Nani akoki kolimbola bisakweli?
Balobaka ete na ntango ya Alezandre Monene, kofungola lizita ya Gordius ezalaki moko na makambo oyo elekaki mpasi. Soki moto alongi kofungola yango, basengelaki kobenga ye moto ya bwanya mingi mpe alingaki kosala likambo moko ya monene mpenza.a Balobaka ete Alezandre apapaki lizita yango mopanga mbala moko mpe efungwamaki.
NA NTANGO ya kala, bato ya bwanya bazalaki koluka, kaka te ndenge ya kofungola mazita ya ndenge wana, kasi mpe kolimbola basambole, bisakweli, ata mpe kosakola makambo oyo ekoya.
Kasi, mbala mingi bato yango bazalaki kokoka kosala makambo yango te. Na ndakisa, bato ya bwanya ya Babilone balongaki te kolimbola makomi oyo ebimaki na ndenge ya likamwisi na efelo ya ndako ya Mokonzi Beleshazare, na mokolo oyo bazalaki kosala fɛti moko monene. Kaka Danyele, mosakoli ya Yehova Nzambe nde alongaki kolimbola maloba yango. Danyele ayebanaki lokola moto oyo ayebi “kofungola mazita.” (Danyele 5:12) Esakweli yango, oyo eyebisaki kokwea ya Babilone, ekokisamaki kaka na butu wana.—Danyele 5:1, 4-8, 25-30.
Esakweli ezali nini?
Esakweli ezali likambo oyo eyebisami liboso esalema. Esakweli ya solo ezali nsango oyo eyebisami na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpo na komonisa mokano na ye; ekoki kozala ete elobami to ekomami. Biblia ezali na bisakweli oyo elobeli Masiya mpe komonana na ye, oyo elobeli “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” mpe oyo elobeli bitumbu ya Nzambe.—Matai 24:3; Danyele 9:25.
“Bato ya bwanya” ya ntango na biso, elingi koloba bato ya siansi, bato ya mayele na makambo ya nkita, minganga, bato ya politiki, mpe ya makambo mosusu ndenge na ndenge, bazali komeka koyebisa makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Atako bapanzi-nsango balobelaka mingi makambo yango mpe bato mingi bandimaka yango, ezali kaka makanisi oyo bazwaka nsima ya kotalela makambo ndenge na ndenge. Longola yango, ntango moto moko amonisi makanisi na ye, tozangaka te koyoka moto mosusu oyo akoloba makanisi oyo ekeseni na yango. Koyebisa makambo oyo ekoya ezali mosala ya mpasi mingi mpo makambo ekoki kosalema ndenge mosusu.
Bisakweli ya solo eutaka epai ya nani?
Kasi, nani ayebisaka bisakweli ya solo, mpe nani akoki kolimbola yango? Ntoma Petro akomaki boye: “Esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto.” (2 Petro 1:20) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ndimbola” elakisi “eyano”; ezali kopesa likanisi ete “likambo oyo eyebani to efungwami, ekangamaki liboso.” Yango wana, libongoli moko ebongoli maloba ya Petro boye: “Esakweli moko te ya Likomami ezali [likambo] oyo moto ye moko . . . afungoli.”
Tózwa ndakisa ya moto ya masuwa oyo azali kosala lizita moko ya mindɔndɔ. Soki asilisi, moto oyo ayebi kosala yango te akoki komona ndenge bansinga ekɔtikɔti mpe ebimi na lizita, kasi akoyeba kofungola yango te. Ndenge moko mpe, bato bakoki komona ndenge makambo ya mikolo oyo ezali kokende, kasi bakoki te koyeba to kososola mikakatano nini ekobima to ndenge nini ekosuka na mikolo ekoya.
Basakoli ya Nzambe na ntango ya kala, na ndakisa Danyele, bazalaki te koyekola makambo ya ntango na bango mpe koluka kolimbola ndenge oyo ekosuka mpe koyebisa yango na bisakweli. Soki basalaki bongo, bisakweli wana elingaki kouta na makanisi na bango moko. Elingaki kozala bisakweli oyo euti na makanisi ya bato oyo bazangi kokoka. Nzokande, Petro abakisaki boye: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”—2 Petro 1:21.
“Nzambe nde alimbolaka makambo”
Eleki sikoyo mbula soki 3 700, mibali mibale bazalaki na bolɔkɔ na mokili ya Ezipito. Mokomoko na bango alɔtaki ndɔtɔ oyo etungisaki ye. Lokola bakokaki te kokutana na bato ya mayele ya Ezipito, bayebisaki likambo yango epai ya Yozefe, oyo azalaki ná bango na bolɔkɔ; balobaki na ye boye: “Tolɔti ndɔtɔ, mpe moto ya kolimbolela biso yango azali te.” Mosaleli yango ya Nzambe asɛngaki bango báyebisa ye bandɔtɔ na bango mpe abakisaki ete: “Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?” (Ebandeli 40:8) Kaka Yehova Nzambe nde akoki kolimbola bisakweli, ndenge oyo moto ya masuwa oyo ayebi mosala malamu akoki kofungola mazita oyo ekangami na ndenge ya mindɔndɔ. Kutu, ye nde ayebisaki (to akangaki) bisakweli yango. Yango wana, esengeli tóluka lisalisi na ye mpo na kolimbola bisakweli yango. Yozefe alobaki solo ete Nzambe nde alimbolaka makambo.
Kasi, na ndenge nini “Nzambe nde alimbolaka makambo”? Tokoki koloba bongo mpo na ntina mingi. Ntango bisakweli mosusu ya Biblia ekomamaki, eyebisaki mpe ndenge oyo ekokokisama. Na yango, ezali mpasi te mpo na koyeba ndimbola na yango, kaka ndenge moto ya masuwa akoki kolimbola na kozanga mpasi ndenge ya kofungola mazita mosusu.—Ebandeli 18:14; 21:2.
Tokoki koyeba ndimbola ya bisakweli mosusu soki totaleli lisolo mobimba oyo elobeli yango. Mosakoli Danyele amonaki na emonaneli “ntaba moko ya mobali oyo etondi na nsuki” oyo “ezalaki na liseke moko oyo ezalaki komonana polele na katikati ya miso na yango”; ntaba yango ekweisaki ‘mpate-mobali oyo ezalaki na maseke mibale.’ Lisolo emonisi ete mpate-mobali oyo ezalaki na maseke mibale elakisi “bakonzi ya Media mpe ya Perse” mpe ntaba-mobali elakisi “mokonzi ya Grɛsi.” (Danyele 8:3-8, 20-22) Mbula koleka 200 na nsima, Alezandre Monene, oyo amonisami na “liseke monene,” abandaki kobundisa ekólo Perse. Josèphe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala alobaki ete ntango Alezandre azalaki kobunda bitumba na bamboka oyo ezali pembeni ya Yerusaleme, balakisaki ye esakweli yango mpe andimaki ete elobeli ye.
Ezali mpe na ndimbola mosusu oyo tokoki koloba ete “Nzambe nde alimbolaka makambo.” Elimo santu esalisaki Yozefe, mosaleli moko ya sembo ya Yehova Nzambe, alimbola bandɔtɔ ya kokamwa oyo baninga na ye ya bolɔkɔ bayebisaki ye. (Ebandeli 41:38) Lelo oyo, ntango basaleli ya Nzambe bayebi naino te ndimbola ya esakweli moko boye, babondelaka Nzambe mpo na kosɛnga elimo na ye mpe bakobaka koyekola mpe balukalukaka na molende na kati ya Liloba ya Nzambe. Na litambwisi ya Nzambe, bakoki komona bavɛrsɛ oyo ekosalisa bango báyeba ndimbola ya bisakweli mosusu. Ndimbola ya bisakweli eyaka te na ndenge ya likamwisi epai ya bato moko boye. Nzambe nde alimbolaka makambo, mpamba te bisakweli ekómaka polele na lisalisi ya elimo mpe ya Liloba na ye. Ndimbola yango epesamaka na kolanda makambo oyo Biblia elobi, kasi te na kolanda makanisi ya bato oyo bayebisaka makambo oyo ekoya.—Misala 15:12-21.
Tokoki lisusu koloba ete “Nzambe nde alimbolaka makambo” mpamba te ye nde aponaka mpe alakisaka ntango oyo basaleli na ye awa na mabele bakoki koyeba ndimbola ya esakweli moko. Ndimbola ya esakweli moko ekoki koyebana liboso ekokisama, to na ntango oyo ezali kokokisama, to mpe na nsima. Lokola Nzambe nde akangaki bisakweli, ye nde afungolaka yango na ntango oyo ebongi to oyo ye moko aponi.
Yozefe alimbolaki bandɔtɔ ya bato mibale oyo bazalaki ná ye na bolɔkɔ mikolo misato liboso ekokisama. (Ebandeli 40:13, 19) Na nsima, ntango bamemaki Yozefe liboso ya Farao mpo alimbola bandɔtɔ na ye, etikalaki moke mbula nsambo oyo biloko esengelaki kozala mingi ebanda. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yozefe alimbwelaki Farao bandɔtɔ na ye mpo bázwa bibongiseli mpo na kobomba ebele ya mbuma oyo basengelaki kobuka.—Ebandeli 41:29, 39, 40.
Basaleli ya Nzambe bayebaka malamumalamu ndimbola ya bisakweli mosusu kaka nsima ya kokokisama na yango. Makambo mingi ya bomoi ya Yesu esakolamaki bambula mingi liboso ete abotama, kasi bayekoli na ye bakangaki ntina ya likambo yango kaka nsima ya lisekwa na ye. (Nzembo 22:18; 34:20; Yoane 19:24, 36) Lisusu, na kolanda Danyele 12:4, bisakweli mosusu esengelaki ‘kokangama’ “tii na ntango ya nsuka,” ntango oyo Danyele alobaki ete “boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” Tozali sikoyo na ntango yango mpe bisakweli wana ezali kokokisama.b
Ndenge oyo osengeli kotalela bisakweli ya Biblia
Yozefe mpe Danyele batɛlɛmaki liboso ya bakonzi ya ntango na bango mpe bayebisaki bango bisakweli oyo etalelaki bikólo mpe biyangeli. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso batɛlɛmaki liboso ya bato ya ntango na bango mpe bazalaki balobeli ya Yehova, Nzambe ya bisakweli, mpe basalisaki mpenza bato oyo bayokaki nsango na bango.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali koyebisa bato nsango oyo ezali esakweli; bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe koyebisa bato ete esakweli ya Yehova oyo elobeli “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” ezali kokokisama sikoyo. (Matai 24:3, 14) Oyebi esakweli yango mpe ndenge oyo etaleli yo? Batatoli ya Yehova bakosepela mingi kosalisa yo oyeba ndimbola ya esakweli wana monene ya Biblia mpe ozwela yango matomba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisapo moko ya Bagrɛki elobaka ete Gordius, moto oyo abandisaki Gordium, engumba-mokonzi ya etúká ya Frigia, akangisaki likalo na ye na likonzí, mpe asalaki lizita moko oyo ezalaki mpasi mpo na kofungola yango, mpe moto oyo akokaki kofungola yango, asengelaki kokóma mokonzi ya Azia.
b Talá masolo oyo elobeli “Bisakweli 6 ya Biblia oyo ozali komona kokokisama na yango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2011.
[Bililingi na nkasa 12, 13]
Yozefe mpe Danyele bamonisaki ete Nzambe nde asalisaki bango bálimbola bisakweli