Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/12 nk. 27-29
  • Nalingaki kozala lokola mwana mwasi ya Yefeta

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalingaki kozala lokola mwana mwasi ya Yefeta
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota na biso
  • Miso na ngai efungwami
  • Yehova akambaki ngai mpenza
  • “Tozalaka biso moko te”
  • “Kobá kokolisa mayele na yo”
  • “Okobala te?”
  • Likabo ya Yehova
  • Nzambe alingaki ye, baninga na ye mpe balingaki ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Asepelisaki tata na ye mpe Yehova
    Teyá bana na yo
  • Nzambe andimaka moto oyo azali sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Elaka ya Yefeta
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/12 nk. 27-29

Nalingaki kozala lokola mwana mwasi ya Yefeta

Lisolo ya Joanna Soans

Ntango nazalaki naino elenge, nakolisaki mposa makasi ya kozala lokola mwana mwasi ya Yefeta. Tiká nayebisa bino makanisi oyo nazalaki na yango mpe ndenge oyo nakómaki lokola mwana mwasi yango.

NA 1956, nakendaki mpo na mbala ya liboso na liyangani ya Batatoli ya Yehova na Bombay (lelo oyo Mumbai), na ekólo Inde, mpe yango ebongolaki bomoi na ngai. Diskur moko oyo elobelaki mwana mwasi ya Yefeta, esimbaki mpenza motema na ngai.

Mbala mosusu oyebi lisolo ya mwana mwasi ya Yefeta na Biblia, oyo ntango mosusu azalaki naino elenge ntango azwaki ekateli ya kobala te. Yango esalisaki Tata na ye akokisa ndai oyo alapaki. Yango wana atikalaki monzemba bomoi na ye mobimba mpe azalaki kosala na ndako ya Yehova to tabernakle.​—Basambisi 11:28-40.

Nazalaki mpenza na mposa ya kozala lokola ye! Kasi, yango ezalaki pɛtɛɛ te mpamba te na ntango wana, bato bazalaki na momeseno te ya kotikala monzemba na Inde.

Libota na biso

Baboti na biso, Benjamin Soans ná Marcelina, babotá biso bana motoba; ngai nazali mwana ya mitano. Tozalaki kofanda na engumba Udipi, na wɛsti ya Inde. Monɔkɔ ya mboka na biso ezali Tulu, oyo bato soki milio mibale balobaka. Kasi, na kelasi tozalaki kotánga na monɔkɔ ya Kannada, oyo bato mingi ya engumba Udipi balobaka.

Na mboka yango, bamonaka ete ezali na ntina mingi ete moto abala mpe abota. Ntango nazalaki kokola, natikalaki koyoka te moto aloba ete “nakobala te,” to “nazali kaka ngai moko,” to “nazali koyoka mposa ya bandeko na ngai.” Ezali lokola nde makambo wana ezalaki te. Na ndakisa, tozalaki kofanda ndako moko ná baboti ya tata, baboti ya mama, bandeko ya mama, bandeko ya tata, mpe bana na bango.

Na mboka na biso, bana batángamaka na libota ya mama mpe na kati ya libota, bana ya basi nde bazwaka libula (héritage) ya libota. Na mabota mosusu, mwana mwasi akokaki kofanda epai ya mama na ye ata nsima ya kobala; mobali nde asengelaki kokende kofanda na ye epai ya babokilo.

Lokola na libota na biso tokómaki kosambela na mangomba ya bokristo, mwa makambo mosusu ebongwanaki. Mpokwa nyonso, nkɔkɔ ya mobali azalaki kosangisa libota mobimba mpe azalaki kobondela mpe kotángela biso Biblia ya monɔkɔ ya Tulu, na mongongo makasi. Mbala nyonso oyo azalaki kofungola Biblia na ye oyo ebebábebá mpo na kotángela biso, ezalaki lokola nde azali kofungola kɛsi moko oyo ezali na babiju. Tozalaki kosepela mpenza! Nazalaki komituna soki maloba ya Nzembo 23:1 elimboli mpenza nini; vɛrsɛ yango elobi boye: “Yehova azali Mobateli [ya mpate mpo] na ngai. Nakozanga eloko te.” Nazalaki komituna soki ‘Yehova yango azali nani, mpe mpo na nini babengi ye mobateli ya mpate.’

Miso na ngai efungwami

Lokola nkita ebebaki makasi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tokendaki kofanda na Bombay, na kilomɛtrɛ koleka 900 longwa na Udipi. Kuna, na 1945, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala tata mpe bapesaki ye mwa buku moko oyo elimbolaka Biblia. Tata atángaki mpenza mwa buku yango mpe andimaki makambo na yango, abandaki koyebisa yango epai ya bato mosusu oyo balobaka monɔkɔ ya Kannada. Na ebandeli ya bambula 1950, mwa etuluku ya bayekoli ekolaki mpe ekómaki lisangá ya liboso ya monɔkɔ ya Kannada na engumba Bombay.

