Tósalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba
“Moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.”—LUKA 6:40.
1. Makambo nini Yesu asalaki awa na mabele mpo na kotya moboko ya lisangá?
NA NSUKA ya Evanzile na ye, ntoma Yoane akomaki boye: “Ya solo, ezali mpe na makambo mosusu mingi oyo Yesu asalaki, oyo, soki mpenza nyonso ekomamaka mokomoko, nakanisi, mokili yango moko elingaki kokoka te barulo oyo ekomami.” (Yoa. 21:25) Yesu akokisaki makambo mingi na mosala na ye awa na mabele. Atako azalaki na ntango mingi te, alukaki mibali oyo akokaki kopesa bango formasyo mpe kobongisa bango mpo bákoba kotambwisa mosala ntango ye akozala te. Ntango azongaki na likoló na mobu 33 T.B., mwa etuluku ya bato yango ekolaki noki mpenza mpe ekómaki lisangá moko ya bankóto ya bato.—Mis. 2:41, 42; 4:4; 6:7.
2, 3. (a) Mpo na nini esengeli mpenza bandeko mibali báluka kozwa mikumba na lisangá? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Lelo oyo na mokili mobimba, bato koleka milio nsambo, na masangá koleka 100 000 bazali kosakola nsango ya Bokonzi na molende. Na yango, esengeli mibali oyo bakoki kotambwisa makambo bázala mingi. Na ndakisa, tozali na mposa makasi ya bankulutu na masangá. Tozali kopesa longonya na bandeko oyo bazali kokokisa masɛngami mpo na kozwa mokumba yango mpamba te bazali na “mposa ya mosala moko ya malamu mingi.”—1 Tim. 3:1.
3 Kasi, ezali na masɛngami oyo ndeko mobali asengeli kokokisa liboso azwa mikumba na lisangá. Moto akoki kotánga kelasi, kokutana na makambo mingi na bomoi to kozala na mayele mingi, kasi makambo yango te nde ebongisaka moto mpo azwa mokumba na lisangá. Asengeli nde kokokisa masɛngami ya Biblia. Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko mibali mpo bákokisa masɛngami? Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.” (Luka 6:40) Na lisolo oyo, tokotalela makambo mosusu oyo Yesu Kristo, Moteyi Monene, asalaki mpo na kosalisa bayekoli na ye bákokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba minene, mpe tokomona soki yango eteyi biso nini.
“Nabengi bino baninga”
4. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali mpenza moninga ya bayekoli na ye?
4 Yesu azalaki kozwa bayekoli na ye lokola baninga, kasi te lokola bato oyo bazali na nse na ye. Azalaki kolekisa ntango elongo na bango, azalaki kotyela bango motema mpe ‘koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Tata na ye.’ (Tángá Yoane 15:15.) Kanisá esengo oyo bayekoli bayokaki ntango Yesu ayanolaki motuna oyo batunaki ye ete: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3, 4) Azalaki mpe koyebisa bango makanisi mpe mayoki na ye. Na ndakisa, na butu oyo bakangaki ye, Yesu amemaki Petro, Yakobo, ná Yoane na elanga ya Getesemane, epai abondelaki mpo na likambo oyo ezalaki kotungisa motema na ye. Mbala mosusu, bantoma yango misato bayokaki te makambo oyo Yesu alobaki na libondeli, kasi na ntembe te bamonaki ete makambo ezali minene. (Mrk. 14:33-38) Kanisá mpe ndenge bayokaki, mwa mikolo liboso, ntango Yesu abongwanaki liboso na bango misato. (Mrk. 9:2-8; 2 Pe. 1:16-18) Boninga makasi oyo Yesu asalaki na bayekoli na ye epesaki bango makasi ya kokokisa mikumba minene na nsima.
5. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa basusu?
5 Ndenge moko na Yesu, bankulutu mpe basalisaka basusu mpe balingaka kozala baninga na bango. Balingaka bango mpe bamonisaka bango ete batyelaka bango mpenza likebi. Ya solo, ezali na makambo mosusu oyo bankulutu bakoki koloba te. Kasi, batyelaka bandeko na bango motema mpe bayebisaka bango makambo oyo bayekoli na Biblia. Bankulutu basengeli te komona ete mosaleli na misala oyo bango baleki ye na mbula azali na nse na bango. Kasi, bayebi nde azali ndeko oyo akoki kokoba kokola na elimo, alingaka Yehova mpe akokisaka misala ya ntina na lisangá.
“Napesi bino ndakisa”
6, 7. Ndakisa nini Yesu atikelaki bayekoli na ye, mpe ndenge nini esalisaki bango?
6 Atako bayekoli ya Yesu bazalaki kosepela mingi na makambo ya elimo, na bantango mosusu makanisi na bango ezalaki kolanda mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango. (Mat. 19:9, 10; Luka 9:46-48; Yoa. 4:27) Atako bongo, Yesu agangelaki bango te, mpe asilikelaki bango te. Azalaki te kosɛnga bango makambo oyo elekaki bango motó to kotinda bango básala likambo oyo ye moko asalaki te. Kasi, Yesu ateyaki bango na ndakisa na ye.—Tángá Yoane 13:15.
7 Ndakisa nini Yesu atikelaki bayekoli na ye? (1 Pe. 2:21) Yesu aponaki kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpo akoka komipesa mingi na kosalela basusu. (Luka 9:58) Yesu azalaki na komikitisa mpe azalaki koteya bato kaka makambo oyo euti na Makomami. (Yoa. 5:19; 17:14, 17) Azalaki na boboto mpe bato bazalaki kobanga te kopusana epai na ye. Makambo nyonso oyo azalaki kosala emonisaki ete alingaka bato. (Mat. 19:13-15; Yoa. 15:12) Ndakisa ya Yesu esalisaki bantoma na ye. Na ndakisa, Yakobo azalaki na mpiko mpe asalelaki Nzambe na bosembo tii ntango babomaki ye. (Mis. 12:1, 2) Yoane alandaki ndakisa ya Yesu, mpe atikalaki sembo mbula koleka 60.—Em. 1:1, 2, 9.
8. Ndenge nini bankulutu bakoki kozala ndakisa mpo na bilenge mibali mpe bato mosusu?
8 Bankulutu bakoki kopesa bandeko mibali oyo bazali bilenge ndakisa ya malamu soki bazali kotya matomba ya basusu na esika ya liboso, bazali na komikitisa, mpe bazali kolinga basusu. (1 Pe. 5:2, 3) Bankulutu bazalaka mpe na esengo ya kopesa ndakisa ya malamu mpo bandeko mosusu bámekola kondima na bango, lolenge na bango ya koteya, bomoi na bango ya bokristo, mpe lolenge na bango ya kosakola.—Ebr. 13:7.
‘Apesaki bango mitindo mpe atindaki bango’
9. Ndenge nini toyebi ete Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mpo na mosala ya kosakola?
9 Nsima ya kosakola na molende mbula soki mibale, Yesu atindaki mpe bantoma na ye 12 bákende kosakola. Kasi, liboso atinda bango, apesaki bango malako. (Mat. 10:5-14) Mokolo mosusu, liboso aleisa ebele ya bato na ndenge ya likamwisi, ayebisaki bayekoli na ye ndenge oyo basengeli kofandisa bato mpe kokabola bilei. (Luka 9:12-17) Na yango, tomoni mpenza ete Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo na ndenge azalaki kopesa bango malako ya polele mpe ya sikisiki. Formasyo wana oyo bazwaki mpe lisungi ya elimo santu esalisaki bantoma na nsima báyeba kotambwisa mosala monene ya kosakola oyo ebandaki na mobu 33 T.B.
10, 11. Ndenge nini kopesa bato ya sika formasyo mokemoke?
10 Lelo oyo, tobandaka kopesa moto formasyo ntango andimi koyekola Biblia. Ekoki kosɛnga tósalisa ye ayeba kotánga malamu. Lisalisi na biso ekokoba na makambo mosusu wana tozali koyekola na ye Biblia. Ntango abandi koyangana na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ, tokolakisa ye oyo asengeli kosala mpo abanda kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, akóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, mpe bongo na bongo. Nsima ya kozwa batisimo, tokoki kolakisa ye makambo lokola kosalisa na kobongisa Ndako ya Bokonzi. Nsima ya mikolo, bankulutu bakoki kosalisa ye ayeba masɛngami oyo asengeli kokokisa mpo akóma mosaleli na misala.
11 Ntango bankulutu bapesi ndeko mobali oyo azwi batisimo mokumba moko, balimbwelaka ye malako oyo etali mokumba yango mpe balakisaka ye ndenge oyo akoki kokokisa yango malamu. Ndeko mobali oyo azali kozwa formasyo asengeli kokanga ntina ya likambo oyo basɛngi ye asala. Soki azali kokoka kosala yango te, bankulutu basengeli koloba na mbala moko te ete abongi te. Kasi, bankulutu basengeli nde kolimbwela ye lisusu na boboto bisika oyo asengeli kobongisa, likambo oyo basɛngi ye asala, mpe ndenge ya kosala yango. Bankulutu basepelaka mingi ntango bamoni ete ndeko mobali azali kondima formasyo oyo azali kozwa mpo bayebi ete kosalela bandeko na lisangá ekopesa ye esengo mingi.—Mis. 20:35.
“Oyo azali koyoka toli azali moto ya bwanya”
12. Mpo na nini batoli ya Yesu ezalaki kosalisa mingi?
12 Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo na ndenge azalaki mpe kopesa bango batoli oyo basengeli na yango, na ntango oyo ebongi. Na ndakisa, apamelaki Yakobo ná Yoane mpo balingaki ete mɔtɔ euta na likoló mpe ekitela bato ya mboka moko ya Basamaria oyo baboyaki koyamba bango. (Luka 9:52-55) Mokolo mosusu, mama ya Yakobo ná Yoane apusanaki pene na Yesu mpo na kosɛnga ye atya bana na ye wana mibale na bisika ya lokumu na Bokonzi na ye. Kasi, lokola Yesu ayebaki ete Yakobo ná Yoane nde balingaki bongo, alobaki na bango polele ete: “Kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, ezali nde esika ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.” (Mat. 20:20-23) Yesu azalaki ntango nyonso kopesa batoli ya polele, ya malamu, mpe oyo eyokani mpenza na Liloba ya Nzambe. Ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kokanisa na kolanda Liloba ya Nzambe. (Mat. 17:24-27) Yesu ayebaki mpe ete bayekoli na ye bazali bato ya kozanga kokoka mpe ete ezali na makambo mosusu oyo bakokoka kosala te. Azalaki kopesa bango batoli mpo azalaki mpenza kolinga bango.—Yoa. 13:1.
13, 14. (a) Banani bazalaka na mposa ya toli? (b) Pesá ndakisa ya toli oyo nkulutu moko akoki kopesa ndeko oyo azali kokola na elimo te.
13 Ndeko mobali nyonso oyo alingi kosalela bandeko ya lisangá akozala na mposa ya batoli ya Biblia mbala na mbala. Masese 12:15 elobi boye: “Ye oyo azali koyoka toli azali moto ya bwanya.” Ndeko mobali moko oyo azali elenge alobi boye: “Mokakatano monene oyo nazalaki na yango ezali ete nazalaki komitungisa mingi mpo na bolɛmbu na ngai. Kasi toli oyo nkulutu moko apesaki ngai esalisaki ngai natalela yango na ndenge ebongi.”
14 Soki bankulutu bamoni ete etamboli ya ndeko moko ezali kopekisa ye akola na elimo, balukaka kosembola ndeko yango na elimo ya boboto. (Gal. 6:1) Ntango mosusu esɛngaka kopesa ndeko toli mpo na ezaleli moko boye oyo azali na yango. Na ndakisa, soki nkulutu moko amoni ete ndeko mobali moko azali komipesa mingi te na mosala ya kosakola, akoki komonisa ndeko yango ete Yesu azalaki kosakola nsango malamu na molende, mpe apesaki bayekoli na ye mokumba ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Luka 8:1) Ntango emonani ete ndeko mobali moko azali koluka bokonzi, nkulutu moko akoki komonisa ye ndenge Yesu asalisaki bayekoli na Ye báyeba makama ya koluka komitombola. (Luka 22:24-27) Bongo soki ndeko mobali moko azalaka na mokakatano ya kolimbisa bato? Bankulutu bakoki kosalela lisese ya moombo oyo aboyaki kolimbisa moninga nyongo moko moke atako balimbisaki ye nyongo moko monene. (Mat. 18:21-35) Soki bankulutu bamoni ete esengeli kopesa ndeko moko toli, ekozala malamu bápesa yango kozanga koumela.—Tángá Masese 27:9.
“Salá makasi”
15. Ndenge nini libota ya ndeko mobali ekoki kosalisa ye mpo akokisa mikumba na lisangá?
15 Bankulutu basalaka milende mpo na kosalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba, kasi bandeko mosusu mpe bakoki kosalisa. Na ndakisa, libota ya moto ekoki kosalisa ye mpo azwa mikumba. Mpe soki ndeko yango azalaka nkulutu, mwasi na ye mpe bana na ye bakoki kosalisa ye amipesa na makambo ya lisangá. Bayebi ete asengeli kopesa mwa ntango mpe makasi na ye mpo na basusu. Ayokaka esengo ntango libota na ye endimi komipimela makambo mosusu mpo ye akoka kokokisa malamu mikumba na ye na lisangá. Tozali na botɔndi mingi mpo na ezaleli ya komipimela oyo mabota ya bankulutu bamonisaka.—Mas. 15:20; 31:10, 23.
16. (a) Nani asengeli komonisa ete azali na mposa ya kosalela basusu? (b) Ndeko mobali asengeli kosala nini mpo azwa mikumba na lisangá?
16 Atako basusu bakoki kosalisa ye, ndeko mobali ye moko asengeli komonisa ete azali na mposa ya kosalela basusu. (Tángá Bagalatia 6:5.) Ya solo, esɛngi kaka te ete ndeko mobali azala mosaleli na misala to nkulutu mpo asalisa basusu mpe amipesa na mosala ya kosakola. Kasi, mpo akóma mosaleli na misala to nkulutu asengeli liboso kosala makasi akokisa masɛngami oyo ezali na Biblia. (1 Tim. 3:1-13; Tito 1:5-9; 1 Pe. 5:1-3) Na yango, soki ndeko mobali alingi kokóma mosaleli na misala to nkulutu kasi azwi naino mokumba yango te, asengeli kotya likebi na bisika oyo asengeli kobongisa. Mpo na yango, asengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo, komipesa na koyekola ye moko, komanyola, kobondela na motema mobimba, mpe komipesa na mosala ya kosakola. Soki asali bongo, ekomonisa ete azali kolanda toli ya Paulo epai ya Timote ete: “Salá makasi okóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.”—1 Tim. 4:7.
17, 18. Ndeko mobali oyo azali komona ete akokoka makambo te, to ete azali na mposa ya kosala te, akoki kosala nini?
17 Bongo soki ndeko azali koluka kozwa mikumba te mpo azali komona ete akokoka makambo te? Ekozala malamu akanisa makambo nyonso oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo basalelaka biso. Ya solo, Yehova “amemaka mokumba na biso.” (Nz. 68:19) Na yango, Tata na biso ya likoló akoki kosalisa ndeko mobali andima kozwa mikumba na lisangá. Soki ndeko mobali azali mosaleli na misala to nkulutu te, ekozala mpe malamu abosana te ete ebongiseli ya Yehova ezali na mposa makasi ete mibali oyo bakɔmɛli bándima mikumba na lisangá. Kokanisa makambo wana ekoki kosalisa ndeko mobali yango atika komona ete akokoka makambo te. Akoki kobondela Nzambe mpo na kosɛnga elimo santu mpo mbuma na yango ezali na bizaleli lokola kimya mpe komipekisa, bizaleli oyo esalisaka moto atika komitungisa mpe komona ete akokoka makambo te. (Luka 11:13; Gal. 5:22, 23) Akoki kondima ete Yehova apambolaka bandeko mibali nyonso oyo bazali koluka kozwa mikumba na lisangá na makanisi ya malamu.
18 Mbala mosusu ndeko mobali oyo azwá batisimo azali koluka kozwa mikumba te mpo azali na mposa ya kosalela basusu te. Nini ekoki kosala ndeko ya ndenge wana? Ntoma Paulo akomaki boye: “Ndenge [Nzambe] asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” (Flp. 2:13) Mposa ya kosala eutaka epai ya Nzambe, mpe elimo ya Yehova ekoki kolendisa moto mpo asala mosala mosantu. (Flp. 4:13) Longola yango, mokristo akoki kobondela Nzambe asalisa ye alinga kosala oyo ezali malamu.—Nz. 25:4, 5.
19. Elaka oyo Yehova apesaki ya kobimisa “babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe” emonisi nini?
19 Yehova apambolaka milende ya bankulutu oyo bapesaka basusu formasyo. Apambolaka mpe bandeko oyo bandimaka formasyo yango mpe balukaka kozwa mikumba na lisangá. Biblia emonisi ete Yehova akobimisa “babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe,” elingi koloba mibali oyo bakoki na kati ya basaleli ya Nzambe, mpo bátambwisa makambo na ebongiseli na ye. (Mika 5:5) Lelo oyo, bandeko mibali ebele bazali kozwa formasyo mpe bazali koluka kozwa mikumba na lisangá na komikitisa nyonso. Yango ezali kokumisa Yehova mpe komemela biso mapamboli!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye mpo bázwa mikumba minene?
• Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Yesu ntango bazali kosalisa bandeko mibali na lisangá mpo bázwa mikumba?
• Ndenge nini libota ya ndeko mobali ekoki kosalisa ye mpo azwa mikumba na lisangá?
• Ndeko mobali ye moko akoki kosala nini mpo azwa mikumba?
[Bililingi na lokasa 31]
Formasyo nini okoki kopesa moto oyo oyekolaka na ye Biblia ntango azali koluka kokende liboso na elimo?
[Elilingi na lokasa 32]
Ndenge nini bandeko mibali bakoki komonisa ete bazali koluka kozwa mikumba?