Lisolo ya bomoi
Nasimbi eteni ya nse ya elamba ya Moyuda banda mbula ntuku nsambo
Lisolo ya Leonard Smith
Ntango nazalaki na mbula soki 13, mikapo mibale ya Biblia esimbaki motema na ngai. Lelo oyo, mbula koleka 70 na nsima, nabosanaka te ntango nayebaki ndimbola ya Zekaria 8:23, oyo elobeli “bato zomi” oyo basimbi “eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko.” Bato yango balobi na Moyuda yango ete: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”
MOYUDA yango azali komonisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe “bato zomi” bazali komonisa “bampate mosusu,” oyo tozalaki kobenga kala “Bayonadabe.”a (Yoa. 10:16) Ntango nakangaki ntina ya likambo yango, namonaki ete mpo elikya na ngai ya kozwa bomoi ya seko na mabele ekokisama, nasengeli mpenza kopesa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ.
Mokapo mosusu oyo esimbaki motema na ngai ezali Matai 25:31-46, epai Yesu apesaki ndakisa ya “bampate” mpe “bantaba.” “Bampate” ezali bato oyo bakobika na nsuka ya mokili mpo basalisaki bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele. Lokola nazalaki na kati ya Bayonadabe, nakanisaki boye: ‘Soki nalingi Kristo atya ngai na ngámbo ya bampate, nasengeli kopesa bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ mpe kondima litambwisi na bango mpamba te Nzambe azali na bango.’ Boyebi wana etambwisi ngai mbula koleka 70.
‘ESIKA NA NGAI EZALI WAPI?’
Mama na ngai azwaki batisimo na 1925 na ndako ya makita ya Betele. Bazalaki kobenga yango Tabernacle de Londres mpe masangá ya pembeni ezalaki kosalela yango. Nabotamá mokolo ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1926. Na sanza ya Marsi 1940, nazwaki batisimo na liyangani moko oyo esalemaki na engumba Dover. Nakómaki kolinga solo ya Biblia mingi. Lokola Mama azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, ‘eteni ya nse ya elamba ya Moyuda’ ya liboso oyo nasimbaki, ezalaki ya ye. Na ntango wana, tata na ngai ná yaya na ngai ya mwasi bazalaki kosalela Yehova te. Tozalaki na lisangá ya Gillingham, na sudi-ɛsti ya Angleterre; bandeko mingi ya lisangá yango bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mama azalaki molende na mosala ya kosakola; azalaki ndakisa malamu.
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1941, na liyangani moko ya etúká na engumba Leicester, diskur moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Bosembo” elobelaki ntembe oyo ebimaki mpo na boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Diskur wana esalisaki ngai nayeba mpo na mbala ya liboso ete ntembe yango oyo Satana abimisaki mpo na Yehova etali mpe biso. Na yango, tosengeli komonisa ete tozali na ngámbo ya Yehova mpe kotikala sembo epai na ye mpo azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba.
Na liyangani yango, balobelaki mingi mosala ya mobongisi-nzela, mpe balendisaki bilenge bámityela mokano ya kosala yango. Diskur oyo ezalaki na motó ya likambo “Esika ya babongisi-nzela na lisangá” etindaki ngai namituna, ‘Esika na ngai ezali wapi?’ Liyangani yango endimisaki ngai ete lokola nazali na kati ya Bayonadabe, nasengeli kosala nyonso mpo na kopesa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ na mosala ya kosakola. Kaka kuna na Leicester, natondisaki formilɛrɛ mpo na kokóma mobongisi-nzela.
MOSALA YA MOBONGISI-NZELA NA NTANGO YA ETUMBA
Mokolo ya 1 Desɛmbɛ 1941, ntango nazalaki na mbula 15, nakómaki mobongisi-nzela monene. Mama nde azalaki moninga na ngai ya liboso ya mosala, kasi mbula soki moko na nsima, atikaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na maladi. Betele etindaki Ron Parkin mpo azala moninga na ngai ya mosala; ndeko yango azali lelo kosala na Komite ya filiale ya Porto Rico.
Batindaki biso na Broadstairs mpe na Ramsgate, bingumba mibale oyo ezalaki pembeni ya mbu na etúká ya Kent. Kuna, tozwaki mwa ndako ya kofutela. Na ntango wana, bazalaki kopesa mobongisi-nzela monene dolare soki 8 mpo na bamposa na ye ya sanza mobimba. Na yango, soki tofuti mbongo ya ndako, tozalaki kotikala na mbongo moke mpo na kobikela, mpe ntango mosusu tozalaki koyeba mpenza te soki lobi tokolya nini. Kasi, Yehova azalaki ntango nyonso kokokisa bamposa na biso.
Tozalaki kotambola mingi na velo; ntango mosusu tozalaki kotambwisa bavelo oyo etondi na biloko na banzela oyo mipɛpɛ ya mbu ezalaki kobɛta makasi. Tozalaki mpe komona baaviɔ ya Ba-Allemands oyo ezalaki kobwaka babɔmbi mpe bamisile oyo ezalaki koleka biso likoló ya mitó mpo ekende kobebisa engumba Londres. Mokolo moko napumbwaki na velo na ngai mpe namibwakaki na terase moko mpo na kokima bɔmbi oyo elekaki pene ya motó na ngai mpe ekendaki kopanzana mosika te. Atako bongo, bambula nyonso oyo tolekisaki lokola babongisi-nzela na etúká ya Kent epesaki biso esengo mingi.
NAKƆTI BETELE
Mama azalaki ntango nyonso kolobela Betele na esengo. Azalaki koyebisa ngai ete: “Nakosepela mingi soki okɔti Betele.” Na yango, kanisá esengo oyo nazalaki na yango na sanza ya Yanuali 1946 ntango babengaki ngai nakende kopesa mabɔkɔ na Betele ya Londres mpo na pɔsɔ misato. Na nsuka ya bapɔsɔ yango, Ndeko Pryce Hughes, oyo azalaki mokɛngɛli ya filiale, asɛngaki ngai natikala na Betele. Formasyo oyo nazwaki kuna esalisaki ngai bomoi na ngai mobimba.
Na ntango wana, bandeko soki 30 bazalaki na Betele ya Londres; mingi bazalaki bilenge mibali minzemba, kasi ezalaki mpe na bakristo ebele oyo batyami mafuta na elimo, kati na bango Pryce Hughes, Edgar Clay, mpe John Barr, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Nazalaki naino elenge, kasi nazalaki na libaku malamu ya kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ mpe kosala na litambwisi ya bandeko wana oyo bazalaki “makonzí” na lisangá!—Gal. 2:9.
Mokolo moko, ndeko moko ayebisaki ngai ete ndeko mwasi moko atɛlɛmi na porte ya Betele azali koluka ngai. Nakamwaki ntango namonaki ete ezalaki Mama; azalaki na liboke moko na nse ya lipeka. Alobaki ete akokɔta te mpo aboyi nakata mosala, kasi apesaki ngai liboke yango mpe akendaki. Ezalaki na kazaka ya malili. Likambo wana oyo asalaki etindaki ngai nakanisa Hana, oyo amemelaki mwana na ye Samwele mwa kazaka ntango azalaki kosala na tabernakle.—1 Sa. 2:18, 19.
ETEYELO YA GILEADE—LIKAMBO OYO NABOSANAKA TE
Na 1947, babengaki biso bato mitano oyo tozalaki kosala na Betele tókende Eteyelo ya Gileade na États-Unis, mpe na mbula oyo elandaki, tokɔtaki na kelasi ya mbala ya 11. Ntango tokómaki kuna, malili ezalaki makasi na nɔrdi ya etúká ya New York, epai eteyelo yango ezalaki. Nasepelaki mingi ndenge namemaki kazaka oyo Mama apesaki ngai!
Nabosanaka te sanza motoba oyo nalekisaki na Gileade. Kofanda elongo na bana-kelasi oyo bautaki na mikili 16 efungolaki makanisi na ngai. Longola mateya oyo tozwaki na kelasi, kofanda elongo na bakristo oyo bakɔmɛli esalisaki ngai mingi. Na nsima, mwana-kelasi na biso moko, Lloyd Barry; molakisi na biso moko, Albert Schroeder; mpe John Booth, mokɛngɛli ya Ferme ya Bokonzi (esika Eteyelo ya Gileade ezalaki) bakómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Nabosanaka te batoli malamu oyo bandeko yango bazalaki kopesa ngai mpe bosembo na bango epai ya Yehova mpe lisangá na ye.
NAKÓMI MOKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA MPE NA NSIMA NAZONGI NA BETELE
Ntango tosilisaki kelasi, batindaki ngai mokɛngɛli ya zongazonga na etúká ya Ohio, na États-Unis. Nazalaki na mbula 21 mpamba, kasi bandeko bandimaki ngai atako nazalaki naino na makambo mosusu ya bolenge. Na zongazonga yango, nayekolaki makambo mingi epai mikóló oyo bakɔmɛli na elimo.
Mwa basanza na nsima, basɛngaki ngai nazonga na Betele ya Brooklyn mpo nazwa formasyo mosusu. Na ntango wana, nayebanaki na bandeko oyo bazalaki makonzí, na ndakisa Milton Henschel, Karl Klein, Nathan Knorr, Thomas Sullivan, mpe Lyman Swingle; mokomoko ya bandeko yango asalelaki Yehova na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Komona bizaleli na bango ya bokristo mpe ndenge oyo bazalaki kosala mosala eteyaki ngai mingi. Esalisaki ngai natyela ebongiseli ya Yehova motema mingi koleka. Na nsima, nazongaki na Mpoto mpo na kokoba mosala na ngai kuna.
Mama akufaki na sanza ya Febwali 1950. Nsima ya kokunda mama, nasololaki polelepolele na tata na ngai mpe yaya na ngai Dora. Natunaki bango soki sikoyo lokola mama akufi, mpe lokola ngai nazalaki lisusu kofanda na bango te, bakosala nini: bakomipesa na solo to bakotika yango? Bayebaki Harry Browning, ndeko moko ya mobange oyo azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo mpe bazalaki komemya ye mingi; basɛngaki ye ayekola na bango Biblia. Nsima ya mbula moko, Papa ná Dora bazwaki batisimo. Na nsima, tata akómaki nkulutu na lisangá ya Gillingham. Nsima ya liwa ya tata, Dora abalanaki na Roy Moreton, nkulutu moko ya sembo; Dora asalelaki Yehova tii liwa na ye na 2010.
NAKEI KOSALA NA FRANCE
Na bomwana, nayekolaki Lifalanse, Allemand, mpe Latin na kelasi mpe na minɔkɔ yango misato, Lifalanse nde elekaki mpasi mpo na ngai. Na yango, nabangaki mwa moke ntango basɛngaki ngai nakende kopesa mabɔkɔ na Betele ya Paris, na France. Kuna, nazwaki libaku ya kosala na Henri Geiger, mokɛngɛli ya filiale oyo azalaki mokristo ya mobange oyo atyami mafuta na elimo. Mokumba yango ezalaki pɛtɛɛ te mpe nayebi ete nasalaki mabunga mingi, kasi nayekolaki makambo mingi na ndenge ya kofanda na bato.
Longola yango, nsima ya etumba, liyangani ya liboso oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge na Paris esengelaki kosalema na 1951, mpe nazalaki na kati ya bandeko oyo babongisaki yango. Léopold Jontès, elenge moko oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli ayaki na Betele mpo na kosalisa ngai. Na nsima, Léopold akómaki mokambi ya filiale. Liyangani yango esalemaki na Palais des sports, pembeni ya Tour Eiffel. Bandeko bautaki na mikili 28. Na mokolo ya nsuka, Batatoli 6 000 ya France basepelaki mingi komona ete bayangani nyonso bazalaki 10 456!
Ntango nakómaki na France, nazalaki koloba Lifalanse mabe mpenza. Na esika nayekola koloba malamu, nazalaki koloba kaka soki nabongisi malamu na makanisi ngai likambo oyo nakoloba. Nzokande, soki ozali kosala mabunga te, moto moko te akosembola yo, mpe okokende liboso te.
Mpo na kosilisa mokakatano yango, nakɔtaki na eteyelo moko oyo bazalaki koyekolisa bapaya Lifalanse. Nazalaki kokende kelasi na bampokwa oyo tozalaki na makita te. Nakómaki kolinga Lifalanse, mpe nsima ya bambula nalingaki yango lisusu mingi. Yango esalisaki ngai mingi mpo na nsima, nakómaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda na Lifalanse. Na nsima, ngai moko nakómaki mobongoli; nazalaki kobongola na Lifalanse makambo oyo ezali na Lingelesi. Ezalaki esengo mingi kosalisa bandeko ya mokili mobimba oyo balobaka Lifalanse bázwa bilei ya elimo oyo euti epai ya moombo ya sembo.—Mat. 24:45-47.
NABALI MPE NAZWI MIKUMBA MOSUSU
Na 1956, nabalaki Esther, mobongisi-nzela moko ya ekólo Suisse oyo tokutanaki na ye mwa bambula liboso. Tobalanaki na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki pembeni ya Betele ya Londres (oyo ezalaki kobengama Tabernacle de Londres, epai mama na ngai azwaká batisimo). Ndeko Hughes nde asalaki diskur ya libala na biso. Mama ya Esther, oyo azalaki mpe mokristo oyo atyami mafuta na elimo, azalaki mpe wana. Nabalaki mwasi oyo akómaki moninga ya malamu mpe ya sembo, kasi nazwaki mpe libaku ya kolekisa bangonga ebele na bokilo na ngai, oyo azalaki mwasi malamu mpe azalaki kolinga mingi makambo ya elimo, tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele na 2000.
Nsima ya libala na biso, tozalaki kofanda na Betele te. Ngai nakobaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola na Betele, kasi Esther azalaki mobongisi-nzela monene pembeni ya Paris. Asalisaki bato mingi bákóma basaleli ya Yehova. Na 1964, basɛngaki biso tókɔta Betele. Na nsima, na 1976, ntango basalaki Bakomite ya filiale, baponaki mpe ngai na kati ya komite ya filiale ya France. Esther asalisi ngai mingi na boumeli ya bambula.
“BOKOZALA NA NGAI NTANGO NYONSO TE”
Nazwaki mabaku ya kokende mbala na mbala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Soki nakei kuna, bandeko ndenge na ndenge ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazalaki kopesa ngai batoli. Na ndakisa, mokolo moko ntango nayebisaki Ndeko Knorr ete nazalaki komituna soki nakosilisa mosala moko boye na dati oyo esengeli, asɛkaki mpe alobaki ete: “Kobanga te. Salá kaka!” Banda wana, soki nazali na misala mingi, na esika nabanga, nasalaka mosala mokomoko, mpe mbala mingi nyonso esilaka na ntango oyo esengeli.
Mwa moke liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozala na ngai ntango nyonso te.” (Mat. 26:11) Biso bampate mosusu mpe toyebaka ete bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo bakotikala na biso libela te awa na mabele. Yango wana, namonaka ete ezali libaku monene mpenza ndenge nasali mbula koleka 70 elongo na bakristo ebele oyo batyami mafuta na elimo; nazali na esengo ndenge nasimbi eteni ya nse ya elamba ya Moyuda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na ndimbola ya nkombo “Yonadabe,” talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 83, 165, 166.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Ndeko Knorr asɛkaki mpe alobaki ete: “Kobanga te. Salá kaka!”
[Bililingi na lokasa 19]
(Lobɔkɔ ya mwasi) Papa ná Mama
(Lobɔkɔ ya mobali) Na Gileade, na 1948, nalati kazaka oyo Mama apesaki ngai
[Elilingi na lokasa 20]
Nazali kobongola diskur ya Ndeko Lloyd Barry na bofungoli ya Betele ya France, na 1997
[Bililingi na lokasa 21]
(Lobɔkɔ ya mwasi) Mokolo ya libala na biso
(Lobɔkɔ ya mobali) Na mosala ya kosakola