Tata ná mama bateyaki biso kozala bayekoli ya molende ya Biblia mpe bateyi ya malamu. Bazalaki kozwa ntango mokolo na mokolo mpo na kosambela mpe koyekola ná biso. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7; 2 Timote 3:14-16) Mokolo moko, ntango nazalaki kotánga Biblia, namonaki lokola miso na ngai efungwami. Nayekolaki ete bakokanisi Yehova na mobateli ya mpate mpo akambaka, aleisaka mpe abatelaka basambeli na ye.​—Nzembo 23:1-6; 83:18.

Yehova akambaki ngai mpenza

Nazwaki batisimo mwa moke nsima ya liyangani moko oyo esalemaki na engumba Bombay na 1956. Sanza motoba na nsima, nalandaki ndakisa ya yaya na ngai ya mobali mpe nakómaki mobongisi-nzela ya ntango nyonso, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakolaka mingi. Atako nazalaki na mposa ya koyebisa basusu solo ya Biblia, soki kaka nalingi nabanda koloba yango, nsɔmɔ ezalaki kokanga ngai. Nazalaki kokakatana na maloba lokola moto ya likukuma mpe mongongo na ngai ezalaki kolɛnga. Nazalaki koloba ete ‘nakokoka kosala mosala oyo kaka soki Yehova asalisi ngai!’

Yehova asalisaki ngai na nzela ya Homer ná Ruth McKay, bamisionɛrɛ oyo bautaki Canada; na 1947, bandeko yango bakɔtaki eteyelo ya Batatoli ya Yehova oyo epesaka formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ; ezalaki na New York, na États-Unis. Balendisaki ngai mingi mpenza mpo nalonga mikakatano oyo nazalaki na yango na ebandeli ya mosala yango. Ruth azalaki mbala na mbala kolakisa ngai ndenge ya kopesa litatoli ya ndako na ndako. Ayebaki mpenza ndenge ya kokitisa ngai motema. Azalaki kosimba ngai na lobɔkɔ mpe azalaki koloba na ngai boye: “Kobanga te, moninga. Tómeka lisusu na ndako oyo elandi.” Ndenge oyo azalaki koloba ezalaki kopesa ngai makasi.

Mokolo moko, bayebisaki ngai ete nakosala mosala ya mobongisi-nzela ná Elizabeth Chakranarayan, ndeko mwasi moko ya mokóló, oyo ayebaki koteya Biblia malamu. Liboso nakanisaki boye: ‘Nakokoka mpenza kofanda ná ndeko mwasi yango? Azali mokóló na ngai ya mosika!’ Kasi, na nsima namonaki ete azalaki mpenza moninga ya mosala oyo abongaki na ngai.

“Tozalaka biso moko te”

Mboka ya liboso oyo batindaki biso ezalaki Aurangabad, na kilomɛtrɛ 400 na ɛsti ya Bombay. Toumelaki te koyeba ete tozalaki kaka biso mibale Batatoli na engumba yango ya bato pene na milio moko. Longola yango, nasengelaki koyekola monɔkɔ ya Marathi, monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na engumba yango.

Na bantango mosusu, nazalaki koyoka mawa ete bandeko na ngai batikalaki mosika. Ntango nafandi ngai moko lokola mwana etike, nazalaki kolela. Kasi, ndenge Elizabeth azalaki koloba na ngai ndenge mama alobaka na mwana, ezalaki kolendisa ngai. Azalaki koloba boye: “Ntango mosusu tokoki komiyoka ete tozali biso moko, kasi tozalaka biso moko te. Atako ozali mosika na libota mpe baninga na yo, Yehova azalaka na yo ntango nyonso. Komisá ye moninga na yo, mpe okomona mbala moko ete makanisi wana ekosila.” Nabatelaka toli na ye tii lelo oyo.

Soki tozali na mbongo ya transport te, tozalaki kotambola na makolo mokolo mobimba, mbala mosusu kilomɛtrɛ 20 na putulu mpe pɔtɔpɔtɔ, na nse ya moi makasi to na malili. Na eleko ya molunge, mbala mingi thermomètre ezalaki komata tii na 40. Na eleko ya bambula makasi, bakartye mingi ezalaki kokóma na pɔtɔpɔtɔ na boumeli ya basanza mingi. Kasi, mbala mingi tozalaki komona ete mimeseno ya bato ezalaki mokakatano makasi koleka kutu makambo oyo nauti kotánga.

Mwasi akokaki kosolola na mobali te na esika oyo bato bazali ebele, longola kaka soki azali ndeko na ye, mpe basi bazalaki koteya mibali te. Mbala mingi bazalaki kosɛka mpe kotyola biso. Na basanza motoba ya liboso, tozalaki kosala makita kaka biso mibale. Na nsima, bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu bakómaki koyangana ná biso. Mwa moke na nsima, tokómaki mwa etuluku. Bato mosusu kutu bakómaki kobima na biso na mosala ya kosakola.

“Kobá kokolisa mayele na yo”

Nsima ya mbula mibale na ndambo, batindaki biso lisusu na Bombay. Elizabeth akobaki na mosala ya mobongisi-nzela; kasi basɛngaki ngai napesa tata mabɔkɔ, mpamba te na ntango wana azalaki kosala kaka ye moko mosala ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Kannada. Asepelaki na lisalisi na ngai, mpamba te azalaki na mikumba mingi na lisangá.

Na 1966, baboti na ngai bamonaki malamu bázonga na Udipi. Liboso bákende, tata alobaki na ngai boye: “Mwana na ngai, kobá kokolisa mayele na yo. Bongoláká mikanda na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Komityela motema te koleka ndelo, mpe zaláká ntango nyonso na komikitisa. Tyeláká Yehova motema.” Yango ezalaki toli ya nsuka oyo apesaki ngai, mpamba te akufaki mwa moke nsima ya kozonga na Udipi. Tii lelo oyo nasalaka makasi nalanda toli na ye na mosala na ngai ya kobongola mikanda.

“Okobala te?”

Na Inde, baboti baponelaka bana na bango moto oyo bakobala ntango bana bazali naino mike mpe ntango babalani, balendisaka bango bábota. Yango wana, mbala mingi bato bazalaki kotuna ngai ete: “Okobala te? Nani akosalisa yo ntango okokóma mobange? Okomiyoka te ete ozali kaka yo moko?”

Ntango mosusu maloba yango oyo bato bazalaki koloba na ngai mbala na mbala ezalaki kotungisa ngai mingi. Atako nazalaki kolakisa yango te na miso ya bato, nazalaki kobondela Yehova soki kaka natikali ngai moko. Koyeba ete Yehova azalaki kotalela ngai te ete nazangi eloko mpo nazali monzemba, ezalaki kokitisa ngai motema. Mpo nazwa lisusu makasi ya kosalela ye kozanga kotya makanisi na makambo mosusu, nazalaki kokanisa mwana mwasi ya Yefeta ná Yesu. Bango nyonso mibale babalaki te, kasi bamipesaki mpo na kosala mokano ya Nzambe.​—Yoane 4:34.

Likabo ya Yehova

Elizabeth azalaki moninga na ngai ya motema na boumeli ya mbula soki 50. Akufaki na 2005, azalaki na mbula 98. Mwa bambula liboso akufa, azalaki kokoka lisusu te kotánga Biblia mpo akómaki mobange mpe miso ezalaki komona lisusu malamu te, kasi azalaki kolekisa bangonga mingi mokolo na mokolo na kobondela. Ntango mosusu nazalaki kokanisa ete azali kosolola na moto moko Biblia na shambrɛ, kasi soki nakei kotala, nazalaki kokuta ye azali kobondela Yehova. Yehova azalaki Moto ya solo mpo na ye, mpe azalaki kotambwisa bomoi na ye lokola nde azalaki mpenza komona Yehova. Namonaki ete kosala lokola ye ebongaki mpenza mpo na kokoba kosalela Yehova lokola mwana mwasi ya Yefeta. Napesaka Yehova mersi mingi ndenge apesaki ngai ndeko mwasi wana ya mokóló mpe oyo akɔmɛli na elimo mpo asalisa mpe alendisa ngai ntango nazalaki elenge mpo nalonga mikakatano nyonso oyo nakutanaki na yango.​—Mosakoli 4:9, 10.

Nazwi mpenza mapamboli ndenge naponaki kosalela Yehova ndenge mwana mwasi ya Yefeta asalaki! Kotikala monzemba mpe kolanda toli ya Biblia esalisi ngai nazala na bomoi moko ya malamu mingi, mpe nakoba “kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.”​—1 Bakorinti 7:35.

[Elilingi na lokasa 28]

Tata azali kosala diskur na Bombay, na bambula ya 1950

[Elilingi na lokasa 28]

Ngai ná Elizabeth, mwa moke liboso akufa

[Elilingi na lokasa 29]

Tozali kobengisa bato na diskur, na engumba Bombay, na 1960

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai ná bandeko mosusu na biro na biso ya kobongola mikanda

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto