisa na kotala minzoto ná mwana na ye. André alobi boye: “Na butu, ntango mwa mopɛpɛ ya malili ezali kobɛta na libándá, tozalaki kobimisa bakiti. Na nsima, tozalaki kolata bilamba ya malili, ná bakɔpɔ ya tii na mabɔkɔ, tozalaki kotala minzoto na likoló. Tozalaki kolobela Moto oyo akelá minzoto. Tozalaki mpe kolobela makambo na biso moko. Tozalaki kobɛta masolo nyonso oyo ezalaki koyela biso.”—Yisaya 40:25, 26.
Ezali boni soki yo nde olingaka te kosala makambo mosusu oyo mwana na yo asepelaka na yango? Na ntango yango, okoki kobosana mwa moke makambo oyo esepelisaka yo. (Bafilipi 2:4) Ian, oyo afandaka na Afrika ya Sudi, alobi boye: “Nazalaki kolinga mingi masano koleka mwana na ngai ya mobali, Vaughan. Ye azalaki kolinga baaviɔ mpe ordinatɛrɛ. Yango wana, nakómaki mpe kosepela na biloko yango, nazalaki komema ye na bisika ya masano ya mpɛpɔ mpe tozalaki kosala lisano ya kokumba aviɔ na ordinatɛrɛ. Nakanisi ete lokola tozalaki kosala makambo yango elongo, Vaughan akómaki kosolola na ngai polele.”
Lendisá ye
“Papa, talá!” Mwana na yo ya moke ya mobali asilá koloba na yo bongo ntango alongaki kosala eloko moko? Soki sikoyo akómi elenge, asalaka kaka bongo? Mbala mosusu asalaka yango lisusu te. Kasi mpo akola malamu, esengeli asalaka yango.
Talá ndakisa oyo Yehova Nzambe apesaki na makambo oyo asalaki epai ya Mwana na ye. Ntango Yesu abandaki mpenza mosala na ye awa na mabele, Nzambe alobaki na miso ya bato ete alingaka ye; alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17; 5:48) Ya solo, ozali na mokumba ya kopesa mwana na yo disiplini mpe koteya ye. (Baefese 6:4) Kasi, olukaka mpe mabaku ya komonisa ete osepelaka na makambo malamu oyo alobaka to asalaka?
Bato mosusu bazalaka na mokakatano mpo na kolakisa ete basepeli na likambo moko to balingi moto moko. Ekoki kozala ete baboti na bango bazalaki mbala mingi kopamela bango na esika ya kolendisa bango. Soki ezali bongo mpo na yo, osengeli kosala molende mpo na kolendisa mwana na yo. Ndenge nini okoki kosala yango? Luca, oyo tolobelaki mwa liboso, asalaka misala mingi na ndako ná Manuel, mwana na ye ya mbula 15. Luca alobi boye: “Ntango mosusu nayebisaka Manuel abanda mosala moko ye moko mpe nakosalisa ye soki azali na mposa na ngai. Mbala mingi, asalaka makasi asala yango ye moko. Soki asali likambo moko ye moko, asepelaka mpe elendisaka ye. Soki asali yango, napesaka ye longonya. Soki asali te ndenge oyo nakanisaki, nayebisaka ye mpe ete nasepeli na milende oyo asali.”
Yo mpe okoki kolendisa mwana na yo soki ozali kosalisa ye amityela mikano na bomoi na ye. Kasi, okosala nini soki ozali komona ete mwana na yo azali kokokisa mikano na ye noki te? To mpe soki mikano na ye, atako ezali mabe te, ezali te oyo yo okokaki kopona mpo na ye? Na ntango yango, okoki kotalela lisusu makanisi na yo. Jacques, oyo tolobelaki mwa liboso, alobi boye: “Nalukaka kosalisa mwana na ngai amityela mikano oyo akokoka. Kasi, nalingaka mpe ezala nde mikano na ye, kasi te oyo ya ngai. Na nsima, nabosanaka te ete asengeli kokokisa yango na makoki na ye.” Soki ozali koyoka makanisi ya mwana na yo, ozali kopesa ye longonya na makambo ya malamu, mpe ozali kolendisa ye alonga bolɛmbu na ye, okosalisa ye akokisa mikano na ye.
Ya solo, mikakatano ekozanga te kati na yo ná mwana na yo. Kasi, nsukansuka, mwana na yo akolinga kozala penepene na yo. Kutu, nani oyo akolinga te kozala penepene ya moto oyo asalisaka ye alonga?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako na lisolo oyo balobeli mingimingi boyokani ya batata ná bana na bango ya mibali, makambo oyo balobeli awa etali mpe boyokani ya batata ná bana na bango ya basi.