Mituna ya batángi . . .
Esengeli baboti báteya bana na bango makambo etali nzoto ya basi ná mibali?
▪ Baboti mingi basalaka nyonso mpo na kobatela bana na bango bázwa te bamaladi ya mabe. Baboti basengeli mpe kosala milende ndenge wana mpo na kobatela bana na bango na bizaleli ya mabe. Bakoki kosala yango na koteya bango malamu makambo etali nzoto ya basi ná mibali. (Masese 5:3-23) Mateya wana ya baboti mpe batoli na bango ezali na ntina mingi mpamba te bana bazali komona makambo mingi etali mibali mpe basi na televizyo, na Internet, na mikanda, mpe na bateyatre.
Diane Levin, oyo azali molakisi mpe mokomi ya babuku, alobi boye: “Lelo oyo, mokakatano ezali te ete bana bazali koyekola makambo etali nzoto ya basi ná mibali. Mokakatano ezali nde makambo nini bazali koyekola, na mbula nini bazali koyekola yango, mpe nani azali koteya bango yango. Bana bazali koyekola na bapiblisite mpe na balabala makambo etali nzoto ya basi ná mibali oyo ekoki na mbula na bango te mpe oyo ekoki kobebisa bango.”
Baboti basengeli kobatela bana na bango mpo báyekola te makambo ya salite mpe oyo elongobani te, oyo ezali kobebisa mokili. (Masese 5:1; Baefese 6:4) Bana basengeli koyeba ndenge oyo nzoto na bango ekolaka, ndenge oyo bakoki kobatela yango, mpe ndenge oyo bakoki komibatela mpo bato mabe bábebisa bango te. Liboso mwana mwasi akóma na mbula oyo bomwasi na ye ebandi komonana, asengeli koyeba makambo oyo ekobongwana na nzoto na ye mpe koyeba ete akobanda komona sanza. Ndenge moko mpe, mwana mobali asengeli koyeba ete mokolo mosusu, na nse ya mpɔngi, akoki kobebisa mbeto na mai ya mibali. Ntango bana bazali naino mike, baboti basengeli koteya bango binama ya nzoto. Baboti oyo balingaka bana na bango bateyaka bango makambo misato mpo na binama yango: (1) Esengeli kobombaka yango. (2) Esengeli te kolobela yango na ndenge ya masɛki. (3) Esengeli te kolakisa yango bato to kotika ete moto mosusu asimba yango. Ntango bana bapusani mwa moke, baboti basengeli koyeba ntango nini kolimbolela bango ndenge oyo mwasi akómaka na zemi.a
Ntango nini baboti basengeli kobanda koteya bana makambo yango? Liboso mpenza bákóma na mbula oyo bato mingi bakanisaka ete yango nde mbula ebongi. Mwana mwasi akoki kobanda komona sanza na mbula 10 to mpe liboso. Mwana mobali akoki komona mai ya mibali ntango akómi na mbula 11 to 12. Makambo yango ekoki kobulunganisa mwana soki ayebi te mpo na nini ezali kokómela ye. Esengeli kobongisa makanisi ya mwana liboso amona makambo yango mpe koyebisa ye akamwa te; azali nde kokola. Ezali mpe na ntango yango nde esengeli kosalisa mwana ayeba matomba mpe ntina ya kolanda mibeko ya Biblia na makambo etali kosangisa nzoto, likambo oyo elobelamaka te na kelasi ntango bateyaka makambo etali nzoto ya basi ná mibali.—Masese 6:27-35.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baboti bakoki kozwa makanisi oyo ekosalisa bango na makambo yango na mikanda oyo: Lamuká! ya Yuli–Sɛtɛmbɛ 2006, na lisolo “Lakisá mwana na yo ya mwasi makambo oyo akosala ntango akomona sanza mbala ya liboso,” nkasa 14-17; Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, mokapo 6, “Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?”; mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2010, “Sekele mpo na libota ya esengo—Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto,” nkasa 12-14. Mikanda yango nyonso ebimisami na Batatoli ya Yehova.