Kotika te maladi esilisa yo esengo
KANISÁ ete olamuki na ntɔngɔ mpe okómi kolinga mokolo yango esila, nzokande ebandi ata kobanda te. Osengeli kobunda lisusu na mpasi ya nzoto mpe ya makanisi. Okoki kutu koyoka lokola Yobo, oyo alobaki boye: “Malamu nákufa, esika ’tè nákóma se mikuwa.” (Yobo 7:15, Bible na lingala ya lelo oyo) Okosala nini soki ozali na maladi moko oyo ezali kosila kaka te, ata nsima ya bambula?
Ezalaki bongo mpo na Mefiboshete, Mwana ya Yonatane, moninga ya Mokonzi Davidi. Ntango Mefiboshete azalaki na mbula mitano, “akweaki mpe akómaki kotɛnguma.” (2 Sa. 4:4) Na ntembe te, mpasi oyo ayokaki na motema ntango bakoselaki ye makambo ete aboyi mokonzi mpe na nsima, babɔtɔlaki ye biloko nyonso, ebakisaki mpasi oyo azalaki koyoka na nzoto. Atako bongo, akobaki kopesa ndakisa malamu na ndenge ayikaki mpiko na maladi, ntango bakoselaki ye makambo, mpe ntango akutanaki na makambo mingi oyo esalaki ye motema mpasi; atikaki te ete makambo wana esilisa ye esengo.—2 Sa. 9:6-10; 16:1-4; 19:24-30.
Ndakisa mosusu ezali ya ntoma Paulo. Na esika moko akomaki ete azali na “nzubɛ moko na kati ya mosuni” oyo asengelaki kobunda na yango. (2 Ko. 12:7) Mbala mosusu nzubɛ oyo alobelaki ezalaki maladi moko oyo ezalaki kosila te, to bato oyo bazalaki kobɛta ntembe ete azali ntoma te. Ata soki ezalaki nini, mokakatano yango ezalaki kosila te, mpe asengelaki koyika mpiko na mpasi ya nzoto to ya makanisi oyo mokakatano yango ememelaki ye.—2 Ko. 12:9, 10.
Basaleli mosusu ya Nzambe lelo bazali na bamaladi oyo esilaka te mpe oyo esilisaka bango makasi; basusu bazali konyokwama na makanisi. Ntango Magdalena azalaki na mbula 18, bazwaki ye na maladi babengi lupus érythémateux, oyo etindaka biloko oyo ezalaka na makila mpo na kobatela nzoto ekóma nde kobundisa binama ya nzoto. Alobi boye: “Nayokaki nsɔmɔ. Wana mikolo ezalaki koleka, maladi yango ekómaki mabe koleka mpo libumu ezalaki kosala ngai mpasi mingi soki nalei, nakómaki na bampota na monɔkɔ, mpe na mpasi na enama moko oyo ezalaka na mongongo (thyroïde).” Kasi, Izabela azali na mokakatano oyo emonanaka polele ndenge wana te. Alobi boye: “Banda bomwana, nanyokwama na makanisi. Mpo na yango, nabangaka mpambampamba, napemaka malamu te, mpe nayokaka libumu mpasi. Mbala mingi, maladi yango esilisaka ngai makasi.”
Ndima ete ozali na maladi
Maladi ekoki kotya bomoi na yo nkaka. Soki esalemi bongo, ekozala malamu ofanda mpe otalela makambo na bosembo. Mbala mosusu ekoki kozala mpasi ondima ete ozali na maladi. Magdalena alobi boye: “Maladi na ngai ebakisamaka mokemoke. Mbala mingi, nayokaka ete nazali na makasi ya kolongwa na mbeto te. Lokola maladi yango ebimiselaka ngai bampasi na pwasa, ezalaka mpasi mpenza nabongisa makambo liboso. Eloko oyo esalaka ngai mpasi koleka ezali ete nakoki kosala mingi lisusu te na mosala ya Yehova ndenge nazalaki kosala liboso.”
Zbigniew alobi boye: “Wana bambula ezali koleka, maladi na ngai ya mingai ezali kosilisa ngai makasi, ezali kobebisa litonga moko nsima ya mosusu. Na bantango mosusu, soki mpasi eleki makasi, nakokaka kosala ata misala ya mikemike te. Etindaka ngai nayoka ete nazali na ntina te.”
Eleki mwa bambula, minganga bamonaki Barbara na eloko moko oyo ezali kovimba na bɔɔngɔ na ye. Alobi boye: “Nzoto na ngai ekómá kobongwanabongwana. Nayokaka nzoto kolɛmba, motó mpasi mpambampamba, mpe nakokaka kotya makanisi nyonso na likambo moko te. Mpo na yango, esɛngaki nabongola ndenge oyo nazalaki kotalela likambo nyonso.”
Bango nyonso bazali basaleli ya Yehova oyo bamipesá na ye. Mpo na bango, kosala mokano na ye nde likambo eleki ntina. Batyelaka Nzambe motema mobimba mpe asalisaka bango.—Mas. 3:5, 6.
Ndenge oyo Yehova asalisaka
Tosengeli kokanisa te ete mpasi oyo ezwi biso emonisi ete Nzambe aboyi biso. (Bil. 3:33) Kanisá naino makambo nyonso oyo ekwelaki Yobo atako ‘azangaki mbeba mpe azalaki sembo.’ (Yobo 1:8) Nzambe amekaka moto moko te na makambo ya mabe. (Yak. 1:13) Maladi nyonso, ezala oyo esilaka te, ezala mpasi ya motema, eutá na baboti na biso ya liboso, Adama na Eva.—Rom. 5:12.
Kasi, Yehova mpe Yesu bakozanga te kosalisa bato ya sembo. (Nz. 34:15) Mingimingi na ntango ya mpasi nde tomonaka ete Nzambe azali ‘ekimelo mpe esika makasi ya libateli na biso.’ (Nz. 91:2) Na yango, ntango ozali kobunda na makambo ya mpasi, nini ekoki kosalisa yo obatela esengo?
Libondeli: Na ndakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala, okoki kobwakela Tata na biso ya likoló mikumba na yo na nzela ya libondeli. (Nz. 55:22) Soki osali bongo, okoki kozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” Kimya yango ya motema ‘ekobatela motema na yo mpe makanisi na yo.’ (Flp. 4:6, 7) Lokola Magdalena atyelaka Nzambe motema mpe abondelaka ye, azali koyikela maladi na ye mpiko. Alobi boye: “Koyebisa Yehova makambo nyonso ekitisaka ngai motema mpe ezongiselaka ngai esengo. Sikoyo nayebi mpenza soki kotyela Nzambe motema mokolo na mokolo elakisi nini.”—2 Ko. 1:3, 4.
Mpo na koyanola mabondeli na yo, Yehova akoki kopesa yo makasi na nzela ya elimo santu na ye, ya Liloba na ye, mpe ya bandeko ya lisangá. Kolikya te ete Nzambe akolongola maladi na yo na ndenge ya likamwisi. Kasi, okoki kotyela ye motema ete akopesa yo bwanya mpe makasi oyo osengeli na yango mpo oyikela mokakatano nyonso mpiko. (Mas. 2:7) Akoki kokómisa yo makasi, kopesa yo “nguya oyo eleki makasi.”—2 Ko. 4:7.
Libota: Bolingo mpe boboto ya bato ya libota ekoki kosalisa yo oyika mpiko na maladi na yo. Kasi, kobosana te ete bandeko na yo mpe bazali na mpasi. Lokola yo, mbala mosusu bango mpe bazali komona ete bakoki kosala eloko moko te. Atako bongo, bazali wana mpo na yo, ata na bantango ya mpasi mpenza. Kobondela elongo ekosalisa bino bózala na motema ya kimya.—Mas. 14:30.
Barbara alobi boye mpo na mwana na ye ya mwasi mpe bilenge basi mosusu ya lisangá: “Basalisaka ngai nabima mosala ya kosakola. Molende na bango elendisaka ngai.” Zbigniew asepelaka mingi ndenge mwasi na ye asalisaka ye mpenza. Alobi boye: “Asalaka pene na misala nyonso na ndako. Asalisaka ngai mpe nalata bilamba mpe mbala mingi amemelaka ngai sakosi ntango tokei makita to tobimi mosala ya kosakola.”
Bandeko ya lisangá: Kozala elongo na bandeko ya lisangá elendisaka mpe ebɔndisaka. Bongo soki okokoka koyangana na makita te mpo na maladi na yo? Magdalena alobi boye: “Lisangá ezwaka bibongiseli mpo na kokɔtisela ngai makita na kasɛti mpo nayoka yango. Mbala mingi bandeko babengaka ngai na telefone mpo na kotuna soki likambo mosusu ezali oyo bakoki kosalisa ngai. Batindelaka ngai mpe mikanda mpo na kolendisa ngai. Koyeba ete babosani ngai te mpe ete bazali komibanzabanza mpo na nzoto na ngai esalisaka ngai nayika mpiko.”
Izabela, oyo anyokwamaka na makanisi alobi boye: “Na lisangá, nazali na ‘batata’ mpe ‘bamama’ ebele oyo bayokaka ngai mpe bamekaka komitya na esika ngai. Lisangá ezali libota na ngai, kuna nde nayokaka kimya mpe esengo.”
Ezalaka malamu soki baoyo bazali na mikakatano ya ndenge na ndenge bazali ‘komitangola na basusu’ te, kasi bazali nde kosepela mingi kozala elongo na bandeko ya lisangá. (Mas. 18:1) Na ndenge yango, balendisaka mpenza basusu. Na ebandeli, okoki kokakatana koyebisa bandeko ya lisangá bamposa na yo. Nzokande, bango bakosepela mingi soki oyebisi bango yango polele. Ekopesa bango libaku ya komonisa “bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te.” (1 Pe. 1:22) Mpo na nini te koyebisa bango ete okolinga báyaka komema yo na makita, to kobima na bango na mosala ya kosakola, to kosolola na bango na ndako na yo? Ya solo, tosengeli te kolekisa ndelo, kasi tosengeli nde kosepela na lisalisi na bango.
Kolɛmba nzoto te: Mbala mingi, mpo ozala na esengo ntango ozali kobunda na maladi oyo ezali kosila te etali kaka yo moko. Kozala ntango nyonso mawamawa ekoki kotinda yo okóma na makanisi ya mabe. Biblia elobi boye: “Elimo ya moto ekoki koyikela maladi na ye mpiko; kasi elimo oyo elɛmbi, nani akokoka yango?”—Mas. 18:14.
Magdalena alobi boye: “Nasalaka makasi mpo natya makanisi nyonso kaka na mikakatano na ngai te. Nasepelaka na mikolo oyo nzoto na ngai ezali mwa malamu. Kotánga masolo ya bato oyo batikalaki sembo atako bazalaki na maladi oyo ezalaki kosila te elendisaka ngai.” Izabela azwaka makasi na koyeba ete Yehova alingaka ye mpe azwaka ye na valɛrɛ. Alobi boye: “Namonaka ete nazali na ntina, mpe ezali na moto moko oyo nakoki kosalela ye. Nazali mpe na elikya moko kitoko mpo na mikolo ezali koya.”
Zbigniew alobi boye: “Maladi na ngai eteyaka ngai komikitisa mpe botosi. Eteyaka ngai nazala na mayele mpe bososoli mpe nayeba kolimbisa basusu na motema moko. Nayekoli kosalela Yehova na esengo kozanga namiyoka ete nazali moto ya mawa. Kutu, balendisaka ngai nakoba kokende liboso na elimo.”
Kobosana te ete Yehova amonaka mpenza ndenge ozali koyika mpiko. Ayokelaka yo mawa mpe amibanzabanzaka mpo na yo. ‘Akobosana te mosala na yo mpe bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye.’ (Ebr. 6:10) Simbá elaka oyo apesi moto nyonso oyo abangaka ye ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”—Ebr. 13:5.
Soki na bantango mosusu oyoki ete olɛmbi nzoto mpenza, kanisá elikya kitoko ya kofanda na mokili ya sika. Etikali moke mpenza miso na yo emona mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele!
[Etanda/Bililingi na nkasa 28, 29]
Bazali kokoba kosakola atako maladi na bango esilaka te
“Nakokaka kotambola ngai moko lisusu te; na yango, mwasi na ngai to bandeko mosusu ya lisangá babimaka na ngai na mosala ya kosakola. Nakangaka na motó ndenge ya kobanda masolo mpe bavɛrsɛ ya Biblia.”—Jerzy, amonaka malamu te.
“Longola kopesa litatoli na telefone, nakomelaka bato mikanda mpe totindelanaka mikanda mbala na mbala na mwa bato oyo basepeli na solo. Soki nakɔti lopitalo, natyaka ntango nyonso Biblia mpe mikanda na biso pembeni ya mbeto na ngai. Yango esalisaka ngai nabanda masolo mingi ya malamu na bato.”—Magdalena, azali na maladi babengi lupus érythémateux.
“Nalingaka kosakola ndako na ndako, kasi soki nakoki te, nasakolaka na telefone.”—Izabela, azali na maladi ya konyokwama na makanisi.
“Nasepelaka kozongela bato oyo basepeli na solo mpe kobima na bandeko mpo na koyekola na bato Biblia. Na mikolo oyo namiyoki malamu, nasepelaka kosakola ndako na ndako.”—Barbara, azali na eloko moko oyo evimba na bɔɔngɔ na ye.
“Namemaka kaka mwa sakosi ya pɛpɛlɛ ya bazulunalo. Nakobaka kosakola tii ntango nayoki matonga ekómi kosala ngai mpasi.”—Zbigniew, azali na maladi makasi ya mingai.
[Elilingi na lokasa 30]
Bilenge mpe mikóló bakoki kolendisa