Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/4 nk. 30-31
  • Moize azwi mokumba moko monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moize azwi mokumba moko monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/4 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Moize azwi mokumba moko monene

Malako: Salá devuare oyo na esika moko ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozali temwɛ ya makambo oyo ezali kosalema. Salá lokola ozali komona makambo yango na makanisi, ozali koyoka mingongo, mpe luká komitya na esika ya bato oyo bazali kolobela. Salá lokola nde likambo yango ezali kosalema sikoyo.

Bato oyo balobeli: Yehova Nzambe mpe Moize

Na mokuse: Yehova apesi Moize mokumba ya kobimisa Bayisraele na boombo na Ezipito.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ KOBIMA 3:1-14; 4:1-17.

Okanisi ete mwa nzete ya nzube oyo ezalaki kopela mɔtɔ ezalaki komonana ndenge nini?

․․․․․

Okanisi ete eyano ya Moize ezalaki nini, ezala na ndenge oyo elongi na ye ezalaki komonana to na mongongo na ye, ntango ayokaki maloba ya Nzambe, oyo ezali na Kobima 3:4?

․․․․․

Okanisi ete mongongo ya Moize ezalaki “koyokana” ndenge nini ntango azalaki kotuna Yehova, ndenge ezali na Kobima 3:11, 13 mpe 4:1, 10?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Luká na mikanda oyo ozali na yango mpo na koyeba makambo mingi na ntina na maloba “nakozala oyo nakozala.” (Kobima 3:14) Mpo na nini Yehova alobi bongo na eyano oyo apesi Moize ntango atuni ye nkombo na ye?a

․․․․․

Okanisi ete Moize azalaki kokakatana koloba na Farao mpo na nini? (Lisalisi: Ntangá Mitángo 12:3.)

․․․․․

Mpo na nini Moize akokaki kokakatana mpo na koloba na bandeko na ye Bayisraele?

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Ezaleli oyo bato bazalaka na yango ya kozanga komityela motema.

․․․․․

Ndenge oyo Yehova atyelaka yo mpe makoki oyo ozali na yango motema.

․․․․․

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Na makambo nini ya bomoi na yo omityelaka motema te?

․․․․․

Na makambo nini Yehova akoki kosalela yo atako ozali na bandelo?

․․․․․

4 NA MASOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki olingi kozwa lisolo oyo na Internet to kobimisa yango na papye, kɔtá na adrɛsi oyo www.jw.org

Soki ozali na biblia te, sɛngá batatoli ya yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka biblia na internet na www.watchtower.org

[Maloba na nse ya lokasa]

a Batatoli ya Yehova babimisaka ebele ya babuku mpe mwa babuku oyo ekoki kosalisa yo okɔta na mozindo na boyekoli na yo ya Biblia. Mpo na koyeba makambo mosusu, luká Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi to komelá babimisi ya zulunalo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto