Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/10 nk. 30-31
  • Asakwelaki baninga na ye ya kelasi bindimeli na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Asakwelaki baninga na ye ya kelasi bindimeli na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Kotika te maladi esilisa yo esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge nini nakoki koboya masolo ya kosangisa nzoto na kelasi?
    Lamuká!—2006
  • Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/10 nk. 30-31

Asakwelaki baninga na ye ya kelasi bindimeli na ye

OKOLINGA kosalisa baninga na yo ya kelasi báyeba malamu bindimeli na yo oyo euti na Biblia? Magdalena, elenge moko Motatoli ya Yehova, ya mbula 18, oyo azali na eteyelo ya ntei na ekólo Pologne, ayebisaka baninga na ye ya kelasi bindimeli na ye mbala mingi. Yango wana, mbala na mbala batunaka ye mituna lokola, ‘Kozala Motatoli ya Yehova elimboli nini?’ mpe ‘Ondimelaka mpe Yesu Klisto?’ Ndenge nini akokaki kosalisa baninga na ye ya kelasi? Magdalena abondelaki Yehova asalisa ye mpe asalaki makasi akokisa makambo oyo asɛngaki na libondeli.​—Yakobo 1:5.

Mokolo moko, Magdalena asɛngaki molakisi moko oyo atosaka bindimeli na ye soki akoki kopesa ye nzela alakisa na kelasi kasɛti-video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation.a Molakisi yango andimaki. Magdalena ayebisaki baninga na ye ya kelasi boye: “Ngai ná moninga na ngai moko tozali komibongisa mpo na kosala lisolo moko ya miniti 90 na kelasi. Tokolakisa kasɛti-video moko mpe na nsima bokotuna mituna oyo bozalaka na yango na ntina na Batatoli ya Yehova. Bokoya?” Moto nyonso andimaki. Magdalena ná Wojciech, mobongisi-nzela moko ya nsanza na nsanza oyo ameseni na mosala, babandaki kobongisa programɛ yango.

Programɛ yango esengelaki kobanda na lisolo ya miniti 20 na mwa buku Batatoli ya Yehova​—Bazali banani? Makambo nini bandimaka?b mpe na nsima basengelaki kotuna mituna. Nsima na yango basengelaki kolakisa kasɛti-video na bibliotɛkɛ ya eteyelo. Basengelaki mpe kopesa mwana-kelasi mokomoko anvelɔpɛ moko ya monene oyo batye mwa babuku, buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi,c batrakte mpe bazulunalo.

Mokolo yango, baninga na ye ya kelasi bazalaki 14, molakisi moko, mpe bayekoli mosusu minei oyo bayaki kotánga na bibliotɛkɛ. Wojciech abandaki naino kolimbola ete bato oyo bakomaka maloba ya ntɔki mpe bakomi mosusu ya ekólo Pologne basalelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, na makomi na bango. Alobelaki mpe buku mosusu ya kala ya malongi ya Katolike oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe. Ntango azalaki kolimbola ndenge mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kosalema na mikolo na biso, alakisaki mwa babuku ya Babetele ebele mpe bafɔtɔ ebele ya Bandako ya Mayangani.

Na nsima ekómaki ntango ya kotuna mituna. Magdalena ná Wojciech basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna. Likambo yango ekamwisaki mpenza bayangani mpe bandimaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka makanisi na bango moko te. Mituna nini bana-kelasi yango batunaki, mpe ndenge nini Magdalena ná Wojciech bayanolaki?

Motuna: Na bisika mingi, Biblia ezali na maloba ya polele te mpe etondi na elobeli ya elilingi, mpe moto na moto alimbolaka yango na ndenge na ye. Ndenge nini moto akoki kosalela makambo oyo Biblia elobaka?

Eyano: Bato mosusu balobaka ete moto na moto akoki kolimbola Biblia na ndenge na ye. Kasi kanisá naino: Soki olingi koyeba ndimbola ya maloba oyo moto moko akomá, omoni te ete ekozala malamu otuna kaka ye moko? Yehova Nzambe, Mokomisi ya Biblia, akeseni na bakomi ya babuku oyo bakufá, Ye azali na bomoi. (Baloma 1:20; 1 Bakolinti 8:5, 6) Lisolo mobimba nde esalisaka na koyeba ndimbola ya maloba to bavɛrsɛ oyo ezali polele te. Lisusu, mbala mingi Biblia elobelaka likambo moko na bisika mingi, yango wana kobwaka liso na bisika mosusu oyo elobeli likambo yango ekoki kosalisa. Na ndenge wana nde tokotika Nzambe atambwisa biso, lokola nde azali ye moko kolimbolela biso vɛrsɛ yango. Soki tosali bongo, tokoki koyeba mpe kosalela mokano na ye oyo emonisami na Biblia, boye te?

Motuna: Bokeseni nini ezali kati na baklisto mpe Batatoli ya Yehova?

Eyano: Biso tozali baklisto! Kasi na esika ya koloba kaka ete bazali baklisto, Batatoli ya Yehova basalaka makasi básalela makambo oyo bandimaka mpe oyo Nzambe ateyaka bango mpo na bolamu na bango. (Yisaya 48:17, 18) Lokola mateya na bango nyonso eutaka na Biblia, bayebi ete bazali na kati ya solo.​—Matai 7: 13, 14, 21-23.

Motuna: Mpo na nini bosololaka ata na bato oyo boyebi te mpe botingamaka kaka bósolola na bango? Bomoni te ete wana ezali kondimisa bato mateya na bino na makasi?

Eyano: Okanisi ete ezali mabe soki moto moko asololi na yo na balabala na limemya nyonso mpe atuni yo opesa likanisi na yo na likambo moko boye? (Yilimia 5:1; Sefania 2:2, 3) (Wojciech ná Magdalena basalaki elakiseli mpo na komonisa ndenge bazalaki kotuna baleki nzela soki Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato oyo banyokwamaki na mpela oyo eutaki kosalema na Pologne.) Soki moto apesi likanisi na ye, tóbendaka likebi na ye na Biblia. Soki moto alingi masolo te, toyebisaka ye ete atikala malamu mpe tokendeke epai mosusu. (Matai 10:11-14) Yango nde obengi kotingama na bato na masolo? To esengeli bato básololaka lisusu te?

Motuna: Mpo na nini bino bosalaka bafɛti ya mangomba mpe ya ekólo te?

Eyano: Tosalaka kaka molulu moko oyo Biblia esɛngi biso tósalaka​—Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto. (1 Bakolinti 11:23-26) Soki olingi koyeba epai bafɛti ya mangomba, to ya bikólo eutá, talá na babuku oyo eyebani. Soki otángi mikanda wana, okomona mpenza ntina oyo biso tosanganaka na bafɛti yango te.​—2 Bakolinti 6:14-18.

Batunaki mpe ebele ya mituna mosusu mpe bazwaki biyano. Lokola lisolo yango eumelaki mingi, ntango ya kolakisa kasɛti-video ezalaki lisusu te.

Masolo yango ebotaki mbuma nini? Magdalena ayebisi biso boye: “Nakamwaki ete ata bayekoli mosusu oyo, mbala na mbala, basalaka makambo lokola bazoba mpe basɛkasɛkaka basusu, batunaki mituna ya malamu mpenza. Atako bazalaki koloba ete bandimaka Nzambe te, na lisolo wana, bandimaki Nzambe!” Bango nyonso oyo bazalaki wana basepelaki mingi na mikanda oyo tokabelaki bango: babuku 35, mwa babuku 63, mpe bazulunalo 34.

Programɛ yango ebimisaki matomba mingi! Likambo yango esalisaki baninga ya Magdalena básuka kaka te na koyeba Batatoli ya Yehova malamu, kasi elendisaki mpe bilenge mingi bákanisa ntina ya bomoi. Mpo na nini yo mpe okoki te kosala makasi osalisa baninga na yo ya kelasi báyeba bindimeli na yo malamumalamu?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 31]

Magdalena ná Wojciech bazali kobongisa lisolo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto